Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 1/02 lok. 1
  • Tólanda kotya Bokonzi na esika ya liboso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tólanda kotya Bokonzi na esika ya liboso
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2002
  • Masolo mosusu
  • “Bókoba koluka liboso bokonzi”
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • Basaleli na misala basalaka mosala ya motuya
    Tobongisami mpo na kosala mokano ya Yehova
  • Likambo moko ezali kopekisa yo kosakola?
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • “Bokonzi na yo eya”—Libondeli oyo bato ebele basalaka mbala na mbala
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2020
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2002
km 1/02 lok. 1

Tólanda kotya Bokonzi na esika ya liboso

1 Kotya Bokonzi ya Nzambe na esika ya liboso na kati ya bomoi na biso mpe kosala ete ezalaka ntango nyonso na esika ya liboso, ezali likambo ya pɛtɛɛ te, mingimingi ntango tozangi mbongo to ntango tokutani na mikakatano mosusu. Ndenge nini tolandaka kotya Bokonzi na esika ya liboso ntango tokutani na mikakatano? Tokosala nini soki tozwi mosala moko oyo esɛngi ete tózangisaka makita to mosala oyo ezali kobebisa programɛ na biso ya mosala ya kosakola? Tokotya nde Bokonzi na esika ya mibale na bomoi na biso?

2 Esengeli kozala na kondima makasi: Ntango tokutani na likambo ya ndenge wana oyo ezali kotya kondima na biso na komekama, tosengeli te kobosana elaka ya Yehova mpe elikya oyo Yesu apesaki ete Nzambe akosunga biso soki toluki liboso Bokonzi. (Nz. 37:25; Mat. 6:​31-34) Mitungisi mpe mikakatano ya mokili ekoki kobebisa lolenge totalelaka makambo mpe kopekisa biso kolanda kotya Bokonzi na esika ya liboso. Bato mosusu kutu basili kotika mposa ya kokóma na lokumu mingi na mosala to mposa ya kozwa mbongo mingi ekóma likambo ya ntina mingi na bomoi na bango. Kasi, lokola Paulo, tosengeli koyeba malamumalamu eloko nini mpenza ezali na ntina mingi na bomoi na biso.​​—⁠Filp. 3:​7, 8. 

3 Esengeli osala mbongwana? Mosakoli moko alobaki boye: “Eloko ya liboso oyo ezalaki na makanisi na ngai ezalaki mosala oyo nazalaki kokamba​—⁠nazalaki kolinga yango mingi. Nakanisaki ete nakozala kaka Motatoli ata soki nazali kolekisa ngonga mingi na makambo ya mosala na ngai.” Kasi lisosoli na ye ekómaki kotungisa ye, akómaki komona ete akoki kosala mingi lisusu na mosala ya Yehova. Nsukansuka, atikaki mosala yango oyo ezalaki kopekisa ye akola na elimo. Ntango amipesaki mobimba na mosala ya Bokonzi, alobaki boye: “Sikoyo namoni ete bomoi na ngai ezali na ntina na miso ya Yehova, yango nde likambo eleki ntina.”

4 Bandeko mingi batiki mosala na bango mpe mikano minene oyo bazalaki na yango ya kokóma na mbongo mingi, bayeisi bomoi na bango pɛpɛlɛ, mpe bakɔti na mosala ya ntango nyonso; babongi mpenza kozwa longonya. Basaleli na misala mpe bankulutu oyo bazali bilenge mpe minzemba, baoyo bazali kokɔta na Eteyelo mpo na kobongisa basungi bazali kosala bongo mpe yango ezali kopesa bango mabaku malamu ya mosala. Bazali kolanda ndakisa malamu ya Paulo, bazali kosepela mpenza kaka na biloko oyo basengeli na yango mpo na kobikela.​​—⁠1 Kol. 11:​1, NW; 1 Tim. 6:​6-8; Ebe. 13:⁠5.

5 Ata soki bato ya mokili bakoki kosɛka biso mpo na lolenge oyo biso totalelaka bomoi, toyebi ete Yehova azali kopambola biso. (1 Kol. 1:​2, 6-31) Koyeba ete Yehova akosalela biso mingi mpe akosalisa biso mpo tókokisa mosala na ye ezali kolendisa biso, boye te? Libaku oyo tozali na yango lelo ya kosakola Bokonzi ya Nzambe, oyo esili kotyama kuna na likoló, ekozonga lisusu te. Yango wana, sikoyo nde ntango ya kolanda kotya Bokonzi na esika ya liboso na bomoi na biso.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto