Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/01 lok. 7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 10/01 lok. 7

Mayebisi

◼ Mikanda oyo tokolakisa na Ɔkɔtɔbɛ: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Novɛmbɛ: Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? to Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Soki bato bazali na mikanda wana mibale, bokoki kolakisa buku L’humanité à la recherche de Dieu to buku mosusu ya kala. Desɛmbɛ: Moto oyo alekaki bato nyonso kino lelo. Soki buku yango ezali te, bokoki kolakisa mikanda oyo: La Bible: Parole de Dieu ou des hommes?; Mokanda mpo na masolo ya Biblia; to Okoki kozala na bomoi ya seko na mabele oyo ekobongwana paradis. Yanuali: Buku nyonso ya nkasa 192 oyo ebimaki liboso ya mobu 1987, soki ezali na libombo ya lisangá. Masangá oyo ezali na buku L’humanité à la recherche de Dieu bakoki mpe kolakisa yango.

◼ Siplema ya Mosala na biso ya Bokonzi ya sanza oyo ezali na “Programɛ mpo na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpo na mobu 2002” mpe tosengeli kobatela yango malamu mpamba te tokosalela yango na boumeli ya mobu 2002 mobimba.

◼ Soki lisangá na bino ekobongola programɛ na yango ya makita na mokolo ya 1 Yanuali, mokomeli ya lisangá asengeli koyebisa yango na biro, asengeli kotondisa formilɛrɛ S-AB-5 (Réunions de la congrégation).

◼ Masangá esengeli kobanda kosɛnga mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo​—2002, na komande na bango ya mikanda ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ. Mwa buku yango ekobima na Kiluba, Lifalanse, Lingala, Lingelesi, Monokutuba, Otetela, Swahili mpe Tshiluba. Komande na yango ekobombama kino ntango mwa buku yango ekokóma mpe ekotindama na masangá. Mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo ekotindama na komande ya sipesiale.

◼ Tomoni ete masangá ezali kosɛnga mingi mabenga ya plastiki oyo batyelaka makarɔ. Tokanisi ete ezali eloko oyo bakoki kosalela yango mbala na mbala. Bóbomba yango malamumalamu mpo bókoka kosalelaka yango mbula na mbula na ntango ya liyangani ya etúká. Yango ekosala ete mosolo ebimaka mpambampamba te mpo na kosɛnga yango eyaka.

◼ Mikanda ya sika oyo tozali na yango:

Lingelesi: Volimi relye ya Lamuká! 2000.

◼ Mikanda oyo tozwi yango lisusu na stokɛ:

Kiluba: Bilimu ya bakufi-bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo? Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?; Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?

Monokutuba: Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?

Tshiluba: Bilimu ya bakufi-bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?; Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto