Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/04 lok. 1
  • Bilenge​—Bótángaka Liloba ya Nzambe!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilenge​—Bótángaka Liloba ya Nzambe!
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2004
  • Masolo mosusu
  • Elenge, otye makanisi na yo na mikano ya elimo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2018
  • Zalá na kondima mpe zwáká bikateli na bwanya!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2017
  • Bikateli na yo ekumisa Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Bilenge—Bókoba kokola na elimo nsima ya batisimo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2022
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2004
km 4/04 lok. 1

Bilenge​—Bótángaka Liloba ya Nzambe!

1 Ntango moto azali elenge, akutanaka na mikakatano mingi mpe ezali na makambo oyo asengeli kozwa bikateli ya minene. Mokolo na mokolo, mingi kati na bino bilenge baklisto bobundisaka mposa ya kolanda baninga oyo batindaka bino bóbuka mitinda ya Nzambe oyo etali bizaleli malamu. Liboso ya kozwa bikateli na makambo etali kelasi, mosala, mpe libala; bosengeli naino komityela mikano ya elimo. Soki bokosala bongo, bokokoka kozwa bikateli mosusu oyo ekopesa bino matomba na nsima. Soki bozali na mikano ya sikisiki ya elimo, bókosala makambo na mayele mpe bókozala na bomoi ya malamu. Soki bozali kotánga mpe komanyola likoló na Liloba ya Nzambe mbala na mbala, bókosalela toli epemami oyo ezali na kati na yango, mpe milende na bino ekobota mbuma ya malamu mpenza.​—⁠Yos. 1:8; Nz. 1:​2, 3.

2 Matomba nini bokozwa? Mokili ya Satana etondi na makambo oyo ezali kotinda bato na kosala mabe. (1 Yoa. 2:​15, 16) Mbala mosusu boyebi baninga ya kelasi to bilenge mosusu ya mbula na bino oyo bazwaki mpasi mpo balandaki makambo ya mabe ya baninga na bango. Soki bozali kotosa toli ya Biblia, yango ekopesa bino makasi na motema mpe na elimo mpo bóboya kolanda bomoi ya masumu. Lisusu, toli ya Liloba ya Nzambe ekosalisa bino bókima mitambo oyo Satana abombaka. (2 Kol. 2:11; Ebe. 5:14) Soki bozali kotambola na banzela ya Nzambe, bokozwa bolamu ya solosolo, bokosepela mpenza na bomoi na bino.​—⁠Nz. 119:​1, 9, 11.

3 Mitinda ya Liloba ya Nzambe esilaka ngala te mpe eleki bwanya ya bato. (Nz. 119:​98-100) Soki boyebi mitinda ya Biblia malamu mpe bozali komanyola likoló ya mikano oyo Yehova asili komonisa, mpe soki bozali kosala mabondeli oyo euti mpenza na motema, bokoki bókóma baninga mpenza ya Yehova Nzambe, Moto ya bwanya koleka oyo akomisaki Biblia. Alaki ete: “Nakopesa yo mayele mpe nakolakisa yo nzela ekoki na yo kotambola. Nakopesa yo toli wana nazali kotala yo.”​—⁠Nz. 32:⁠8.

4 Bóbongisa ntango ya kotánga yango: Elenge mwasi moko moklisto amityelaki mokano ya kotánga Biblia mobimba, mpe asilisaki kotánga yango na mbula moko. Matomba nini azwaki? Alobi boye: “Nayebaki makambo mingi oyo etali Yehova, mpe makambo yango esalaki ete napusana penepene na ye mpe etindaki ngai nazwa mokano ya kobanga ye bomoi na ngai mobimba.” (Yak. 4:⁠8) Osilá kotánga Biblia mobimba? Soki naino te, mpo na nini te komityela mokano yango? Na ntembe te, Yehova akopambola milende na bino, mpe bokozwa matomba mingi.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto