Manaka mpo na Likita ya Mosala
Liyebisi: Na sanza ya Augusto mpe ya Sɛtɛmbɛ, Mosala na biso ya Bokonzi ekozala na programɛ ya Likita ya Mosala kaka ndenge ezalaka pɔsɔ na pɔsɔ. Masangá ekoki kobongisa programɛ na bango ya makita na kotalela pɔsɔ oyo bakozala na liyangani ya etúká “Tambolá elongo na Nzambe.” Soki yango ebongi, na Likita ya Mosala oyo bokosala liboso bókende na liyangani, bósalela miniti 15 mpo na kolobela toli ya siplema ya sanza yango, oyo etali mpenza bino. Na boumeli ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ, Likita ya Mosala moko mobimba ekozala kaka mpo na kozongela makanisi ya ntina oyo tokoyoka na liyangani. Mpo na komibongisa na masolo yango, biso nyonso tosengeli kozwa banɔti na makambo ya ntina oyo ekolobama na liyangani, tokoki mpe kokoma makambo ya ntina oyo toyoki mpe tolingi kosalela yango na bomoi na biso mpe na mosala ya kosakola. Na nsima, tokoki kolendisa basusu soki tolimboleli bango ndenge oyo tosaleli makambo yango kobanda liyangani esili.
Pɔsɔ ebandi na 12 Aprili
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá mayebisi oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili mpe Lamuká! ya 22 Aprili.a Na elakiseli mokomoko, monisá ndenge moko ya kopesa eyano soki moto alobi ete “Nazali na mosala.”—Talá buku Comment raisonner, nkasa 19-20, to mwa buku Lolenge nini kobanda mpe kolandisa masoló likoló na Biblia, nkasa 11-12.
Min. 15: “Tópesa Yehova nyonso oyo tozali na yango ya malamu koleka.”b Ntango bokolobela paragrafe 4, sɛngá bayangani báyebisa makambo mpenza oyo tokoki kosala mpo na komonisa bato ete tolingaka bango ntango tozali na mosala ya kosakola.
Min. 20: “Tókumisa nkombo na ye elongo.”c Ekosalema na mokomeli ya lisangá. Salelá mituna oyo ezali na lisolo. Yebisá esika oyo lisangá na bino ekokende na liyangani. Na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Desɛmbɛ 2003, batye ntango oyo programɛ ekobanda mpe ekosuka na mokolo mokomoko ya liyangani. Soki esengeli, bokoki mpe kolobela makambo mosusu oyo ezali na siplema yango. Na nsuka, tuná mituna mibale to misato oyo ezali na lisolo “Bilei ya elimo na ntango oyo ebongi,” oyo ekotalelama na Likita ya Mosala ya pɔsɔ elandi, mpo na kopesa bango mposa ya lisolo yango.
Loyembo 91 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 19 Aprili
Min. 8: Mayebisi ya lisangá.
Min. 17: “Tómekola ezaleli ya makanisi ya Yesu.”d Salelá mituna oyo ezali na lisolo. Ntango bokolobela paragrafe 4, sɛngá bandeko oyo bazali babongisi-nzela basungi bálobela mapamboli oyo bazwi na mosala yango.
Min. 20: “Bilei ya elimo na ntango oyo ebongi.”e Salelá mituna oyo ezali na lisolo. Ntango bokolobela paragrafe 2, sɛngá ndeko moko to bandeko mibale bálobela na mokuse liyangani moko oyo babosanaka te tii lelo. Na nsuka, tuná mituna mibale to misato oyo ezali na lisolo “Zalá mosantu na etamboli na yo mobimba,” oyo ekotalelama na Likita ya Mosala ya pɔsɔ elandi, mpo na kopesa bango mposa ya lisolo yango.
Loyembo 80 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 26 Aprili
Min. 12: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Aprili. Lobelá mikanda oyo tokolakisa na Mai. Salelá makanisi oyo bapesi na lokasa 8 mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai mpe Lamuká! ya 8 Mai.f Elakiseli moko ekomonisa mosakoli moko azali kopesa litatoli epai ya moninga na ye ya mosala to ya kelasi.
Min. 15: Bamposa ya lisangá.
Min. 18: “Zalá mosantu na etamboli na yo mobimba.”g Salelá mituna oyo ezali na lisolo. Sɛngá bayangani bálobela ndenge oyo bamonaki bango moko ete etamboli ya malamu na liyangani epesaka Yehova lokumu. Na nsuka, tuná mituna mibale to misato oyo ezali na lisolo “Molato oyo eyokani na bopɛto ya bizaleli mpe oyo ebongi kokumisama,” oyo ekotalelama na Likita ya Mosala ya pɔsɔ elandi, mpo na kopesa bango mposa ya lisolo yango.
Loyembo 38 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 3 Mai
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá na mokuse makambo oyo mbala mingi tosalaka na sanza ya Augusto mpe ya Sɛtɛmbɛ: koyangana na liyangani ya etúká, kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi, kobongisa ndako to lopango, mpe ntango mosusu kobima mpo na kozwa mwa mopɛpɛ. Soki lisangá na bino ezali na bateritware epai oyo litatoli epesamaka mpenza te, yebisá bibongiseli nini bozwi mpo na kopesa litatoli malamumalamu na bateritware yango. Soki mobembo to makambo mosusu oyo tokosala ekobebisa programɛ na biso, tosengeli kozwa bibongiseli ya malamu liboso mpo tóbosana te koyekola na kati ya libota, koyangana na makita mpe kobima na mosala ya kosakola. (Mas. 21:5) Yebisá basakoli nyonso ete bábosana te kozongisa balapolo na bango ya mosala ya kosakola, bázala na mobembo to te.
Min. 15: “Bilenge—Bótángaka Liloba ya Nzambe!”h Sɛngá elenge moko to bilenge mibale bámibongisa mpo na kolobela programɛ na bango ya kotánga Biblia mpe matomba oyo bazali kozwa na botángi yango. Lendisá bilenge bámityela mokano ya kotánga Biblia mobimba. Lobelá mpe makanisi oyo ezali na buku Eteyelo ya mosala, na lokasa 10, paragrafe 4.
Min. 20: “Molato oyo eyokani na bopɛto ya bizaleli mpe oyo ebongi kokumisama.”i Salelá mituna oyo ezali na lisolo. Soki ngonga ezali, bótánga mpe bólobela bavɛrsɛ oyo batye maloba na yango te.
Loyembo 164 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tosɛngi bino bósalela makanisi oyo etali ndenge ya kolakisa bazulunalo oyo lisangá na bino ezwi sika.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
e Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
f Tosɛngi bino bósalela makanisi oyo etali ndenge ya kolakisa bazulunalo oyo lisangá na bino ezwi sika.
g Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
h Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
i Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.