Manaka mpo na Likita ya Mosala
Pɔsɔ ebandi na 14 Yuni
Loyembo 168
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 4 (soki ebongi na teritware na bino) mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni mpe Lamuká! ya 22 Yuni.a Elakiseli moko ekomonisa mosakoli moko azali kopesa litatoli na bisika ya mombongo. Bokoki mpe kosalela ndenge mosusu oyo emonani malamu koleka ya kolakisa bazulunalo yango.
Min. 20: “Yehova asalisaka baoyo batyelaka ye motema.”b Ntango bokokóma na paragrafe 4, lobelá makanisi oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Desɛmbɛ 1999, lokasa 3, paragrafe 9-10, mpe buku Eteyelo ya mosala, lokasa 67, paragrafe 2.
Min. 15: Mpo na nini koboya komɛla bangi? Lisolo elongo na bayangani euti na buku Comment raisonner, nkasa 112-116. Lelo oyo, bato mingi bamipesi na komɛla bangi. Mingi balobaka ete komɛla bangi ezali mabe te; kutu basusu balukaka ete Leta apesa bato nzela ya komɛla yango polele. Bólobela ndenge nini tokoki kosolola na bato ya ndenge wana. Lobelá mpe makanisi oyo ezali na Lamuká! ya 8 Novɛmbɛ 1999 na etanda ya lokasa 10 (na Lifalanse).
Loyembo 179 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 21 Yuni
Loyembo 29
Min. 10: Mayebisi ya lisangá.
Min. 15: “Baanzelu bazali kosalisa biso.”c Soki ngonga ezali, sɛngá bayangani bálobela bavɛrsɛ oyo maloba na yango ezali na lisolo te.
Min. 20: Bwanya oyo euti likoló ezali makambo makasimakasi te. (Yak. 3:17) Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani euti na buku Eteyelo ya mosala, nkasa 251-252. Kozala makambo makasimakasi te elimboli nini? Mpo na nini yango ezali na ntina na mosala na biso ya kosakola? Tokoki koyekola nini na ndakisa ya ntoma Paulo? Ntango basakoli bazali kosakola, ndenge nini bakoki komonisa ete bazali kotalela mimeseno ya bato ya teritware na bango? Ndenge nini tokoki kosalisa bayekoli ya Biblia na komonisa ezaleli ya makambo makasimakasi te? Bongisá liboso elongo na ndeko moko to bandeko mibale mpo bálobela makambo oyo bakutanaki na yango oyo ezali komonisa matomba ya kosolola na bato na limemya.
Loyembo 53 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 28 Yuni
Loyembo 139
Min. 12: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Yuni. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 4 (soki ebongi na teritware na bino) mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli mpe Lamuká! ya 8 Yuli.d Na elakiseli mokomoko, mosakoli akosala lisolo ya mokuse mpe na ndenge ya boninga. Monisá ete kosala ndenge wana ekoki kotinda moto oyo tozali kosolola na ye amiyoka malamu.
Min. 15: Bamposa ya lisangá.
Min. 18: “Mpo na nini tozali na mposa ya Boyekoli ya Mokanda ya lisangá?”e Salelá mituna oyo ezali na lisolo. Lobelá mpe makanisi oyo ezali na lisolo “Salisá mokɛngɛli na bino ya boyekoli ya mokanda ya lisangá,” oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ 2002, na lokasa ya liboso.
Loyembo 20 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 5 Yuli
Min. 10: Mayebisi ya lisangá.
Min. 15: Okoloba nini? Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Na sanza ya Yuli mpe ya Augusto, tokolakisa mwa babuku. Mwa babuku nini oyo basakoli bamoni ete ebimisaka matomba na teritware na bino? Zongelá makanisi oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yuli 1998, lokasa 8, oyo bamonisi ndenge ya kolakisa mwa babuku, to na masolo mosusu oyo ebimaki liboso na yango. Monisá polele ete elakiseli mokomoko ezali (1) na motuna moko, (2) na vɛrsɛ moko, mpe (3) na likanisi moko oyo euti na mokanda oyo esengeli kolobela yango. Salá elakiseli moko to bilakiseli mibale na bilakiseli oyo batindi otala. Lendisá basakoli nyonso básalelaka Biblia ntango bazali kosakola nsango malamu.
Min. 20: Makambo oyo baboti basengeli kosalela bana. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekouta na buku Yekolá epai ya Moteyi Monene, nkasa 6-7. Ezali na ntina ete bana báyekola mitinda ya Biblia oyo etambwisaka losambo ya solo mpe bákanga ntina ya mokumba oyo baboti na bango bazali na yango mpo bákola malamu. Lobelá makanisi bapesi oyo ezali komonisa ndenge ya koyekola buku yango. Sɛngá baboti bálobela ndenge oyo bazali kosalela mokanda yango na boyekoli. Sɛngá mwana moko to bana mibale bálobela makambo oyo basepeli na yango na mokanda yango.
Loyembo 65 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tosɛngi bino bósalela makanisi oyo etali ndenge ya kolakisa bazulunalo oyo lisangá na bino ezwi sika.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
d Tosɛngi bino bósalela makanisi oyo etali ndenge ya kolakisa bazulunalo oyo lisangá na bino ezwi sika.
e Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.