Tozali na esaleli ya sika mpo na kobanda boyekoli ya Biblia!
1 Mwasi moko ya Amerika azalaki Mokatolike moko ya molende. Azalaki komonisa na bosembo mpenza ete bindimeli ya lingomba na ye ezali mabe te. Kutu, akendeki na Vatican mpo na kotala makambo ya losambo. Ata nyonso wana, ntango Motatoli ya Yehova moko ayaki kotala ye, andimaki koyekola na ye Biblia. Mpo na nini? Mpo azalaki na mposa ya koyeba Biblia mpe lingomba na ye ezalaki koyekolisa bato Biblia te. Likambo yango ezali koteya biso nini? Ezali koteya biso ete toyebi te nani akondima koyekola Biblia.—Mos. 11:6.
2 Ekómelá yo ete okakatana mpo na koyebisa bato ete tolingaka mpenza koyekola Biblia na moto nyonso oyo azali na mposa ya koyekola? Bato nyonso oyo bafandi na kartye na bino bayebi ete tosalaka mosala wana na bolingo na biso moko? Tósala nini mpo bango nyonso báyeba yango mpenza? Tósalela esaleli ya sika! Ezali nde trakte moko ya kitoko ya nkasa motoba Aimeriez-vous en savoir plus sur la Bible? (Olingi koyeba Biblia malamu?) Tiká tótalela mitó moke ya likamboya trakte yango mokomoko, mpo tóyeba yango malamu.
3 “Mpo na nini ebongi kotánga Biblia?” Bantina oyo trakte epesi ezali kosimba motema mpenza. Elimboli ete Biblia ezali na “malako ya bolingo oyo euti epai na Nzambe,” oyo ezali komonisa ndenge nini kopusana penepene na ye na nzela ya libondeli mpo na kozwa lisalisi mpe ndenge nini tokoki kozwa likabo ya bomoi ya seko. (1 Tes. 2:13) Trakte yango ezali kolobela “solo oyo ezali kopesa bingɛngiseli,” na ndakisa likambo nini ekómelaka biso nsima ya liwa mpe mpo na nini mikakatano etondi awa na mokili. Elobeli “malako ya Nzambe oyo ezali na Biblia” oyo, soki moto asaleli yango na bomoi na ye, akozala nzoto kolɔngɔnu mpe akozala na esengo, na elikya, mpe bizaleli mosusu ya malamu. Trakte yango epesi ntina mosusu oyo tosengeli kotánga Biblia: bisakweli etali makambo oyo elingi kosalema.—Emon. 21:3, 4.
4 “Lisalisi mpo na koyeba Biblia malamu”: Trakte yango elobi ete: “Biso nyonso tozali na mposa ya lisalisi mpo na koyeba Liloba ya Nzambe malamu.” Na nsima elakisi ndenge oyo toyekolaka Biblia: “Mingimingi ezalaka malamu koyekola Biblia mokemoke, kobanda na mateya ya ebandeli.” Atako elobi polele ete “Biblia nde ezali koteya,” trakte wana ebendi likebi na mwa buku Azali kosɛnga ete ekosalisa moyekoli “akanga ntina ya biyano oyo euti na Makomami na makambo ndenge na ndenge.” Motó ya likambo oyo elandi ezali motuna ya ntina mingi.
5 “Okolinga kolekisaka mwa ntango pɔsɔ na pɔsɔ mpo na koyeba Biblia malamu?” Trakte elimboli ete boyekoli ya Biblia ekoki kosalema na ngonga mpe na esika oyo moyekoli asepeli na yango, ezala na ndako na ye to ata na telefone. Nani akoki kozala wana na ntango ya boyekoli? Trakte eyanoli ete: “Libota na yo mobimba. Baninga nyonso oyo okosepela kobenga bango bakoki mpe kozala wana. To soki olingi, boyekoli ekoki kosalema bobele na yo moko.” Boyekoli ekoki kozwa ngonga boni? Trakte elobi ete: “Bato mingi bayekolaka Biblia na boumeli ya ngonga moko pɔsɔ na pɔsɔ. Soki olingi koyekola koleka ngonga moko to soki okokoka kolekisa ngonga mobimba te pɔsɔ na pɔsɔ, Batatoli bakosala oyo yo okopona.” Yango nde ezali likambo ya ntina! Tokakatanaka te mpo na koyokanisa ntango na biso na mposa ya moyekoli moko na moko.
6 “Kobenga moto mpo na koyekola”: Na trakte yango, ezali na esika oyo moto akoki kokata yango mpe kotondisa mpo asɛnga mwa buku Azali kosɛnga to kosɛnga moto aya kolimbolela ye ndenge oyo boyekoli ya Biblia esalemaka. Ezipeli ya mwa buku Azali kosɛnga emonisami na ndenge ezalaka mpenza. Na ntembe te, ozali komona mpo na nini trakte oyo ekolendisa bato ya mitema sembo bándima lisalisi na biso? Sikawa, ndenge nini tokoki kosalela esaleli ya sika oyo na ndenge ya malamu mpenza?
