Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/02 lok. 9
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 8/02 lok. 9

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Augusto: Tokoki kolakisa mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bokonzi oyo ekosala Paradis; Nini ekómelaka biso soki tokufi?; Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko; Ntango moto oyo olingaka akufi. . . ; Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Osengeli kondima Trinité?; Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?; Sepela na bomoi ya seko na Mabele!; mpe “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika.” Tokoki mpe kolakisa mwa babuku oyo, soki esengeli: Bilimu ya bakufi​​—⁠Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?; Nos problèmes​​—⁠Qui nous aidera à les résoudre?; Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba?; mpe Un livre pour tous. Sɛtɛmbɛ: Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Liboso bosɛnga mikanda mosusu na biro ya Betele, ekozala malamu botala na masangá mosusu pembeni na oyo ya bino soki bazali na mikanda mingi koleka oyo etikali. Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto moko amonisi mposa, tokolakisa ye mpe mwa buku Azali kosɛnga, mpe tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na ye Biblia. Novɛmbɛ: Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? to Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Soki bato bamonisi mposa, bokoki kolakisa buku mosusu ya kala. Soki bozali na mikanda yango te, bokoki kotala na masangá oyo ezali pembeni na bino soki bazali na mikanda mosusu ya kala mingi.

◼ Masangá basengeli kobanda kosɛnga Calendrier des Témoins de Jéhovah 2003, Tótángaka Makomami mokolo na mokolo​​—⁠2003, mpe Annuaire des Témoins de Jéhovah 2003 na komande na bango ya mikanda ya Sɛtɛmbɛ. Mikanda wana nyonso ekozala na Lingelesi, mpe na Lifalanse. Mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo​​—⁠2003 ekozala mpe na Kiluba, Lingala, Monokutuba, Otetela, Portugais, Swahili, mpe Tshiluba. Calendrier des Témoins de Jéhovah 2003 ekozala mpe na Swahili, bokoki mpe kosɛnga yango.

◼ Mokɛngɛli-mokambi to ndeko mosusu oyo ye akopona akotalela kɔnti ya lisangá na mokolo ya 1 Sɛtɛmbɛ to mpe mwa moke nsima na yango soki likoki ezali. Soki bataleli yango, bakoyebisa lisangá nsima ya kotánga lapolo ya kɔnti oyo ekolanda.

◼ Evantɛrɛ ya mbula mobimba ya mikanda mpe bazulunalo nyonso oyo bozali na yango ekosalema na mokolo ya 31 Augusto 2002 to mpe mwa liboso to mwa nsima ya dati yango soki likoki ezali. Evantɛrɛ yango ekosalema ndenge kaka ndeko oyo atalelaka mikanda atángaka yango sanza na sanza, mpe bosengeli kokoma motuya ya mikanda yango na formilɛrɛ Stock des publications (S-18-F). Mpo bóyeba motuya ya bazulunalo nyonso oyo bozali na yango, bokoki kotuna bandeko oyo batalelaka bazulunalo na lisangá mokomoko oyo bosalelaka mikanda esika moko. Lisangá nyonso oyo etalelaka mikanda ekozwa formilɛrɛ Stock des publications (S-18-F) misato. Tosɛngi bino ete bótinda kopi ya malamu na Biro liboso ya mokolo ya 6 Sɛtɛmbɛ. Bosengeli kobomba kopi mosusu na dosye. Kopi ya misato, yango nde bokosalela lokola bruyɔ. Mokomeli ya lisangá oyo etalelaka mikanda asengeli kotambwisa mosala yango ya evantɛrɛ. Mokomeli mpe mokɛngɛli-mokambi ya lisangá oyo etalelaka mikanda bakotya sinyatili na bango na formilɛrɛ yango.

◼ Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 2002 ekozala na lisolo oyo: “Tozali na mposa ya kofanda esika moko na bazalani ya malamu.” Lokola lisolo yango ezali na ntina mingi, bakobakisela masangá bazulunalo (10 %) koleka ndenge bazwaka liboso.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto