Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/02 lok. 1
  • Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Masolo mosusu
  • Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Liyangani ya mokolo moko mpo na mobu 2010
    Mosala na biso ya Bokonzi—2009
  • Liyangani ya sika ya mokolo moko
    Mosala na biso ya Bokonzi—1998
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 8/02 lok. 1

Liyangani ya mokolo moko ya mbala oyo

1 Atako bazulunalo, mikanda, televizyo mpe balakisi ya mokili bazali kokumisa kozala na bozwi mingi, Liloba ya Nzambe ezali kolendisa biso tózala “bato ya bomɛngo na misala ya malamu mpenza.” (1 Tim. 6:​18, NW) Yango nde motó ya likambo ya liyangani ya mokolo moko oyo ekosalema kobanda na sanza ya libwa ya mobu 2002. Bilendiseli nini tokozwa na liyangani yango?

2 Mokɛngɛli ya zongazonga akomonisa ndimbola ya maloba oyo, “Bózala bato ya bomɛngo na miso ya Nzambe,” mpe akotuna bandeko mosusu mituna, baoyo bazali kosala makasi mpo na kozala na bozwi ya elimo. Na lisukulu na ye ya liboso ya mokolo yango, molobi-mopaya akomonisa ndenge nini basaleli ya Nzambe bazali kosala “Misala ya malamu mpenza na ntango oyo ya kobuka mbuma.” Moko na moko na biso akolendisama na ndenge oyo tokoki kosala mingi koleka na mosala ya kobuka mbuma oyo Nzambe atindi esalema lelo.

3 Tozalaka na esengo mpenza ntango tozali komona bilenge baklisto bazali kolanda kozala na bozwi mingi ya elimo! Yango ekumisaka Yehova mpe esalisaka bilenge bátya moboko ya malamu mpenza mpo na kozwa mikumba mosusu na mikolo ezali koya. Lisolo oyo elobi “Tozali kopesa bilenge longonya mpo na misala ya malamu mpenza oyo ezali kosanzola Yehova” ekolobela misala ya malamu oyo bilenge baklisto ya zongazonga na biso basali.

4 Kosala misala ya malamu mpenza ebotaka mbuma nini? Molobi-mopaya akolobela yango na lisukulu na ye ya nsuka, “Landá kosala misala ya malamu mpenza mpe zwá mapamboli ya Yehova.” Akolobela bisika minei oyo tokoki kozwa mapamboli mingi: (1) moto ye moko, (2) na kati ya mabota (3) na kati ya lisangá, mpe (4) na kati ya ebongiseli na mokili mobimba.

5 Baoyo bamipesi na Yehova bakozala na libaku ya kozwa batisimo. Soki omoni ete okokisi masɛngami nyonso mpo na kozwa batisimo, yebisá mokɛngɛli-mokambi ya lisangá na bino mbala moko.

6 Ntango bakopesa dati ya liyangani yango, tósala mbangu mpo tómibongisa malamumalamu mpo na kozala wana. Tózala na mokano ya kokóma liboso liyangani ebanda mpo tóyemba loyembo ya ebandeli mpe tólanda libɔndeli ya ebandeli. Soki toyangani mokolo mobimba mpe totii likebi na programɛ nyonso ya liyangani yango, ekosalisa biso tólanda kozala na bomoi oyo ekokómisa biso bato na bomɛngo mpenza na miso ya Nzambe na biso, Yehova.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto