Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/04 lok. 3
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2004
Mosala na biso ya Bokonzi—2004
km 7/04 lok. 3

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Yuli mpe Augusto: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bokonzi oyo ekosala Paradis; Nini ekómelaka biso soki tokufi?; Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko; Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Osengeli kondima Trinité?; Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?; Sepelá na bomoi ya seko na mabele!; “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika” mpe Ntango moto oyo olingaka akufi. Sɛtɛmbɛ: Nzela ya bomoi ya seko​—⁠Osili komona yango? Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká!

◼ Kobanda na sanza ya Sɛtɛmbɛ, bakɛngɛli ya zongazonga bakosala lisukulu ya bato nyonso oyo ezali na motó ya likambo “Tótalela mikolo ezali koya na kondima mpenza mpe na mpiko.”

◼ Bakomeli ya masangá basengeli ntango nyonso kozala na baformilɛrɛ oyo mingi na libombo: Demande d’admission au service de pionnier permanent (S-205) mpe Demande d’admission au service de pionnier auxiliaire (S-205b). Bokoki kosala komande na yango na formilɛrɛ Demande de publications (S-14). Bózala na baformilɛrɛ yango mingi oyo bokoki kosalela ata koleka mbula mobimba.

◼ Liboso ya kotinda na biro formilɛrɛ oyo bandeko batɔndisi mpo na kosɛnga mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza, mokomeli ya lisangá asengeli kotala malamumalamu soki bandeko batɔndisi yango malamu. Soki bandeko bazali koyeba lisusu te dati oyo bazwaki batisimo, bakoki kokoma ata dati moko oyo ezali mosika mingi te na dati oyo bazwaki batisimo mpe kobatela yango. Mokomeli ya lisangá asengeli kokoma dati yango na karte ya mosakoli. (Activité du proclamateur)

◼ Ezali na ntina mingi ete biro ya filiale eyebaka ntango nyonso baadresi mpe banimero ya telefone ya bakɛngɛli-bakambi nyonso mpe bakomeli nyonso ya masangá. Soki mokɛngɛli-mokambi to mokomeli moko akómi na adresi ya sika to azwi nimero ya sika ya telefone, Komite ya Mosala ya lisangá esengeli kotondisa formilɛrɛ Changement d’adresse du surveillant-président/secrétaire (S-29) mpe bakotinda yango noki mpenza na biro ya filiale.

◼ Ndenge nini moto akoki kozwa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Lokola bandimaka lisusu te bato básala abonema ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ná bakasɛti na yango na minɔkɔ nyonso, basakoli nyonso basengeli kozwaka bazulunalo ná bakasɛti na yango na nzela ya lisangá na bango. Bóbosana te ete lisangá ekoki kosɛnga bakasɛti ya bazulunalo na nzela ya formilɛrɛ (M-202). Basengeli mpe kosalela formilɛrɛ yango mpo na kosɛnga bazulunalo ya minɔkɔ mosusu mpe oyo ezali na makomi ya minene. Soki moto moko ya teritware na bino asɛngi abanda kozwaka zulunalo mbala na mbala, tosɛngi bino bósala nyonso mpo na kopesaka ye yango mpe azanga ata nimero moko te. Bato oyo babimisami na lisangá bakoki kozwaka bazulunalo to mikanda mosusu oyo bakosalela na Ndako ya Bokonzi. Basakoli basengeli te kokende kotikelaka bato oyo babimisami na lisangá bazulunalo. Basakoli basengeli kokomela biro te mpo na kosɛnga abonema. Baformilɛrɛ nyonso oyo basakoli to bato oyo bazali kosepela na solo bakotinda mpo na kosɛnga abonema, biro ekozongisa yango na lisangá.

◼ Ndenge nini moto oyo azali na bolɔkɔ akoki kozwa bazulunalo? Soki lisangá oyo esakolaka na bolɔkɔ moko ezali na likoki ya kopesa bazulunalo na bato oyo bazali na bolɔkɔ, bongo moto yango ya bolɔkɔ asengeli kozwaka Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! ntango basakoli bazali kokende kotala bango. Bato oyo babimisami na lisangá mpe bazali na bolɔkɔ, bakoki mpe kozwaka bazulunalo ndenge paragrafe oyo emonisi yango.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto