Masolo ya kitoko mpenza oyo ebongi kotánga!
Omoni te ete batitre oyo elandi ya masolo oyo ebimá na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya kala ekoki kozala masolo ya malamu mpenza mpo na kotánga?
“Nzambe ayebi bato na ye mpe abatelaka bango”
“Salá milende mpo na kopekisa lolemo na yo”
“Ntango baklisto bakómaki kosambela na nkuku”
“Kosakola nsango malamu ndako na ndako”
“Ndenge ya koyanola na motuna oyo: Osili kobikisama?”
Masolo oyo mpe masolo mosusu mingi ezali na bazulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo ebimá na bambula 1951 mpe 1952. Tokoki koloba ete masolo yango esilá ngala, mpe tokozwela yango matomba te lelo oyo? Ezali bongo te! Ata lelo oyo, okoki kozwa na Lifalanse bavolimi relye ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya bambula 1951 mpe 1952. (Mwa ndambo ya bavolimi relye na Lifalanse kobanda na mobu 1953 kino mobu 1959 ezali mpe.) Mosakoli nyonso oyo azali na mposa ya bavolimi yango ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli akoki kopesa komande na ye epai na ndeko oyo atalelaka mikanda na lisangá.
Mokɛngɛli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi asengeli kotala malamu soki bavolimi relye ya bambula mosusu ezangi na kati ya bibliotɛkɛ ya Ndako ya Bokonzi mpe asengeli kosala komande na yango.