Bozongeli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
Bozongeli ekosalema wana babuku ekangami, na kotalela masolo masalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda pɔsɔ ya 6 Mai tii pɔsɔ ya 19 Augusto 2002.
[Liyebisi: Na ntango ya bozongeli ya kokoma, salelá Biblia. Mitindami na motuna nyonso ezali mpo na kosalisa yo na bolukiluki na yo moko. Nimero ya lokasa mpe ya paragrafe etyami bipai nyonso te mpo na mitindami ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli]
Yanolá Solo to Lokuta na moko na moko na maloba oyo malandi:
1. Yilimia 18:1-6 emonisi ete Yehova atindaka bato na makasi ete básala makambo oyo balingaka te. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w99 1/4 lok. 22 par. 3-4.]
2. Basakoli ya lokuta bazalaki koyiba nguya ya maloba ya Nzambe mpe mbuma malamu oyo yango ekokaki kobimisa na bomoi ya bato oyo balingaki koyoka yango, na ndenge bazalaki kolendisa bango báyoka lokuta na esika ya koyoka makebisi ya solo oyo euti na Nzambe. (Yil. 23:30) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w92 1/2 lok. 4 par. 3.]
3. Na Yilimia 25:15, 16, “kɔpɔ ya vinyo ya nkɛlɛ” oyo ezali kotinda ‘mabota nyonso . . . mabongwana bibebe’ ezali nde kolobela makambo ya kokamwisa oyo mangomba ya lokuta ezali kobimisa. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w94 1/3 lok. 20 par. 13.]
4. Na kotalela ndenge oyo Matai asalelaki esakweli ya Yilimia, “mokili ya moyini” elakisi mokili ya liwa; mokili oyo, na nzela ya lisekwa, bana oyo Elode Monene abomaki bakozonga. (Yil. 31:15, 16; Mat. 2:17, 18) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w79-F 1/10 lok. 19 par. 13.]
5. Yilimia 37:21 endimisi biso ete Yehova akoki kosunga basaleli na ye ya sembo na ntango oyo mikakatano makasi ya nkita ezwi bango. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w97 15/9 lok. 3 par. 4–lok. 4 par. 2.]
6. Mokanda ya Bileli emonisi mawa monene ntango Nebukadanesala, mokonzi ya Babilone, akobebisa Yelusaleme na mobu 607 L.T.B. [si lok. 130 par. 1]
7. Bileli 5:7 emonisi polele ete Yehova apesaka bana etumbu mpo na masumu oyo baboti na bango basalaki. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá etanda na w88-F 1/9 lok. 27.]
8. Na Ezekiele 9:4 balobeli elembo oyo ezali kotyama na bilongi; elembo yango elakisi ete kaka boyebi mpamba nde ekobikisa moto. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w88-F 15/9 lok. 14 par. 18.]
9. “Makabo na motindo na mibali” oyo Baefese 4:8 (NW) elobeli ezali bankulutu baklisto, elimo santu eponi bango mpe bazali na mokumba ya kobatela bandeko na bango bandimi mpo bázala malamu na elimo. (Mis. 20:28) [w00 1/8 lok. 6 par. 3]
10. Kokokisama ya Ezekiele mokapo 23 na ntango na biso emonisi ete Lingomba ya Protesta ekokani na Oholiba mpe Lingomba ya Katolike na yaya na ye, Ohola. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w88-F 15/9 lok. 21 par. 22.]
Yanolá na mituna oyo milandi:
11. Pesá nkombo ya basakoli misato oyo bayebanaki mingi na boumeli ya eleko ya mpasi oyo ebandaki na mobu 617 tii 607 L.T.B., oyo esukaki ntango Yelusaleme ebebisamaki. [si lok. 133 par. 2]
12. Ntango tondimi libyangi oyo ezali na Luka 9:23, ndenge nini tokoki komonisa ete tozali mpenza na botɔndi mpo na mbeka oyo Klisto apesaki mpo na kobikisa biso? [w00 15/3 lok. 8 par. 1]
13. Na lolenge nini Yehova ‘azimbisaki’ Yilimia? (Yil. 20:7) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w89-F 1/5 lok. 31 par. 6.]
14. Yesu alingaki koloba nini ntango alobaki ete elimo santu “akolakisa bino makambo nyonso mpe akokanisela bino makambo nyonso masili ngai koloba na bino”? (Yoa. 14:26) [w00 1/4 lok. 8 par. 7-8]
15. Na kotalela Yilimia 35:18, 19, elikya nini bato oyo, na mikolo na biso, bakokani na bato ya libota ya Lekaba bazali na yango? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá su lok. 131 par. 7.]
16. Na ndimbola nini Banefilime bazalaki “bilombe” mpe bato ya “lokumu”? (Gen. 6:4) [w00 15/4 lok. 27 par. 9]
17. Ndenge nini Baluku akómaki kotɛngatɛnga na elimo, mpe liteya nini tokoki kozwa na likambo oyo ekómelaki ye? (Yil. 45:1-5) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w97 15/8 lok. 21 par. 14-16.]
18. Ntango nini mpe ndenge nini esakweli oyo ezali na Yilimia 50:38 ekokisamaki? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá dp lok. 150 par. 2-3.]
19. Na kotalela Bileli 1:15, likambo oyo ekómelaki Yelusaleme, “mwana mwasi ya Yuda,” ezali komonisa likambo nini oyo ekokómela mangomba ya boklisto? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá etanda na w88-F 1/9 lok. 27.]
20. Maloba “Longolá elamba ya motó mpe longolá motole,” oyo ezali na Ezekiele 21:26, elimboli nini? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w88-F 15/9 lok. 19 par. 16.]
Bakisá liloba lizangi na bisika bitikali mpamba kati na milɔngɔ milandi:
21. Moto ya bopɔlɔ ayebaka esika oyo makoki na ye ․․․․․․․․ ezala ata na ․․․․․․․․ na ye. Andimaka mpe ete makambo oyo asengeli kosala mpe oyo akoki kosala ezali na ․․․․․․․․. (Mika 6:8) [w00 15/3 lok. 21 par. 1-2]
22. Atako elimo santu ekolongola ․․․․․․․․ te, ekoki kosalisa biso ․․․․․․․․. (1 Kol. 10:13; 2 Kol. 4:7) [w00 1/4 lok. 11 par. 7]
23. Mosakoli Danyele asosolaki uta na makomi ya Yilimia ete libebi ya Yelusaleme esengeli koumela ․․․․․․․․ bosikisiki mpenza ya esakweli yango ezali solo kolendisa kondima kati na nguya oyo Yehova azali na yango mpo na kopesa ․․․․․․․․. (Yil. 25:12; Dan. 9:2) [si lok. 129 par. 37]
24. Mokanda ya Bileli esengeli kotinda basambeli nyonso ya solo na kozala na ․․․․․․․․ mpe na ․․․․․․․․, mpe ezali kopesa lisusu likebisi ․․․․․․․․ epai ya baoyo bazali komipesa te na makambo ya Yehova Nzambe. [si lok. 132 par. 13]
25. Ndakisa malamu oyo Abalayama apesaki ya kotika makambo mosusu ntango tolingi kosilisa matata, elendisi biso tótika te ete ․․․․․․․․ to ․․․․․․․․ ebebisa boyokani na biso na bandeko na biso. (Gen. 13:5-12) [w00 15/8 lok. 24 par. 3-4]
Poná eyano ya malamu na maloba oyo malandi:
26. Yobo amonaki mpenza ete (boyebi; motema mawa; kosambisa) ya Yehova ezali na ntina mingi, yango wana ye mpe amoniselaki basali na ye (bososoli; motema mawa; bosembo) (Yobo 31:13, 14) [w00 15/3 lok. 26 par. 1]
27. Na Yilimia 16:2-4, Yehova asɛngaki mosakoli Yilimia atikala monzemba (mpo amonisa elimo na ye ya komipesa; mpo amonisa ete Masiya akobala te; mpo amonisa bosolo ya maloba na Ye na oyo etali kobebisama ya Yelusaleme). [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w78-F 15/7 lok. 31 par. 2.]
28. Na Masese 4:7, bwanya elimboli (koyeba makambo mingi; komona ndenge oyo likambo moko eyokani na mosusu; kosalela boyebi mpe mayele na ndenge oyo ekobota mbuma malamu). [w00 15/5 lok. 21 par. 1]
29. Moto moko te akoki koyeba mpenzampenza ndenge oyo bazalaki kotánga nkombo ya Nzambe na Liebele, mpamba te Liebele oyo bakomaki na yango Biblia ezalaki kokomama (na milelisi [voyelle] mpamba; na rs lok. 198 par. 1]
30. Likalo ya Nzambe oyo Ezekiele mokapo 1 elobeli ezali elilingi ya (Bokonzi ya Nzambe oyo ekotambwisama na Masiya; ebongiseli ya Yehova na elimo oyo esalemi na baanzelu; kosolola ya Yehova na batikali bapakolami). [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w88-F 15/9 lok. 11 par. 5.]
Yokanisá mikapo milandi na maloba oyo mazali awa na nse:
Det. 7:25, 26; Mas. 4:18; 5:21; Yil. 46:28; Lom. 15:4
31. Etinda oyo emonisi ndenge basaleli ya Yehova basengeli kotalela bililingi nyonso oyo bango bazalaki kosambela kala. [rs lok. 189 par. 5]
32. Lolenge ya malamu mpenza oyo Yehova apesaka bato libɔndisi ezali nde na nzela ya Liloba na ye oyo ekomami. Liloba yango ezali kopesa elikya ya malamu mpo na bomoi na mikolo ekoya. [w00 15/4 lok. 5 par. 4]
33. Ntango baboti bazali kopesa disipilini, basengeli te kolekisa ndelo to kobosana mokano na yango, oyo ezali ya kosembola mpe ya koteya. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá kl lok. 148 par. 20.]
34. Lokola Yehova asalisaka basaleli na ye báyeba mokano na ye malɛmbɛmalɛmbɛ, soki boyebi ebakisami, mbala mingi esɛngaka ete moto asala mbongwana na lolenge na ye ya kokanisa. [rs lok. 400 par. 1]
35. Misala nyonso ya nsɔni, ata ebombani to te, ezali polele na miso ya Nzambe. [w00 15/7 lok. 31 par. 4]