Ata baoyo bazali na nzoto malamu te bakoki kobota mbuma
1 Ata soki ozali moko ya Batatoli ya Yehova oyo bazalaka na nzoto malamu te, okoki kobota mbuma na mosala ya kosakola. Kutu, mikakatano na yo ya nzoto ekoki kopesa yo libaku moko oyo bandeko mosusu bakoki kozwa yango te, ya kopesa litatoli mpe ya kolendisa basusu.
2 Mabaku ya kopesa litatoli: Bato mingi oyo bazali kobundana na mikakatano ya nzoto bazali kosala mingi na mosala ya kosakola. Na ndakisa, ndeko mwasi moko oyo azalaki kotambola lisusu te mpe koloba malamu te nsima ya lipaso oyo basalaki ye, amonaki ete akoki kokabolaka bazulunalo soki mobali na ye atɛlɛmisi motuka na nzela oyo bato mingi bazali koleka. Na libaku moko, akabolaki bazulunalo 80 na ngonga mibale mpamba! Mikakatano na yo ya nzoto ekoki kosala ete okutana na bato oyo ezalaka mpasi kokutana na bango. Soki ezali bongo, talelá bango lokola teritware na yo moko.
3 Mosala na yo ya kosakola ekoki kobota mbuma mingi mpenza! Ntango bato mosusu bazali komona molende na yo mpe bizaleli malamu oyo ozali na yango mpo ozali kosalela solo ya Biblia, bakoki mbala mosusu kobendama na nsango ya Bokonzi. Lisusu, ntango ozali kokutana na bato oyo bazali konyokwama na mikakatano ya bomoi, makambo oyo okutaná na yango na bomoi na yo ekosalisa yo obɔndisa bango na Liloba ya Nzambe.—2 Kol. 1:4.
4 Kolendisa basusu: Olendisamaki te na lisolo ya Laurel Nisbet, oyo alekisaki mbula 37 ya bomoi na ye kati na masini moko oyo ezalaki lokola mimpululu na ye, nzokande, asalisaki bato 17 na kozwa boyebi ya solo ya Biblia? Ndenge moko mpe, ndakisa na yo ekoki kosalisa baninga mosusu bandimi ete bámipesa lisusu koleka na mosala ya Yehova.—g93-F 22/1 nk. 18-21.
5 Ata soki mikakatano na yo ya nzoto epekisi yo osala mingi ndenge olingaka kosala na mosala ya kosakola, nzokande ozali na likoki ya kolendisa basusu. Ndeko moko ya mobali alobaki boye: “Nayebi sikoyo ete ata soki moto azali na mokakatano makasi na nzoto, akoki mpe kozala lisalisi monene mpo na basusu. Ngai na mwasi ná ngai tozalaki lisalisi monene mpo na bato mingi na lisangá. Mpo na mikakatano ya nzoto oyo tozali na yango, tozalaka ntango nyonso awa, ntango nyonso pene mpo na kopesa mabɔkɔ.” Nzokande, mpo na mikakatano ya nzoto oyo ozali na yango, ezali polele ete okokoka ntango nyonso te kosala na ndenge molende na yo ezali kosɛnga. Kasi, soki basalisi yo okokoka mbala mosusu kosala mingi na mosala ya kosakola. Yango wana, soki omoni ete ozali na mposa ya lisalisi, kokakatana te mpo koyebisa bankulutu ya lisangá to bandeko mosusu oyo bakoki kosalisa yo.
6 Yehova amonaka nyonso oyo ozali kosala mpo na ye, mpe asepelaka na mosala na yo oyo ozali kosala na molimo na yo mobimba. (Nz. 139:1-4) Soki otye elikya na yo epai na ye, akopesa yo nguya ya kosala mosala oyo ekobota mbuma mingi mpe ya ntina.—2 Kol. 12:7-10