Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/02 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 11 Novɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 18 Novɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 25 Novɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 2 Desɛmbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 11/02 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 11 Novɛmbɛ

Loyembo 183

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo oyo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Salá bilakiseli mibale oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Novɛmbɛ mpe Lamuká! ya 22 Novɛmbɛ na kotalela makanisi oyo ezali na lokasa 8. Na elakiseli moko, limbolá ndenge oyo tozwaka mbongo mpo na kotambwisa mosala na biso na mokili mobimba.​—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli nyonso na lokasa 2 to Lamuká! nyonso na lokasa 5.

Min. 15: Bato oyo basimbaki losambo ya solo​—Na ntango ya kala mpe lelo oyo. Lisukulu euti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 2002, na nkasa 26-30.

Min. 20: “Salisá mokɛngɛli na bino ya boyekoli ya mokanda ya lisangá.”a Ekosalema na nkulutu oyo azali moko ya bakɛngɛli ya boyekoli ya mokanda. Na paragrafe 3, lobelá mpe makambo oyo ezali na lokasa 70 ya buku Eteyelo ya mosala. Pesá lisangá mobimba longonya mpo na makambo oyo basalaka mpo na kopesa mabɔkɔ na ebongiseli ya boyekoli ya mokanda, mpe na limemya nyonso, bendá likebi na makambo oyo basengeli lisusu kobongisa.

Loyembo 114 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 18 Novɛmbɛ

Loyembo 78

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Lobelá etanda “Masolo ya kitoko mpenza oyo ebongi kotánga!”

Min. 10: Biyano na mituna na bino. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko ya makoki.

Min. 25: “Bakonzi ya mabota​—Bóbatela mimeseno malamu na makambo ya elimo.” Lobelá naino na mokuse makanisi ya paragrafe 1-3, nsima salá lisolo elongo na bayangani na paragrafe 4-13. Soki ngonga ezali, tángá paragrafe 7, 8, 11 mpe 12. Tuná mpe moboti moko to baboti mibale mituna. Makambo nini esalisaki mabota na bango ezala na mimeseno malamu na makambo ya elimo? Esɛngaki milende nini? Ndenge nini bazwelaki yango matomba? Sukisá na makanisi ya mokuse ya paragrafe 14.

Loyembo 31 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 25 Novɛmbɛ

Loyembo 16

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Ndeko mobali moko na mwasi na ye babimi na mosala ya kosakola, básala elakiseli mpo na komonisa ndenge ya kosalela makanisi oyo ezali na lokasa 8 mpo na kolakisa bazulunalo ya 1 Desɛmbɛ mpe ya 8 Desɛmbɛ. Ndeko mobali alakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mpe mwasi na ye alakisa Lamuká!

Min. 15: “Yebisá solo na ntina etali Yesu.”b Lobelá mpe makanisi oyo ezali na lokasa 278 ya buku Eteyelo ya mosala. Lendisá bandeko nyonso bámema babuku na bango Eteyelo ya mosala na Likita ya Mosala ya pɔsɔ ekolanda mpo na lisolo “Eteyelo moko oyo ezali kobongisa biso mpo na makambo oyo eleki ntina.”

Min. 20: “Monisá ete omibanzabanzaka mpo na ‘bitike.’” Lobelá makanisi oyo ezali na paragrafe 1 mpe na Étude perspicace, volimi 2 na nkasa 459-460, na boumeli ya miniti misato mpo na komonisa ndenge Yehova atalelaka bitike. Na baparagrafe oyo etikali salá lisolo ya mituna mpe biyano. Lobelá makambo ndenge na ndenge oyo basusu bakoki kosala mpo na kosunga mpe kolendisa bitike. Na paragrafe 3-4, lobelá mpe na mokuse makanisi oyo ezali na Lamuká! ya 8 Ɔkɔtɔbɛ 1995 na nkasa 8-9 (na Lifalanse).

Loyembo 142 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 2 Desɛmbɛ

Loyembo 213

Min.  8: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Novɛmbɛ. Salá elakiseli ya mokuse mpo na komonisa ndenge ya kolakisa buku Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo.​—Talá Mosala na biso ya Bokonzi ya Yuli 1998 na lokasa 8.

Min. 12: Bamposa ya lisangá.

Min. 25: “Eteyelo moko oyo ezali kobongisa biso mpo na makambo oyo eleki ntina.” Lisolo elongo na bayangani ekosalema na mokɛngɛli na eteyelo. Salá lisolo oyo ekosalisa bayangani básepela mingi na programɛ ya sika ya eteyelo oyo ekobanda na Yanuali. Bendá likebi na makambo mingi ya “Programɛ ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi 2003,” oyo ezali na siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Ɔkɔtɔbɛ 2002. Lobelá malamu masɛngami mpo na kokomisa nkombo na eteyelo, ndenge ezali na buku Eteyelo ya mosala na lokasa 282, mpe lendisá baoyo naino basali yango te bákomisa bankombo soki bakokisi masɛngami yango.

Loyembo 127 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto