Manaka mpo na likita ya mosala
Pɔsɔ ebandi na 12 Augusto
Min. 7: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo etali lisangá na bino oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi. Na makita ya mosala ya kosakola oyo ekosalema mbala ya nsima, tolendisi masangá bábongisa mpe básala bilakiseli mibale na kolanda makanisi oyo ezali na lokasa 10, oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto mpe Lamuká! ya 22 Augusto. Na elakiseli mokomoko, monisá lolenge moko ya koyeba ndenge ya kosolola na bato oyo balingaka kokata lisolo na motuna oyo: “Pourquoi repassez-vous si souvent?” (Mpo na nini boyaka na bandako ya bato mbala na mbala?)—Talá Comment raisonner, lokasa 20.
Min. 20: “Omityela mikano ya elimo.”a Ntango bokokóma na paragrafe 5, kɔtisá makanisi ya kolendisa oyo ezali na buku Lisanga, nkasa 115-117, mpo na oyo etali mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza, eteyelo mpo na kobongisa basungi, mosala ya misiɔnɛrɛ mpe mosala na Betele.
Min. 18: “Tozali na esaleli ya sika mpo na kobanda boyekoli ya Biblia!” Lisolo elongo na bayangani, ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola. Basaleli na misala bakopesa bayangani nyonso trakte ya sika Aimeriez-vous en savoir plus sur la Bible? (Olingi koyeba Biblia malamu?) soki ezali. Salelá makanisi oyo ezali na etanda, “Ndenge ya kolakisa bazulunalo na biso” mpo na kobongisa malamu bilakiseli mibale. Mosakoli mosusu akolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, mpe mosusu akolakisa Lamuká! Na bilakiseli yango mibale, mosakoli akosukisa na kopesa trakte Koyeba Biblia na moto oyo asololi na ye—ezala oyo andimi kozwa zulunalo to oyo andimi te. Lendisá bato nyonso bápesa trakte yango ya sika na bato nyonso oyo bakokutana na bango na mosala ya kosakola. Mpo na masangá oyo basalaka makita na bango na Lifalanse te, tolendisi bango bámesana na makambo oyo ezali na lisolo oyo mpe na trakte yango na Lifalanse, ata soki ebimi naino te na monɔkɔ oyo basalelaka na makita ya lisangá na bango.—Talá mokanda epai ya masangá nyonso ya 10 Augusto 2001.
Loyembo 191 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 19 Augusto
Min. 12: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Lobelá “Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo.” Pesá dati ya liyangani yango, mpe lendisá bandeko nyonso bákóma na esika ya liyangani yango liboso programɛ ebanda mpe bátya likebi na programɛ mobimba. Lendisá basakoli bábengisa bato ya sika mpe bayekoli ya Biblia.
Min. 15: Eloko nini epekisaka bango? Lisolo elongo na bayangani mpe elakiseli. Na mosala na biso ya kosakola, tokutanaka mbala mingi na bato oyo balingaka mpenza te kosolola makambo etali bindimeli na bango. Yango ekoki kozala mokakatano mpo na biso ya kosakolela bango nsango ya Bokonzi. Soki toyebi mpo na nini moto alingaka kosolola na biso te, ekoki kosalisa biso tóbongisa maloba oyo tokoki kosalela mpo na kolendisa ye abimisa makanisi na ye. Lobelá ndenge nini tokoki kobongola maloba na biso mpo na kobanda lisolo ntango tokutanaka na bato lokola: (1) Baoyo basepelaka te na makambo ya mangomba, ata oyo ya lingomba na bango moko. (2) Baoyo basepelaka na mimeseno ya lingomba na bango kaka mpo libota na bango esalelaka yango to bankɔkɔ na bango bazalaki kosalela yango. (3) Baoyo basepelaka mpenza te kosolola makambo etali bindimeli na bango na bato mpo bayebi mikapo ya Biblia te oyo ezali kondimisa yango. (4) Baoyo bazali na makanisi mabe mpo na biso likoló ya maloba mabe oyo batɛmɛli na biso babimisaka. Bongisá liste yango na kotalela makambo oyo esalemaka na teritware na bino, mingimingi lobelá mpe bizaleli oyo bato mingi bazalaka na yango. Salá mpe mwa elakiseli ya mokuse mpo na komonisa ndenge nini tokoki kolendisa moto andima kosolola na biso likambo moko ya Makomami.
Min. 18: “Monisá ete ozali moklisto ya sembo ntango moto moko ya libota na bino abimisami na lisangá.”b (Paragrafe 1-8) Ekosalema na nkulutu moko ya makoki, mpe akosalela mituna oyo ezali na lisolo. Sɛngá ndeko mobali moko oyo atángaka malamu atánga paragrafe mokomoko na mongongo makasi.
Loyembo 136 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 26 Augusto
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Salelá makanisi oyo ezali na lokasa 10, sɛngá mobongisi-nzela moko ya sanza na sanza to mobongisi-nzela mosungi asala elakiseli mpo na komonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ mpe sɛngá na mosakoli moko ya lisangá amonisa ndenge ya kolakisa Lamuká! ya 8 Sɛtɛmbɛ. Lendisá basakoli nyonso básalela vɛrsɛ moko ntango bazali kolakisa bazulunalo yango.
Min. 17: “Yebá kosolola malamu na bato!”c Mpo na kosukisa, lendisá basakoli bázongela mokapo, “Ndenge ya koyeba kosolola na bato” na buku Zwá matomba na mateya ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, nkasa 62-65, soki ezali.
Min. 18: “Monisá ete ozali moklisto ya sembo ntango moto moko ya libota na bino abimisami na lisangá.”d (Paragrafe 9-14) Ekosalema na nkulutu moko ya makoki, mpe akosalela mituna oyo ezali na lisolo. Sɛngá ndeko mobali moko oyo atángaka malamu atánga paragrafe mokomoko na mongongo makasi.
Loyembo 125 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 2 Sɛtɛmbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Augusto. Lobelá na mokuse lisolo “Tángáká elongo na bana na yo” oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Mai 1999, lokasa 25.
Min. 20: Omibongisa liboso ya kokende. Lisolo elongo na bayangani mpe elakiseli. Kobongisa malamu makambo liboso esalaka ete mosala na biso ya kosakola ebota mbuma. Na yango, mpo na komibongisa osengeli liboso: (1) Kozwa mikanda oyo okosalela. (2) Kosala nyonso mpo ozala na lokasa ya notes de maison en maison mwa mingi mpe na biki to kreyo. (3) Soki esengeli ozwa transport, omibongisa mpo na yango libela. (4) Kanisá bato oyo olingi kozongela. (5) Obongisa makambo oyo okoyebisa bato. Soki okokamba likita mpo na mosala ya kosakola, bongisá teritware mingi mpo ekoka bato nyonso. Sololá na bayangani ndenge mibale to misato ya kolakisa buku Boyebi na mosala ya kosakola mpo na sanza ya Sɛtɛmbɛ. Salá elakiseli moko, mpe salelá vɛrsɛ moko na lisolo yango.—Talá makanisi oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi ya Yuli 1997, na lokasa 4, mpe na oyo ya Yuni 1996, na lokasa 8.
Min. 15: Bamposa ya lisangá. To sengá na bandeko bálobela makambo oyo bakutanaki na yango ntango bapesaki litatoli ya libaku malamu, ntango basololaki na bato esika mituka etɛlɛmaka, na babisi, na baparke, na bawenze, na bisika bazwaka mituka, mpe na bisika mosusu. Zongelá elakiseli moko to bilakiseli mibale ndenge oyo makambo elekaki.
Loyembo 99 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
d Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.