Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/02 lok. 1
  • “Ndenge nini bakoyoka?”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Ndenge nini bakoyoka?”
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Masolo mosusu
  • Omibongisa mpo na kobika mpe kokota kati na mokili ya sika
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • “Litatoli na bikólo nyonso”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Kanisá mwasi ya Lota
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Ndenge nini tosengeli kotalelaka bato lokola mokolo ya Yehova ekómi pene?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 1/02 lok. 1

“Ndenge nini bakoyoka?”

1 Yesu alobaki polele ete: “Nsango malamu esengeli kosakolama na bikolo nyonso liboso.” (Mko. 13:​10, NW) Atako tozali kosala milende mingi, ezali kaka na ebele ya bato oyo bazwi naino litatoli te. Na bamboka mosusu, mosala na biso epekisami. Mikili mingi ezali mpenza na ebele ya bato mpe bazali kaka kokóma mingi nokinoki. Yango wana, motuna oyo etunami: “Ndenge nini bakoyoka?”​​—⁠Lom. 10:​14, NW.

2 Tótyela Yehova motema: Tosengeli kobosana te ete Yehova ayebi nyonso oyo ezali na motema ya moto mokomoko. Moto nyonso, ata soki azali ndenge nini, soki aluki koyeba solo na ntina na Nzambe na motema moko, akoyeba yango.​​—⁠1 Nta. 28:⁠9.

3 Abalayama azalaki komitungisa mingi mpo na bato oyo bazalaki kofanda na Sodomo mpe na Gomola. Kasi Nzambe akitisaki ye motema; alobaki na ye ete soki akuti bato ya sembo ata zomi na Sodomo, akobebisa mboka yango te. (Gen. 18:​20, 23, 25, 32) Ata mbala moko te Yehova abomá bato malamu elongo na bato mabe, likambo yango emonisamaki na ndenge abikisaki Lota na bana na ye ya basi.​​—⁠2 Pet. 2:​6-9.

4 Na eleko moko, Eliya akanisaki ete kaka ye moko nde azalaki kosalela Nzambe ya solo. Kasi, Yehova akitisaki ye motema; ayebisaki ye ete azalaki ye moko te mpe ete mosala oyo ye abandaki ekosalema nyonso. (1 Mik. 19:​14-18) Ezali boni mpo na ntango na biso?

5 Tózala ntango nyonso na mingi ya kosala na mosala ya Nzambe: Toyebi te soki mosala ya kopesa litatoli ekokende tii wapi. Mosala yango ezali ya Yehova mpe azali kosalela baanzelu na ye mpo na kotambwisa yango. (Emon. 14:​6, 7) Boye, ezali ye nde akoki koyeba soki litatoli esengeli kopesama kino wapi na kati ya bikólo nyonso. Soki Yehova alingi, akoki kosala ete nsango ya Bokonzi epalanganisama na ndenge oyo biso tokoki sikoyo kokanisa te, na boye ete bato mingi lisusu bákoka ‘koyoka liloba ya nsango malamu mpe bándima.’ (Mis. 15:​7, NW) Makambo oyo Yehova akosala ekozala na boyokani mpenza na ndenge oyo ye azali​​—⁠Nzambe ya bolingo, ya mayele, mpe ya bosembo.

6 Tozali na libaku malamu ya kosala na boyokani na mokano ya Yehova, tozali kosala nyonso oyo tokoki mpo moto nyonso ayoka nsango malamu.​​—⁠1 Kol. 9:⁠16.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto