Manaka mpo na likita ya mosala
Pɔsɔ ebandi na 8 Yuli
Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo etali lisangá na bino oyo ezali na Mosala na biso ya Bokonzi. Salelá makanisi oyo ezali na lokasa 4 mpo na kobongisa bilakiseli mibale oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli mpe Lamuká! ya 22 Yuli (ebimeli ya Lifalanse). Na elakiseli mokomoko, monisá lolenge moko ya kopesa eyano soki moto alobi: “Nous sommes déjà chrétiens (Tozali mpe baklisto).”—Talá buku Comment raisonner, lokasa 19.
Min. 10: Biyano na mituna na bino. Lisukulu oyo ekosalema na nkulutu moko; akomonisa ndenge lisangá na bino ekoki kosalela makambo oyo ezali na lisolo yango. Soki lisolo yango ebongi na teritware na bino te, bótalela lisolo “Tómemya esika ya losambo ya Yehova,” na Mosala na biso ya Bokonzi ya Febwali 1998, lokasa 1.
Min. 20: Tómibongisaka mpo na kopesa litatoli ya libaku malamu. Lisolo elongo na bayangani, ekotalela makambo oyo ezali na buku Lisanga, nkasa 94-95. Salelá makanisi oyo ezali na lokasa ya liboso ya siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Yanuali 2002 mpo na kobongisa bilakiseli mibale to misato ya mikuse oyo ekomonisa ndenge ya kopesa litatoli ya libaku malamu epai ya moto oyo oyebi ye te, moto oyo bofandaka na ye kartye moko, ndeko na yo, to moto oyo boyebani na ye.
Loyembo 139 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 15 Yuli
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.
Min. 15: Bamposa ya lisangá.
Min. 20: Ntina oyo tosengeli kosalelaka Biblia na mosala ya kosakola. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Yesu ayebaki Makomami mpe mbala mingi azalaki kolobela yango ntango azalaki koteya. (Luka 24:27, 44-47) Makambo oyo ye ateyaki eutaki epai na ye moko te. (Yoa. 7:16-18) Ezali mpenza na ntina ete biso mpe tósalelaka Liloba ya Nzambe. Liloba yango ezali na nguya mingi koleka ata maloba nini oyo biso moko tokoki koloba. (Yoa. 12:49, 50; Ebe. 4:12) Libɔndisi mpe elikya oyo Makomami epesaka ebendaka bato oyo bazali na mitema sembo. Omityela mokano ya kotángaka ata vɛrsɛ moko na kati ya Biblia mbala nyonso oyo ozali koyebisa moto nsango malamu. Monisá na bayangani ete, na makanisi oyo bapesi na sanza oyo mpo na ndenge ya kolakisa bazulunalo, batii mpe bavɛrsɛ ya kotánga. Tuná basakoli mosusu báyebisa ndenge nini bazali kosalela Biblia na mosala ya kosakola mpe matomba nini yango ememeli bango moko mpe bato oyo bango bakendaki koteya.
Loyembo 215 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 22 Yuli
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Moboti moko na mwana na ye babimi elongo na mosala ya kosakola, bazali komonisa ndenge ya kosalela makanisi oyo ezali na lokasa 4 mpo na kolakisa zulunalo ya 1 Augusto mpe ya 8 Augusto. Elakiseli moko ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe mosusu ndenge ya kolakisa Lamuká! Lendisá baboti bápesaka bana na bango formasyo mokemoke na mosala ya kosakola.
Min. 17: Okoloba nini soki moto moko atuni yo makambo etali Lingomba ya Bamizilma? Lisukulu mpe elakiseli. Salelá buku L’humanité à la recherche de Dieu, mokapo 12; limbolá na mokuse bokokani oyo ezali kati na Biblia mpe Coran. (Talá etanda oyo ezali na lokasa 285.) Monisá bokeseni oyo ezali kati na liteya ya molimo, ndenge Bamizilma bateyaka yango (lokasa 297-300), mpe ndimbola oyo Biblia epesi. (Talá maloba na nse ya lokasa 299.) Salelá buku Comment raisonner, nkasa 27-31 mpo na kosala elakiseli oyo ekomonisa ndenge ya kolimbolela moto oyo abandi kosepela na solo likanisi ya Biblia mpo na molimo.
Min. 18: Ndenge nini nakoki kokima makambo mabe oyo ezali na Internet? Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani, ekotalela makambo oyo ezali na Lamuká! ya 22 Yanuali 2000, nkasa 19-21 (ebimeli ya Lifalanse). Monisá mitambo oyo ekoki kokanga moto soki azali kosalela Internet kozanga ndelo, mpe limbolá ndenge ya kokima yango. Sɛngá bato oyo bazali koyoka báyebisa matomba oyo bazwi mpo balandaki toli yango. Soki na teritware na bino Internet ezali te, bósalela mitinda oyo ezali na lisolo yango na makambo oyo elekaka na teritware na bino.
Loyembo 61 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 29 Yuli
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Yuli.
Min. 10: “Liyangani ya zongazonga ya mbala oyo.” Lisukulu. Yebisá dati oyo liyangani ya zongazonga ya mbala oyo ekosalema. Lendisá bandeko nyonso bázala na liyangani yango mpe bálanda yango na likebi mpenza. Lendisá basakoli oyo bazwi naino batisimo te, bákanisa ndenge nini bakoki kokokisa masɛngami mpo na kozwa batisimo. Bandeko básala mpenza makasi mpo na kobengisa bato oyo bayekolaka na bango Biblia.
Min. 25: “Tósangana liboke moko na boyokani mpenza.”a Ntango bokokóma na paragrafe 3, kɔtisá makanisi oyo ezali na Lamuká! ya 22 Aprili 2000, nkasa 9-10 (ebimeli ya Lifalanse). Na paragrafe 4, kɔtisá makanisi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili 1995, nkasa 16-17, paragrafe 4-6.
Loyembo 81 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 5 Augusto
Min. 10: Mayebisi ya lisangá.
Min. 20: “Tóyanganisa bato ya minɔkɔ nyonso.”b Kɔtisá mpe makanisi oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili 2002, lokasa 24. Soki likoki ezali, limbolá na mokuse oyo lisangá na bino ezali kosala mpo na kosalisa bato ya teritware na bino oyo balobaka minɔkɔ ya bapaya, mpe salá elakiseli oyo ezali na paragrafe 4.
Min. 15: Makambo oyo basakoli ya lisangá na bino bakutanaki na yango. Sɛngá bayangani báyebisa mwa makambo ya kolendisa oyo bakutani na yango na basanza ya konje, na ndakisa na ntango ya liyangani ya etúká, ntango basalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi to ntango bazalaki kosala misala mosusu ya elimo.
Loyembo 184 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.