Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Yuni: Tokolakisa buku Boyebi to mwa buku Azali kosɛnga. Soki bato oyo tokei kotala bazali na mikanda yango, tokotikela bango mwa buku mosusu oyo eyokani na mposa na bango, oyo ezali na stokɛ ya lisangá. Yuli mpe Augusto: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bokonzi oyo ekosala Paradis, Nini ekómelaka biso soki tokufi?, Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko, Ntango moto oyo olingaka akufi, Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?, Osengeli kondima Trinité?, Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?, Sepela na bomoi ya seko na Mabele!, mpe “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika.” Na bisika mosusu ya mokili, mwa babuku oyo elandi ekoki kozala malamu mpo na kolakisa bato: Bilimu ya bakufi—bikoki kosala yo mabe? Bizali solo? Un livre pour tous, Une vie satisfaisante: Comment?, Nos problèmes—Qui nous aidera à les résoudre?, mpe Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba? Sɛtɛmbɛ: La vie: comment est- elle apparue? Évolution ou création?
◼ Na mokolo ya pɔsɔ, mwa 7 Yuli 2003, bandeko nyonso ya libota ya Betele bakozala na mosala ya kotya bopɛto na Betele mobimba. Yango wana, tosɛngi na bino bóya te ezala mpo na kotala Betele to ndeko moko ya libota ya Betele na mokolo yango.
◼ Lamuká! ya 22 Yuli (na Lifalanse) ekozala na lisolo oyo: “Kotala bolumbu ya basi mpe ya mibali na televiziɔ to na mikanda (Pornographie)—Ezali mpenza mabe to te?” Lokola lisolo yango ezali na ntina mingi, bakobakisela masangá bazulunalo (20 %) koleka ndenge bazwaka liboso.
[Maloba mpo na kolimbola elilingi na lokasa 7]
Liyangani ya Etúká “Pesá Nzambe nkembo” ekobanda na Mwamitano na ngonga ya 9:30 ya ntɔngɔ, nzokande mayangani oyo ekosangisa bato oyo bakouta mikili mingi (Assemblée internationale) ekobanda na Mwaminei na ngonga ya 1:20 nsima ya midi.