Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Mituna oyo ekotalelama lokola lisolo ya mituna mpe biyano na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 28 Yuni 2004. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 3 Mai tii na pɔsɔ ya 28 Yuni 2004. [Liyebisi: Na bisika oyo bamonisi te mokanda oyo ezali kopesa eyano na motuna oyo batuni, osengeli kolukaluka na mikanda yo moko mpo na kozwa biyano.—Talá buku Eteyelo ya mosala, nk. 36-37.]
TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU
1. Ntango tozali koloba na estrade, makambo nini ekoki kopekisa biso tóloba lokola nde tozali kosolola na moto to mpe lokola nde tozali koloba liboso ya mokonzi moko? [be lok. 179 par. 4]
2. Mpo na nini kobongisa mongongo na biso etaleli kaka te kopema malamu mpe kosembola misisa na biso? [be lok. 181 par. 2]
3. Ntango tozali koyebisa basusu solo ya Biblia, nini tosengeli kosala mpo ‘tókóma makambo nyonso epai ya bato ya ndenge nyonso’? (1 Kol. 9:20-23) [be lok. 186 par. 2-4]
4. Koyoka na likebi mpenza na mosala na biso ya kosakola ezali kosɛnga nini? [be lok. 187]
5. Komemya bato oyo tozali kokutana na bango na mosala na biso ya kosakola ezali na ntina nini? [be lok. 190]
LISOLO NO. 1
6. Mokano ya baoyo bazali kopesa mateya ya teokrasi ezali nini, mpe nini ekosalisa biso na kokokisa mokano yango? (Mat. 5:16; Yoa. 7:16-18) [be lok. 56 par. 3–lok. 57 par. 2]
7. Mpo na nini ezali na ntina mingi komonisa bokeseni ya makambo ntango tozali koteya, mpe ndenge nini Yesu asalelaki lolenge wana ya koteya? [be lok. 57 par. 3; lok. 58 par. 2]
8. Na bokeseni na Bafalisai, mpo na nini mateya ya Yesu ezalaki kosimba mitema ya bato? [be lok. 59 par. 2-3]
9. Ndenge nini tokoki kosalisa baoyo toteyaka básalela makambo oyo bazali koyekola, kozanga ete tózwaka bikateli na esika na bango? [be lok. 60 par. 1-3]
10. Ndenge nini tosengeli koyanola soki basusu batuni biso mituna oyo etali makambo oyo bango moko nde basengeli kopona? [be lok. 69 par. 4-lok. 70 par. 1]
BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ
11. Mpo na nini Moize asengelaki kolanda malamumalamu “ndakisa ya tabenakle mpe ya biloko na yango nyonso”? (Ex. 25:9, NW ) [it-2 lok. 1031 par. 6]
12. Liteya nini tokoki kozwa na eyano oyo Alona apesaki Moize mpo na likambo ya mwana-ngɔmbɛ ya wolo? (Ex. 32: 24)
13. Kondima oyo Bayisalaele basengelaki komonisa mpo na kotosa mobeko oyo Yehova apesaki bango na Exode 34:23, 24 eteyi biso nini?
14. Mbeka ya bondeko ezalaki na ntina nini? (Lev. 3:1)
15. Ndenge nini Yesu akokisaki makambo oyo ezali na Levitike 8:23, oyo basalaki Alona mokolo batyaki ye nganga-nzambe monene? [it-2 lok. 460 par. 3; w68-F lok. 624 par. 24]