Mayebisi
◼ Mikanda oyo tokolakisa na Yuli mpe Augusto: Tokoki kosalela mwa buku nyonso ya nkasa 32 kati na oyo elandi: Bokonzi oyo ekosala Paradis; Nini ekómelaka biso soki tokufi?; Nkombo ya Nzambe oyo ekoumela seko; Ntango moto oyo olingaka akufi. . . ; Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Osengeli kondima Trinité?; Quel est le but de la vie? Comment le découvrir?; Sepela na bomoi ya seko na Mabele!; mpe “Tala, nazali kozalisa biloko nyonso biloko na sika.” Tokoki mpe kolakisa mwa babuku oyo, soki esengeli: Bilimu ya bakufi—Bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?; Nos problèmes—Qui nous aidera à les résoudre?; Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba? mpe Un livre pour tous. Sɛtɛmbɛ: La vie: comment est-elle apparue? Évolution ou création? Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Soki moto moko amonisi mposa, tokolakisa ye mpe mwa buku Azali kosɛnga, mpe tokosala makasi mpo na kobanda koyekola na ye Biblia.
◼ Kobanda na pɔsɔ oyo ebandi na mokolo ya 16 Sɛtɛmbɛ 2002, masangá ya Lifalanse, Lingelesi mpe Swahili ekobanda koyekola buku Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso II na Boyekoli ya Mokanda. Masangá ya Lingala ekoyekola buku Esakweli ya Yisaya—Pole mpo na bato nyonso I. Masangá ya Kiluba, Monokutuba, Otetela mpe Tshiluba ekoyekola buku Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota mpe masangá ya Uruund ekoyekola buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Etikali moke, bokozwa manaka ya boyekoli ya mokanda mpo na minɔkɔ wana nyonso.
◼ Kobanda na sanza ya Sɛtɛmbɛ, bakɛngɛli ya zongazonga bakosala lisukulu ya bato nyonso oyo ezali na motó ya likambo “Batelá bizaleli na yo ya moklisto!”
◼ Tolingi kolendisa bankulutu ya masangá bálanda malako oyo etali ndenge ya kosala elongo na Komite ya boyokani elongo na minganga (Comité de liaison hospitalier). Soki likambo moko ebimi na lisangá, bino bankulutu nde bozali na mokumba ya kokutana na bandeko ya Komite ya boyokani elongo na minganga to kobenga bango na telefone. Bosengeli te kosɛnga bandeko ya lisangá na bino báluka bango moko kokutana na bandeko yango to kobenga bango na telefone. Bóbosana te ete baadrɛsi mpe banimero ya telefone ya bandeko ya Komite ya boyokani elongo na minganga ezali likambo ya nkuku. Bóbosana mpe te ete mokumba na bino esuki kaka te na kokutana to kobenga bandeko ya Komite ya boyokani elongo na minganga, kasi tozali mpe kosɛnga ete nkulutu ata moko atikala elongo na moklisto oyo akutani na komekama na likambo ya kozongisama makila.—Talá siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya Mai 1994 mpe ya Mai 1995.
◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:
Lifalanse: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli (volimi relye 2001); Lamuká! (volimi relye 2001).
◼ Kasɛti video ya sika oyo tozali na yango:
Lifalanse: Mituna oyo bilenge batunaka—Ndenge nini nakoki kozwa baninga ya solosolo? (PAL mpe SECAM)