7 “Nani okoki kopesa ye trakte yango?” Okoki kopesa trakte yango na bato oyo okutani na bango to okoki kotikela bato oyo okutaki bango na ndako te. Ekoki kokabolama na mosala ya ndako na ndako, na babalabala, mpe na bisika ya mombongo. Pesá yango na bato oyo bandimi kozwa mikanda na biso to na bato oyo baboyi kozwa yango. Kɔtisá yango na kati ya bazulunalo to mikanda mosusu oyo okopesa bato. Kɔtisá yango mpe na mikanda oyo ozali kokomela bato. Yebisá bato oyo ozali kosolola na bango na telefone ete okotindela bango yango. Zaláká ntango nyonso na batrakte yango mpo na kopesa bato ntango okei kosomba biloko, na bisi, mpe na litatoli ya libaku malamu. Pesá yango na moto nyonso oyo ayei kotala yo. Kabolelá yango bandeko na yo, bato oyo bofandi na bango na lopango to bafandi pene na bino, baninga ya mosala, baninga ya eteyelo, mpe bato mosusu oyo oyebani na bango. Salá makasi opesaka bato nyonso oyo ozali kokutana na bango trakte oyo. Na nsima, okosala nini?
8 Soki moto andimi mbala moko: Bato mosusu bakondima mbala moko koyekola Biblia. Na yango, mbala nyonso oyo ozali na mosala ya kosakola, zaláká na mwa buku Azali kosɛnga mibale—mosusu mpo na moyekoli mpe mosusu mpo na yo moko. Soki moto yango azali mpenza na mposa, boyekoli ekoki kobanda mbala moko. Fungolá mwa buku yango na lokasa ya mibale, mpe tángá esika bakomi: “Lolenge ya kosalela mwa buku oyo.” Nsima, kende na liteya 1, mpe monisá ndenge ya koyekola. Na ntembe te, ezali mpenza mpasi te!
9 Soki moto oyo ayoki yo azali na mposa akanisa naino soki akoyekola to akoyekola te: Koumela te mpo na kozongela ye. Ntango okozongela ye, memá mwa buku Azali kosɛnga. Lakisá ye etanda ya makambo mazali na kati na lokasa ya mibale. Tiká ye moko apona lisolo oyo asepeli na yango. Fungolá yango, mpe bobanda koyekola liteya oyo aponi.
10 Kozongela bato oyo bandimaki bazulunalo: Soki opesaki trakte na bazulunalo, okoki kozongela moto yango mpe okoloba boye: “Mbala eleki nayaki awa, natikelaki yo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli moko. Ntango mosusu omonaki motó ya likambo ya zulunalo yango oyo ezali mpenzampenza Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli Eyebisa Bokonzi Ya Yehova. Lelo nalingi koyebisa yo soki Bokonzi yango ezali nini mpe ekosala nini mpo na yo na libota na yo.” Na nsima fungolá mwa buku Azali kosɛnga na liteya 6. Bandá na paragrafe ya liboso, tángá mpe limbolá mwa makambo mingi na kolanda ngonga oyo moto oyo ozali kosolola na ye azali na yango. Na nsima, oyokana na ye mpo na kozongela ye mokolo mosusu mpo bósilisa liteya yango.
11 Zaláká ntango nyonso na batrakte yango: Mokɛngɛli na mosala na bandeko oyo batalelaka mikanda bakosala ete lisangá ezalaka ntango nyonso na ebele ya batrakte Koyeba Biblia. Bombá mosusu na libenga to na pɔtɔmɔni na yo, na motuka na yo, na esika na yo ya mosala, pembeni ya porte ya ndako na yo—bisika nyonso oyo ekozala pene na yo. Kobosana mpe te komema mwa ndambo na sakosi na yo ya mosala ya kosakola mpo esalisa yo na bantango oyo okokutana na moto oyo okoki kosolola na ye masolo ya Biblia.
12 Tiká ete Yehova apambola milende na biso: Moklisto nyonso akoki komityela mokano ya malamu ya koteya moto moko solo. (Mat. 28:19, 20) Ozali kotambwisa boyekoli ya Biblia na moto moko? Soki ezali bongo, okoki kozwa ngonga ya kotambwisa boyekoli mosusu na programɛ na yo ya pɔsɔ na pɔsɔ? Soki oyekolaka Biblia na moto te, na ntembe te ozali na mposa ya koyekola mpe na moto mosusu. Bondelá Yehova apambola milende na yo mpo na kozwa moto oyo okobanda koyekola na ye. Na nsima, salá mpe makambo oyo eyokani na mabondeli yango.—1 Yoa. 5:14, 15.
13 Tozali na esaleli ya sika mpo na kobanda koyekola Biblia na bato! Salá nyonso omesana na yango. Kabolá yango mingi mpenza. Tósala nyonso oyo tokoki kosala mpo “tósala makambo ya malamu, tózala bato ya bomɛngo na misala ya malamu mpenza, tózala lobɔkɔ pɛtɛɛ, bato bayebi kokaba” makambo toyekoli oyo etali Liloba ya Nzambe.—1 Tim. 6:18, NW.
[Etanda na lokasa 8]
MABAKU YA KOKABOLA TRAKTE OYO
◼ Na masolo na biso ya mokolo na mokolo
◼ Ntango moto andimi kozwa mikanda na biso
◼ Ntango tokuti moto na ndako te
◼ Ntango tozali kozongela bato
◼ Ntango tokutani na moto na mosala ya kosakola na balabala
◼ Ntango tozali kopesa litatoli na bisika ya mombongo
◼ Ntango tozali kopesa litatoli ya libaku malamu
◼ Ntango tozali kokomela bato mikanda
◼ Ntango tozali na bisi
◼ Ntango moto ayei kotala biso
◼ Ntango tozali kosolola na bandeko na biso, bato oyo tofandi na bango, baninga ya mosala, baninga ya eteyelo, mpe bato mosusu oyo toyebani na bango