Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 7/04 lok. 3
  • ‘Kokoma maloba ya solo oyo ezali sikisiki’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Kokoma maloba ya solo oyo ezali sikisiki’
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2004
Mosala na biso ya Bokonzi—2004
km 7/04 lok. 3

‘Kokoma maloba ya solo oyo ezali sikisiki’

Tozali na libaku malamu mpenza ya kozwa mikanda na minɔkɔ oyo bato mingi balobaka na teritware na biso. Yango eyokani na esakweli oyo elobaki ete “bato zomi ya minɔkɔ nyonso ya bikólo” bakokangama na baklisto batikali bapakolami mpo na kosalela Yehova. (Zek. 8:​23, NW) Na kotalela malako oyo Lisangani ya Mikóló-Bakambi bazali kopesa, filiale na biso ezali kolekisa ntango mingi, kosala mosala makasi mpe kobimisa mbongo mingi, mpo na kopesa biso “bilei ya elimo na ntango oyo ebongi.”

Atako bato ya teritware na biso balobaka minɔkɔ ebele, minɔkɔ mosusu bakomá yango mpenza na mikanda te. Yango wana, ekomeli na yango eyebani mpenza malamumalamu te mpe ndenge oyo basalelaka maloba na yango na esika moko ekeseni na esika mosusu. Yango wana, ezali mpenza mpasi kobimisa mikanda na minɔkɔ ya mboka ya teritware na biso. Kasi, Lisangani ya Mikóló-Bakambi bapesi biso bisaleli ya motuya oyo ezali kosalisa biso na kobimisa mikanda ya malamu koleka.

Nzokande, mabunga ekoki kokɔta atako mposa na biso ezali ya kobongola na “maloba ya kitoko, mpe maloba ya solo oyo ezali sikisiki.” (Mos. 12:​10, NW) Soki mosakoli moko azali na mposa ya kopesa likanisi na ye mpo na liloba moko to likambo moko oyo akanisi ete ezali libunga, akoki kokomela Biro. Kasi liboso, asengeli naino komindimisa ete likanisi na ye ezali mpenza ya solo. Ekozala malamu ete asolola likambo yango liboso na ndeko moko oyo ayebi monɔkɔ yango malamu to na mokɛngɛli ya zongazonga ntango ayei kotala lisangá na bango. Kosala bongo ezali malamu koleka na esika ya kosolola yango na ndeko moko ya libota ya Betele.

Mpo na kobongola mikanda na biso na minɔkɔ mingi oyo elobamaka na teritware na biso, esɛngaki tóbimisa maloba ya sika mpo na makambo ya Teokrasi. Totalelaka malamumalamu maloba yango mpe tokanisaka mingi liboso ya kokoma yango na mikanda lokola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to Mosala na biso ya Bokonzi. Tozali kosɛnga na masangá nyonso mpe mingi mpenza bankulutu ete básalelaka kaka maloba yango mpe báluka te kobimisa maloba mosusu ya sika mpo basaleli ya Nzambe bázalaka ntango nyonso na bomoko. Tosɛngi na bino ete bosalelaka maloba oyo eyokani na maloba ya makambo ya Teokrasi ndenge ezali na mikanda na biso.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto