“Unis grâce à l’enseignement divin”—Mwa ndakisa ya bomoko ya solosolo kati na bandeko
Mokɛngɛli moko ya zongazonga abimaki na mosakoli moko oyo akendaki koyekola Biblia na mwasi moko oyo abandaki naino koyangana na makita ya lisangá te. Mokɛngɛli asɛngaki mwasi yango atala kasɛti-video Unis grâce à l’enseignement divin (Mateya mauti na Nzambe esangisi biso). Kaka na pɔsɔ wana, mwasi yango akendaki na makita mpe alobaki ete azalaki na esengo mingi. Mpo na nini kasɛti-video yango etindaki ye nokinoki ete andima kokende na makita? Mwasi yango akamwaki ndenge amonaki na kasɛti yango ete tozali bandeko oyo bazali na bomoko, oyo ezali komonana na misala kati ya mokili oyo etondi na mobulu mpe na koyinana.—Yoa. 13:35.
Tólendisi yo mpe ótala kasɛti-video yango mpe omona kimya mpe bolingo oyo Batatoli ya Yehova bazali na yango na mabele mobimba. Na nsima, kanisá na mituna oyo:
(1) Mpo na nini “Mateya mauti na Nzambe” ezalaki motó ya likambo oyo ebongaki mpenza mpo na mayangani ya etúká ya 1993 mpe 1994?—Mika 4:2.
(2) Mateya ya solo ya Biblia esali nini na mabota mosusu? Esali nini na libota na bino?
(3) Mpo na nini koteyama na Yehova ezali na ntina mingi?—Nz. 143:10.
(4) Kobongisa mayangani minene oyo esangisaka bato bauti na mikili mingi esɛngaka kolonga mikakatano nini?
(5) Na mayangani oyo okendeki, ndenge nini omonaki ete makambo oyo ezali na Nzembo 133:1 mpe na Matai 5:3 ezali mpenza solo?
(6) Nini ezali komonisa polele ete mateya ya Nzambe ezali na nguya?—Emon. 7:9.
(7) Kati na Milulu nyonso ya kopesa batisimo oyo baklisto ya solo basalá, oyo wapi elekaki monene?
(8) Maloba nini ya Mika, Petelo mpe Yesu ezali kokokisama na kati ya Batatoli ya Yehova?
(9) Nini ezali kondimisa yo ete bato ya esengo mpe oyo bafandi na bomoko ezali likambo oyo ezali kosalema solo?
(10) Okanisi ete okoki kolakisa kasɛti-video yango epai ya nani, mpe mpo na nini?
Nsima ya kotala kasɛti-video yango, ndeko mwasi moko alobelaki yango malamu mpe na mokuse ete: “Kasɛti-video oyo ekosalisa ngai mingi nabosana te ete bandeko mingi baklisto na mokili mobimba bazali sikawa kosalela Yehova na bosembo. . . . Lokola tozali bandeko oyo bazali na bomoko, yango ezali mpenza na motuya!”—Ef. 4:3.