Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/03 lok. 6
  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2003
Mosala na biso ya Bokonzi—2003
km 8/03 lok. 6

Bozongeli ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Mituna oyo ekotalelama lokola lisolo ya mituna mpe biyano na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 25 Augusto 2003. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 7 Yuli tii na pɔsɔ ya 25 Augusto 2003. [Liyebisi: Na bisika oyo bamonisi te mokanda oyo ezali kopesa eyano na motuna oyo batuni, osengeli kolukaluka na mikanda yo moko.​—Talá buku Eteyelo ya Mosala, nk. 36-37.]

TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU

1. Soki ozali kotala moto na miso ntango ozali kosolola na ye na mosala ya kosakola, yango ekosalisa yo na nini? [2, be lok. 125 par. 1-2; etanda na lok. 125]

2. Nini ekoki kosalisa yo soki ozali na kobanga liboso ya kobima na mosala ya kosakola? [4, be lok. 128 par. 4-5]

3. Nini ekosalisa yo oloba ndenge omesaná koloba ntango ozali kosala lisukulu na estrade? [5, be lok. 129 par. 2; lok. 129 etanda]

4. Ndenge nini mitinda oyo ezali na Levitike 16:4, 24, 26, 28; Yoane 13:10; mpe Emoniseli 19:8 ezali kotinda biso tótalelaka ndenge oyo tomonanaka na miso ya bato, mpe yango ezali na ntina nini ? [7, be lok. 131 par. 3; lok. 131 etanda]

5. Moto oyo alekisaka ndelo te na makambo na ye mpe oyo azali “na makanisi mabongi,” azali moto ya ndenge nini (1 Tim. 2:9, 10) [8, be lok. 132 par. 1]

LISOLO NO. 1

6. Atako baklisto basengeli kokanga motema na mabunga ya bamosusu, eloko nini basengeli kosala te? (Kols. 3:13) [3, w01 15/7 lok. 22 par. 7-8]

7. Solo to lokuta: Motángo oyo emonisaka molɔngɔ ezalaka motuya ya mobimba to ya kokoka. Limbola. [4, si lok. 282 par. 24-25]

8. Mokano nini eleki malamu oyo esengeli kotinda biso na kotánga Liloba ya Nzambe, mpe mpo na nini tondimi ete likambo yango ezali na ntina? [5, be lok. 24 par. 1]

9. Na ndenge nini moto ya bwanya ‘amibombelaka boyebi’? (Mas. 10:14, NW) [6, w01 15/7 lok. 27 par. 4-5]

10. Mpo na nini mimeseno malamu oyo Yobo azalaki na yango ezali kobenda likebi na biso? (Yobo 1:1, 8; 2:3) [7, w01 1/8 lok. 20 par. 4]

BOTÁNGI YA BIBLIA YA PƆSƆ NA PƆSƆ

11. Na ndenge nini Lisangani ya Mikóló-Bakambi basukisaki ‘bango nyonso na boyokani’ ete bato ya bikólo mosusu basengelaki kokatama ngenga te mpo na kobikisama? (Mis. 15:25)

12. Mpo na nini Lisangani ya Mikóló-Bakambi esɛngaki Paulo asala makambo mosusu ya Mibeko ya Moize nzokande Yehova así alongolaki Mibeko yango? (Mis. 21:20-26) [2, it-2 lok. 701 par. 4; it-2 lok. 1166 par. 2–par. 5]

13. Bifundeli nini ya lokuta oyo bafundaki na yango ntoma Paulo ekundoleli biso makambo oyo bakoselaki Batatoli ya Yehova na mikolo oyo euti koleka? (Mis. 24:5, 6) [3, w01 15/12 lok. 22 par. 7–lok. 23 par. 2]

14. Ndakisa nini Paulo apesi na mosala ya kosakola Bokonzi ata na boumeli ya mbula mibale oyo azalaki na bolɔkɔ? (Mis. 28:30, 31)

15. Na ndimbola nini “bakonzi oyo bazali liboso” bazali “ebongiseli ya Nzambe,” mpe yango etali baklisto na nini? (Lom. 13:1, 2) [8, w00 1/8 lok. 4 par. 5]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto