Manaka mpo na Likita ya Mosala
Pɔsɔ ebandi na 12 Yuli
Min. 12: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 4 mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli mpe Lamuká! ya 22 Yuli.a Elakiseli moko ekomonisa mosakoli moko azali kolakisa zulunalo na balabala epai ya moto oyo ayebi koloba monɔkɔ na bino malamu te.
Min. 18: “Tómekola bosembo ya Yehova.”b Soki ngonga ezali, sɛngá bayangani bálobela bavɛrsɛ oyo batye maloba na yango na lisolo te.
Min. 15: Biblia—Buku ya bisakweli oyo ebongi mpenza kotyela motema. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani, ekouta na mwa buku Un livre pour tous, nkasa 27-29. Na mosala na biso ya kosakola, mbala mingi tokutanaka na bato oyo bazalaka na mposa ya koyeba makambo etali mikolo ekoya. Biblia ezali kolobela makambo oyo ebongi mpenza kotyela motema, oyo ezali komonisa polele mapamboli oyo bato ya botosi bakozwa na mikolo ekoya. Lobelá mwa ndambo ya bisakweli ya Biblia oyo ezali mpenza kondimisa ete makambo oyo Biblia esakoli mpo na mikolo ekoya ekokokisama mpenza. Sɛngá mosakoli moko asala elakiseli ya mokuse, oyo ekomonisa ndenge oyo tokoki kosalela masolo ya Biblia mpo na kosalisa bato oyo bazali kosepela na solo bándimela Biblia.
Loyembo 16 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 19 Yuli
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá ntina ya kozala na programɛ ya malamu ya kotánga Biblia mokolo na mokolo. Lobelá mpe makanisi oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 2000, lokasa 32.
Min. 15: Bamposa ya lisangá.
Min. 20: “Tótambwisa boyekoli ya Biblia na ndenge oyo ekosalisa bato bákola—Eteni 1.” Lisukulu ekosalema na mokɛngɛli ya mosala ya kosakola. Sɛngá bayangani bálobela makambo oyo ezali na buku Prédicateur, nkasa 572-574, mpo na komonisa ndenge mosala ya koyekola na bato Biblia ebandaki na mikolo na biso. Salisá bayangani bázela na esengo mpenza masolo mosusu oyo ekobima nsima. Masolo yango ekolobela makambo lokola: ndenge ya komibongisa mpo na koyekola na moto, ndenge ya kosalisa moyekoli na komibongisa, esengeli koyekola makambo mingi to te, ndenge ya kosalela malamu bavɛrsɛ ya Biblia, ndenge ya koyanola na mituna ya moyekoli, ndenge ya kobanda kobondela, mpe ndenge ya komɛma moyekoli na ebongiseli ya Yehova. Lendisá bayangani nyonso básalela makanisi oyo bapesi mpe bábomba lisolo yango mpo na kosalela yango nsima.
Loyembo 10 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 26 Yuli
Min. 12: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Yuli. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 4 mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Augusto mpe Lamuká! ya 8 Augusto.c Na elakiseli mokomoko, monisá lolenge moko ya kopesa eyano soki moto alobi: “Pourquoi repassez-vous si souvent?” (Mpo na nini boyaka mbala na mbala?)—Talá buku Comment raisonner, lokasa 20.
Min. 8: “‘Kokoma maloba ya solo oyo ezali sikisiki.’” Ekosalema na nkulutu moko. Tángá lisolo yango mobimba mpe tuná mituna.
Min. 25: “Ndenge ya kosakola na bisika ya mombongo.”d Lobelá bibongiseli oyo lisangá ezwi mpo na kosakola na bisika ya mombongo. Salelá makanisi oyo bapesi na paragrafe 4-5 to lolenge mosusu ya kobanda lisolo oyo ebongi na teritware na bino mpo na kosala bilakiseli mibale ya mikuse. Soki ngonga ezali, sɛngá bayangani bálobela makambo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango ntango basakolaki na bisika ya mombongo.
Loyembo 173 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 2 Augusto
Min. 8: Mayebisi ya lisangá.
Min. 22: Omonisaka bantina? Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Eteyelo ya mosala, lokasa 254, paragrafe 1-2. Ntango tozali kolimbola mpe komonisa ndenge ya kosalela bavɛrsɛ ya Biblia na mosala ya kosakola to na estrade, makambo oyo tozali koteya ekosimba mpenza mitema ya bato soki tozali komonisa bantina na yango, na esika ya koluka kaka kondimisa bango ete oyo tozali koloba ezali bongo. Salelá bandakisa oyo ebongi na teritware na bino, oyo ezali na buku Comment raisonner to na babuku mosusu mpo na komonisa ndenge ya (1) kobimisa maloba ya ntina ya vɛrsɛ moko mpe kolimbola yango, (2) kosalela makambo oyo ezali na bavɛrsɛ oyo ezali liboso mpe nsima ya vɛrsɛ moko to vɛrsɛ mosusu oyo ezali kolobela likambo yango (3) kopesa ndakisa moko oyo ezali komonisa ete likambo olobi ezali mpenza solo, mpe (4) kotuna bato oyo bazali koyoka yo mituna mpo bákanisa likólo na likambo yango. Monisá polele matomba oyo tokozwa soki tozali kobanda lisolo na ndenge oyo ekotinda bato bákanisa.
Min. 15: Makambo oyo bandeko bakutanaki na yango. Sɛngá bayangani bálobela makambo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango ntango bakendaki na liyangani ya etúká, ntango basalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi, to ntango bazalaki kosolola makambo ya elimo na bandeko mosusu, kasi ezala makambo oyo euti kosalema mikolo oyo.
Loyembo 32 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tosɛngi bino bósalela makanisi oyo etali ndenge ya kolakisa bazulunalo oyo lisangá na bino ezwi sika.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Tosɛngi bino bósalela makanisi oyo etali ndenge ya kolakisa bazulunalo oyo lisangá na bino ezwi sika.
d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.