Bozongeli ya eteyelo ya Mosala ya Teokrasi
Mituna oyo ekotalelama lokola lisolo ya mituna mpe biyano na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 30 Yuni 2003. Mokɛngɛli na eteyelo akotambwisa bozongeli na miniti 30 na kotalela masolo oyo esalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda na pɔsɔ ya 5 Mai tii na pɔsɔ ya 30 Yuni 2003. [Liyebisi: Na bisika oyo bamonisi te mokanda oyo ezali kopesa eyano na motuna oyo batuni, osengeli kolukaluka na mikanda yo moko.—Talá buku Eteyelo ya mosala, nk. 36-37.]
TOLI MPO NA KOLOBA MALAMU
1. Mpo na nini kobongola mongongo ntango ozali kosala lisukulu ezali na ntina, mpe ndenge nini okoki kosala yango? [be etanda ya lok. 111; etanda ya lok. 112]
2. Ata soki molobi moko andimaka makambo oyo alobaka mpe alingaka Yehova, mpo na nini ekómaka ete azanga esengo ntango azali koloba? [be lok. 115 par. 3-4; lok. 116 par. 1]
3. Likambo nini ekosalisa molobi moko azala na nsai mpe abimisa mayoki ntango azali kosala lisolo, mpe mpo na nini ezali na ntina mingi? [be lok. 119 par. 1-4]
4. Na ntango ozali kosala lisolo, mpo na komonisa ete ozali koloba na esengo, na nsai mpe ozali kobimisa mayoki mosusu malamu, yango etaleli nini? [be lok. 120 par. 2-5]
5. Solo to Lokuta: Kosala bajɛstɛ mpe kosalela elongi ezali na ntina kaka soki bato oyo bazali koyoka yo bazali kotala yo. Limbolá. [be lok. 121 par. 3]
LISOLO NO. 1
6. Makambo nini esalisaki Yosiya apona nzela ya malamu mpe akangama na yango atako akutanaki na mikakatano mingi na bomwana na ye? (2 Nta. 34:1, 2 ) [w01 15/4 lok. 26 par. 5 tii lok. 27 par. 5; lok. 28 par. 4]
7. Masese 9:7, 8a ezali na ndimbola nini mpe tokoki kosalela yango ndenge nini na mosala ya kosakola? [w01 15/5 lok. 29 par. 4-5]
8. Yehova alingaki koloba nini ntango ayebisaki Bayisalaele ete, ‘Kobosana te,’ mpe tokosala nini mpo tóbosana te? (Det. 4:9; 8:11) [be lok. 20 par. 1-3]
9. Ndenge nini maloba ya Davidi oyo ezali na Nzembo 32:1, 5 mpe na Nzembo 51:10, 15 emonisi ete, soki moto asalaki lisumu monene mpe amonisi mpenza ete abongoli motema, asengeli te komiyoka ete azangi ntina? [w01 1/6 lok. 30 par. 1-3]
10. Liteya nini tokoki kozwa na malako Paulo apesaki na mokanda ya 1 Timote 5:3-16 oyo etaleli kosalisa bato oyo bazali na bosɛnga? [w01 15/6 lok. 11 par. 1]
BOTÁNGI YA BIBLIA PƆSƆ NA PƆSƆ
11. Liloba ‘kobotama lisusu’ oyo Yesu asalelaki na mokanda ya Yoane 3:3, etaleli nani? [w95 1/7 nk. 9-10 par. 4-5]
12. Lolenge nini Yesu asalelaki kolakisama na ye mpe toli nini ya ntina tokoki kozwa na likambo yango? (Yoa. 7:15-18) [w96 1/2 nk. 9-10 par. 4-7]
13. Mpo na nini Yoane 7:53 tii 8:11 ezali na molɔngɔ ya bavɛrsɛ mosusu te na Libongoli ya Mokili ya Sika?
14. Ndenge nini Yesu ‘ayaki mpe bongo na ndenge kaka’ oyo amataki na likoló? (Mis. 1:11) [w90 1/6 lok. 11 par. 5]
15. Nini esalaki ete “ata moko te na kati ya bato mosusu azalaki na mpiko ya kosangana elongo na [bayekoli],” ndenge ekomami na Misala 5:13?