Manaka mpo na likita ya mosala
Pɔsɔ ebandi na 14 Yanuali
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Lobelá etanda “Masangá ya sika oyo esalemi na kolanda mibeko ya Leta na États-Unis.”
Min. 25: “Makanisi mpo na ndenge ya kobanda masolo na mosala ya kosakola.” Lisolo elongo na bayangani ekotambwisama na mokɛngɛli na mosala. Na siplema oyo, tokokuta makanisi ndenge na ndenge oyo epesamaki na Mosala na biso ya Bokonzi ya bambula eleki mpo na ndenge ya kobanda masolo na mosala ya kosakola; makanisi mosusu ya sika mpe epesami. Milɔngɔ oyo etikali mpamba, ekoki kosalelama mpo na kokoma makanisi mosusu oyo ekobima na basanza oyo ezali koya, makanisi oyo bokomona ete ebongi kosalelama na teritware na bino. Sɛngá na bayangani báyebisa lolenge nini ya kobanda lisolo, kati na oyo epesami, oyo basepeli na yango mpenza mpe ntina oyo yango esepelisi bango. Kati na yango, poná moko to mibale oyo ekobonga mpo na kolakisa mikanda oyo esengeli kolakisama na Febwali; bómonisa mpe yango na bilakiseli. Lendisá basakoli nyonso bábatela siplema oyo mpe básalelaka yango mbala na mbala ntango bazali komibongisa mpo na kobima na mosala ya kosakola.
Min. 10: “Ndenge ya kolakisa bazulunalo.” Bilakiseli oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yanuali mpe Lamuká! ya 22 Yanuali. Lendisá basakoli nyonso bábima na mosala ya kosakola na mokolo ya kokabola bazulunalo.
Loyembo 55 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 21 Yanuali
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Bótalela etanda ‘Tóbomba mwa eloko pembeni.’
Min. 13: Botángaka Makomami mokolo na mokolo? Lisolo kati na bato ya libota moko. Mpo na kozwa lisusu matomba mingi na ndenge batalelaka mokapo ya mokolo, bataleli Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Desɛmbɛ 1996, lokasa 18, paragrafe 13-14. Balobeli na mokuse mikapo mibale to misato oyo bauti kotalela mikolo oyo, mpe balimboli ndenge nini bazwelaki yango mpenza litomba. Bamonisi ete mabota esengeli kokɔtisa likambo ya kotalela mokapo ya mokolo na programɛ na bango ya koyekola Biblia mbala na mbala na kati ya libota, yango ezali na mokano ya kosalisa bango ete bázala ntango nyonso makasi na elimo.
Min. 22: “Tólanda kotya Bokonzi na esika ya liboso.”a Tuná mpe mwa mituna likoló ya makambo ya ntina oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Sɛtɛmbɛ 1998, nkasa 19-21.
Loyembo 168 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 28 Yanuali
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Yanuali. Salelá makanisi oyo ezali na lokasa 8 mpo na kobongisa bilakiseli mibale ya mikuse oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa bazulunalo, moko ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Febwali mpe mosusu ekomonisa ndenge ya kolakisa Lamuká! ya 8 Febwali. Yebisá mikanda oyo tokolakisa na sanza ya Febwali, bendá likebi mingi na babuku oyo ezali na lisangá.
Min. 20: “Baboti—Bóteya bana na bino banda bomwana.”b Lobelá mpe makambo oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 1998, lokasa 32. Sɛngá na baboti báyebisa matomba oyo bazwi na ndenge babandaki koteya bana na bango makambo ya elimo banda bomwana.
Min. 15: Bamposa ya lisangá. Sɛngá na basakoli báyebisa makambo oyo bakutanaki na yango na ntango basalelaki buku Comment raisonner, na ntango balakisaki mwa babuku oyo ebongaki mpo na kopesa biyano na mituna oyo bato batunaki bango, to na ntango basalelaki mwa buku Ntango moto oyo olingaka akufi mpo na kopesa libɔndisi oyo euti na Makomami. Mbala mosusu bokoki kobongisa elakiseli moko to bilakiseli mibale oyo ekomonisa ndenge makambo yango elekaki.
Loyembo 202 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 4 Febwali
Min. 8: Mayebisi ya lisangá.
Min. 17: “Ndenge nini bakoyoka?”c Sɛngá bayangani bápesa makanisi mpo na ndenge ya kosalela bavɛrsɛ oyo ezali na kati ya lisolo. Lobelá mpe mituna oyo ezali na baparagrafe 17-18 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Augusto 1998, lok. 20.
Min. 20: Tózwa matomba na bibongiseli wana ya boboto. Lisukulu ekosalema na nkulutu moko ya makoki, akolobela bibongiseli oyo ezwami mpo na kosalisa bandeko ntango basengeli kozwa bikateli na makambo ya monganga, na ndakisa kalati Instructions médicales mpe masolo oyo ebimaki na “Mituna ya batángi” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuni 2000 mpe ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 2000. Lisangá esengeli kozala na motángo ekoki ya bakalati Instructions médicales. Na nsima ya likita oyo, bokopesa bakalati yango na basakoli nyonso oyo bazwá batisimo, kasi bakotondisa yango na mpokwa ya lelo te. Esengeli kokoma dati, mpe mokóló kalati na batemwe bakotya sinyatili na mokolo ya Boyekoli ya mokanda ya pɔsɔ oyo ekolanda; soki yango esengeli, motambwisi ya boyekoli ya mokanda akoki kosalisa bandeko. Batemwe basengeli mpenza komona mokóló kalati ye moko azali kotya sinyatili na kalati na ye. Basakoli oyo bazwi naino batisimo te bakoki kokoma Malako mpo na bango moko mpe mpo na bana na bango, bakoyokanisa makambo oyo ezali na bakalati ya la Société na ezalela na bango mpenza mpe na makambo oyo bango moko bandimaka mpenza. Monisá polele ete kozwa libelalibela bikateli na oyo etali lisalisi nini ya monganga tokoki kondima, na kotalela lisosoli na biso oyo eteyami na Biblia ekomonisa ete tozali mpenza na mayele. (Masese 27:12; 14:15) Esengeli kosolola na minganga liboso mpenza mpo na komonisa bango polelepolele lisalisi mpe nkisi nini ya monganga oyo tokoki kondima. Esengeli koyekola malamumalamu mpo na kokoka kozwa bikateli ya malamu. Tángá baparagrafe oyo ebongi ya masolo ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli oyo tolobelaki liboso. Bankulutu bakondima kosalisa bandeko na bango, kasi bakoki te kozwa bikateli na esika na bango. Limbolá lolenge nyonso oyo bandeko bakoki kolakisa kalati oyo ezali komonisa ekateli na bango.
Loyembo 224 mpe libondeli ya nsuka.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ye ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
b Maloba ye ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.
c Maloba ye ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.