Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/03 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 8/03 lok. 7

Mayebisi

◼Mikanda oyo tokolakisa na Augusto: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bokonzi oyo ekosala Paradis, Nini ekómelaka biso soki tokufi?, Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko, Ntango moto oyo olingaka akufi, Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?, Osengeli kondima Trinité?, Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?, Sepela na bomoi ya seko na Mabele!, mpe “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika.” Tokoki mpe kolakisa mwa babuku oyo soki esengeli: Bilimu ya bakufi—​bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?, Nos problèmes​—Qui nous aidera à les résoudre?, Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?, Une vie pleinement satisfaisante: Comment?, mpe Un livre pour tous. Sɛtɛmbɛ: La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création? Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Tokolakisa mpe mwa buku Azali kosɛnga mpo na kobanda koyekola na bato Biblia.

◼ Kobanda pɔsɔ ya mwa 25 Augusto 2003, masangá ya Kiluba, Monokutuba, Otetela, Tshiluba mpe Uruund ekobanda koyekola mwa buku Nzela ya bomoi ya seko​—Osili komona yango? na boyekoli ya mokanda. Mpo na koyeba programɛ, bótala mokanda ya mwa 25 Aprili 2002.

◼ Kobanda pɔsɔ ya mwa 20 Ɔkɔtɔbɛ 2003 tokoyekola buku Tósambela Nzambe kaka moko ya solo na boyekoli ya mokanda. Soki buku yango ebongolami naino te na monɔkɔ na bino, bósalela oyo ya monɔkɔ mosusu, na ndakisa Lifalanse, Lingala to Swahili.

◼ Mokɛngɛli-mokambi to ndeko mosusu oyo ye akopona akotalela kɔnti ya lisangá na mokolo ya 1 Sɛtɛmbɛ to mwa moke nsima na yango soki likoki ezali. Soki bataleli yango, bakoyebisa lisangá nsima ya kotánga lapolo ya kɔnti oyo ekolanda.

◼ Evantɛrɛ ya mbula mobimba ya mikanda mpe bazulunalo nyonso oyo bozali na yango ekosalema na mokolo ya 31 Augusto 2003 to mpe mwa liboso to mwa nsima ya dati yango soki likoki ezali. Evantɛrɛ yango ekosalema ndenge kaka ndeko oyo atalelaka mikanda atángaka yango sanza na sanza, mpe bosengeli kokoma motuya ya mikanda yango na formilɛrɛ Stock des publications (S-18-F). Mpo bóyeba motuya ya bazulunalo nyonso oyo bozali na yango, bokoki kotuna bandeko oyo batalelaka bazulunalo na lisangá mokomoko oyo bosalelaka mikanda esika moko. Mokomeli ya lisangá oyo etalelaka mikanda asengeli kotambwisa mosala yango ya evantɛrɛ. Mokomeli mpe mokɛngɛli-mokambi ya lisangá oyo etalelaka mikanda bakotya sinyatili na bango na formilɛrɛ yango. Lisangá nyonso oyo etalelaka mikanda ekozwa formilɛrɛ Stock des publications (S-18-F) misato. Tosɛngi bino ete bótinda kopi ya malamu na Biro liboso ya mokolo ya 6 Sɛtɛmbɛ. Bosengeli kobomba kopi mosusu na dosye na bino. Kopi ya misato, yango nde bokosalela lokola bruyɔ.

◼ Masangá basengeli kobanda kosɛnga Calendrier des Témoins de Jéhovah 2004, mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo​—2004, mpe Annuaire des Témoins de Jéhovah 2004 na komande oyo bakosala mbala ekoya. Liste ya minɔkɔ oyo mikanda yango ezali ekobima na “Mayebisi mpo na masangá nyonso,” mokanda oyo biro etindelaka masangá nyonso sanza na sanza.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto