Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Yuni: Yekolá epai ya Moteyi Monene. Soki bato yango bazali na bana te, bokoki kolakisa mwa buku Azali kosɛnga. Ntango bozali kosalela mwa buku yango, bósala makasi bóbanda koyekola na bato Biblia. Yuli mpe Augusto: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bokonzi oyo ekosala Paradis; Nini ekómelaka biso soki tokufi?; Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko; Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Osengeli kondima Trinité?; Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?; “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika” mpe Ntango moto oyo olingaka akufi.
◼ Mpo na kobatela malamu Ndako ya Bokonzi, moto oyo akobima moto ya nsuka na Ndako ya Bokonzi asengeli kokanga porte na fungola mpe akotala bilɔkɔ mosusu oyo esengeli mpo na kobatela yango. Soki moto yango ayebi kokanga porte te, asengeli kobenga moto oyo ayebi kokanga yango, mpe akokende kaka soki moto yango ayei. Bankulutu basengeli kozalaka ntango nyonso na liste ya basakoli oyo bazwi mokumba ya kobatela bafungola ya Ndako ya Bokonzi.
◼ Soki mobongisi-nzela moko akei na lisangá mosusu, mokomeli ya lisangá na ye ya kala asengeli kotindela lisangá yango mokanda ya biro oyo endimaki ye ete akómi mobongisi-nzela (S-202), fiche ya mosakoli (S- 21), mpe asengeli kokomela bankulutu yango mokanda oyo ekolobela mosakoli yango; kasi akotinda yango kaka soki lisangá na ye ya sika esɛngi yango. Mokomeli ya lisangá na ye ya sika akokoma bongwana nyonso oyo esalemi na mokanda (S-202) mpe akotinda yango na biro ya filiale. Soki mobongisi-nzela moko abali to akómi na nkombo mosusu, tosɛngi bino bómonisa yango na mokanda (S-202), mpe bótinda yango na biro. Na makambo nyonso wana mibale, soki tosilisi kotalela dosye yango, tokotinda mokanda mosusu oyo ekomonisa ete andimami lokola mobongisi-nzela na lisangá oyo azali.
◼ Ntango bokokenda na liyangani ya etúká “Tambolá elongo na Nzambe,” bóbosana te kozwaka banɔti oyo ekosalisa bino bópesa biyano na bozongeli ya koloba oyo ekosalema na Likita ya mosala na basanza ekoya.