Tópesa Yehova nyonso oyo tozali na yango ya malamu koleka
1 Mibeko oyo Yehova apesaki Bayisalaele emonisaki polele ete banyama oyo bakopesa ye mbeka esengelaki kozala “na libebi te.” Yehova azalaki kondima te banyama oyo ezali na mbeba. (Lev. 22:18-20; Mki. 1:6-9) Lisusu, ntango bazalaki kopesa mbeka, mafuta nyonso, elingi koloba eteni ya malamu koleka, ezalaki ya Yehova. (Lev. 3:14-16) Yehova abongaki mpenza kozwa biloko na bango ya malamu koleka, mpamba te azalaki Tata mpe Nkolo Monene na bango.
2 Lokola na ntango ya kala, lelo oyo mpe Nzambe atyaka likebi na lolenge ya makabo oyo topesaka. Mosala oyo tozali kosalela ye esengeli komonisa limemya monene oyo tozali na yango mpo na ye. Ya solo, biso nyonso tozalaka na makoki ndenge moko te. Atako bongo, tosengeli komitalela malamumalamu mpo na komona soki tozali mpenza kopesa ye oyo nyonso tozali na yango ya malamu koleka.—Ef. 5:10.
3 Tósalela ye na motema mobimba: Mpo mosala na biso epesa Yehova lokumu mpe esimba mitema ya baoyo bazali koyoka biso, tosengeli kosala yango te kaka mpo na kosala. Tosengeli kolobelaka Nzambe na biso mpe mikano malamu na ye na botɔndi mpenza. (Nz. 145:7) Likambo yango ezali komonisa polele ntina ya kozala ntango nyonso na programɛ malamu ya kotánga mpe koyekola Biblia biso moko.—Mas. 15:28.
4 Kopesa Yehova nyonso oyo tozali na yango ya malamu koleka esɛngaka mpe tólinga bato lokola ye alingaka bango. (Ef. 5:1, 2) Bolingo yango etindaka biso tóyebisa bato mingi solo oyo epesaka bomoi (Mko. 6:34) Etindaka biso lisusu tómonisa bato oyo tozali kosolola na bango ete tozali kosepela na bango. Soki tokutani na bato mbala ya liboso, bolingo yango etindaka biso tókanisaka bango mpe tózongela bango. Elendisaka biso tósala nyonso oyo tokoki mpo na kosalisa bango bákola na elimo.—Mis. 20:24; 26:28, 29.
5 “Mbeka ya lisanzoli”: Lolenge mosusu ya kopesa Yehova nyonso oyo tozali na yango ya malamu koleka ezali ya kosakola na molende. Tokoki kozwa mbuma ya malamu mpenza na ntango oyo totikali na yango soki tozali na programɛ ya malamu mpe tozali kotya makanisi na biso nyonso na mosala ya kosakola. (1 Tim. 4:10) Soki tozali komibongisa malamu, tokoyeba koloba na ndenge ya polele mpe na ndenge oyo ekomonisa ete biso moko tozali kondima mpenza makambo oyo tozali koloba mpe yango ekoki kotinda bato mingi bándima koyoka biso. (Mas. 16:21) Ntango tozali kosakola nsango malamu epai ya bato mosusu, tokoki kobenga maloba oyo ezali kouta mpenza na motema na biso “mbeka ya lisanzoli.”—Ebe. 13:15.