Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo
Lelo oyo, bato mingi bazali kopesa makanisi ndenge na ndenge na oyo etali ndenge ya kobatela motema mpo na kozala na bomoi ya malamu mpe ya molai. Motema na biso ya elilingi ezali kutu na ntina mingi koleka. Yango wana, motó ya likambo ya liyangani ya mokolo moko oyo ekobanda kosalema na Sɛtɛmbɛ ebongi mpenza, mpamba te elobi boye: “Tósalela Yehova na motema mobimba.” (1 Nta. 28:9) Makambo nini tokoyekola kuna?
Mokɛngɛli ya zongazonga akolobela motó ya likambo: “Tósalisa basusu ete básalela Yehova na molimo ya esengo.” Bandeko oyo akotuna bango mituna bakomonisa polele esengo oyo bazwaka ntango basalisaka bato mosusu básepela na nsango malamu lisusu koleka mpe ntango bayekolaka Biblia na bato oyo balingi kosalela Yehova. Na ntembe te, bayangani nyonso bakobɔndisama mpe bakolendisama na lisukulu ya liboso ya molobi-mopaya, oyo ezali na motó ya likambo ete: “Tóbatela mitema na biso na mokili oyo etondi na yikiyiki.” Eteni ya ntɔngɔ ya liyangani ekosuka na lisukulu ya batisimo.
Na nsima ya midi, lisolo oyo ezali na motó ya likambo “Tósalisa bamosusu” ekomonisa ndenge oyo tokoki kosalisa bamosusu. Makambo nini baboti bakoki kosala mpo na kobatela mitema ya bana na bango ete makanisi mabe ya bato mosusu ebebisa yango te mpe kosalisa bango bápusana penepene na Yehova? Lisolo oyo ezali na motó ya likambo “Salisá bana na yo básepela na Yehova” ekopesa makanisi oyo ebongi mpenza mpe ekomonisa ndenge oyo baboti bakoki kosalisa bana na bango.
Tosalelaka malamu bibongiseli nyonso oyo Yehova azali kozwa mpo na kosalisa biso tózala ntango nyonso na motema ya elilingi oyo ezali malamu mpe makasi? Lisukulu ya nsuka ya molobi-mopaya, oyo ezali na motó ya likambo “Salelá Yehova ntango nyonso na motema mobimba,” ekolobela makambo minei ya ntina mingi oyo esalisaka biso tózala ntango nyonso makasi na elimo. Ntango boni mpe milende nini tosalaka mpo na kosala mabondeli oyo euti mpenza na motema, koyekola Liloba ya Nzambe, kosakola na molende mpe kosangana na baklisto mosusu? Likoki ezali ete tósala makambo yango lisusu malamu koleka?
Yehova alobi na biso boye: “Tyá motema na yo mpo na kolakisama mpe matoi na yo na maloba ya boyebi.” (Mas. 23:12) Omibongisa banda sikoyo mpo na kozala na liyangani yango, epai tokoyoka mateya ya Makomami oyo ekozala mpo na litomba na biso. Na bongo, okozwa makasi ya kolanda kosalela Yehova na motema mobimba mpe na molimo ya esengo.