Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/01 lok. 2
  • Manaka mpo na Likita ya Mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na Likita ya Mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 8 Ɔkɔtɔbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 15 Ɔkɔtɔbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 22 Ɔkɔtɔbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 29 Ɔkɔtɔbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 5 Novɛmbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 10/01 lok. 2

Manaka mpo na Likita ya Mosala

Pɔsɔ ebandi na 8 Ɔkɔtɔbɛ

Loyembo 109

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo etali lisangá oyo ezali na mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi. Lendisá moto nyonso atala kasɛti video “Unis grâce à l’enseignement divin” (Mateya mauti na Nzambe esangisi biso) mpo na komibongisa mpo na lisolo oyo ekosalema na Likita ya Mosala na pɔsɔ ya 22 Ɔkɔtɔbɛ. Talá makanisi oyo ezali na lokasa 8 mpo na kosala bilakiseli mibale ya mikuse oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa bazulunalo, moko ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ mpe mosusu ekomonisa ndenge ya kolakisa Lamuká! ya 22 Ɔkɔtɔbɛ.

Min. 35: Ozali kosalela makambo oyo oyekolaki na liyangani ya etúká “Bateyi ya Liloba ya Nzambe?” Lisolo elongo na bayangani, ekotalela makambo oyo elobamaki na liyangani; ekosalema na motambwisi ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Maloba ya ebandeli esengeli koumeli miniti moko, na nsima okotika miniti 10-12 mpo na kolobela programɛ ya mokolo mokomoko ya liyangani. Lobelá na mokuse makanisi ya ntina oyo ezali na nse ya motó ya likambo mokomoko mpe na nsima sɛngá na bayangani báyebisa (1) ndenge bazali kosala milende mpo na kosalela mateya yango, (2) litomba oyo bazwi mpo na kosalela yango, mpe (3) makambo oyo bamoni ete basengeli lisusu kobongisa. Tuná mituna oyo ekotinda bango bápesa makanisi na bango; oyo ekosala ete moto nyonso apesa biyano. Salisá bato nyonso bámona ntina ya kosalela makambo oyo bayekolaki.

Loyembo 151 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 15 Ɔkɔtɔbɛ

Loyembo 113

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.

Min. 15: Ozali na “motema ya botosi”? (1 Mik. 3:9) Lisukulu ekosalema na nkulutu moko, euti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Yuli 1998, nk. 29-31. Lobelá ndenge oyo tokoki komonisa botosi wana na lisangá.

Min. 20: Tósalela malamu bazulunalo na biso. Mokɛngɛli na mosala mpe mosaleli na misala oyo atalelaka bazulunalo bazali kolobela mwa mikakatano na oyo etali kokabola bazulunalo na kati ya lisangá. Balobeli ndenge oyo lisangá ezali kozwa bazulunalo mingi koleka motango ya bazulunalo oyo bazali kokabola sanza na sanza na mosala ya kosakola. Emonani ete bazulunalo mingi ezali kotikala to kobwakama. Ndenge nini basakoli bakoki kosalela malamu bazulunalo na biso? Bandeko yango balobeli makambo nsambo oyo ezali na lisolo “olakisaka bazulunalo ntango nyonso,” oyo esalemaki na pɔsɔ ya 4 Ɔkɔtɔbɛ 1999. Balobeli lisolo oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Febwali 1998, nk. 28-29, mpe bataleli ndenge oyo bakoki kosalela makanisi yango na lisangá na bango. Moto nyonso alendisami na komeka kosalela bandakisa oyo ezali kobima sanza na sanza na Mosala na biso ya Bokonzi mpo na ndenge ya kolakisa bazulunalo.

Loyembo 156 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 22 Ɔkɔtɔbɛ

Loyembo 120

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Talá makanisi oyo ezali na lokasa 8 mpo na kosala bilakiseli mibale mikuse oyo ekomonisa ndenge ya kolakisa bazulunalo, moko ekomonisa ndenge ya kolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ mpe mosusu ekomonisa ndenge ya kolakisa Lamuká! ya 8 Novɛmbɛ.

Min. 10: Okoloba nini? Lobelá na mokuse makambo oyo ezali na buku Comment raisonner na nk. 399-400 epai bapesi eyano ya polele na motuna oyo: “Comment les Témoins de Jéhovah arrivent-ils à leur explication des Écritures (Ndenge nini Batatoli ya Yehova bakokaka kolimbola Biblia)?” Bongisá malamu elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge ya kopesa eyano na motuna yango, ntango ozongeli lisusu moto oyo asepelaki, mpe na nsima bengá ye ayangana na makita ya lisangá.

Min. 25: “‘Unis grâce à l’enseignement divin’​—Mwa ndakisa ya bomoko ya solosolo kati na bandeko.” Lisolo elongo na bayangani. Salelá paragrafe ya liboso mpo na kobanda lisolo mpe ya nsuka mpo na kosukisa lisolo yango. Mpo moto nyonso azala na esengo ya kopesa eyano na lisolo yango oyo etali kasɛti video, tuná mituna nyonso oyo ebongisami. Soki na lisangá na bino ezali na bato oyo bakendeki liyangani ya etúká na mikili mosusu, sɛngá bango báyebisa ndenge bamiyokaki ntango bamonaki na miso na bango bomoko ya ebongiseli na biso na mokili mobimba. Soki ezali ata na moto moko te oyo akendeki liyangani na mokili mosusu, boye lobelá mwa masolo ya kolendisa oyo ezali na Annuaire ya 1994 na nk. 7-9, mpe na Annuaire ya 1995 na nk. 8-11. (Soki botalaki kasɛti video yango te na kati ya lisangá, bokoki kosalela buku Prédicateurs, lok. 254 par. 1-3; lok. 269, 278-282.) Na Desɛmbɛ tokotala kasɛti video Jusqu’aux extrémités de la terre (Kino na nsuka ya mabele).

Loyembo 47 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 29 Ɔkɔtɔbɛ

Loyembo 164

Min. 12: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ. Na sanza ya Novɛmbɛ, tokolakisa mwa buku Azali kosɛnga mpe buku Boyebi. Salelá maloba oyo ya kobanda lisolo mpo na kosala elakiseli: “Na mikolo oyo ya mpasi, mbongo oyo bato mingi bazwaka ekokisaka te bamposa na bango ya sanza mobimba. Okanisi ete bakonzi ya mokili bakosilisa mokakatano yango na ndenge oyo ekosepelisa moto nyonso? [Tiká ye apesa eyano.] Elaka oyo ezali na Biblia elendisaki ngai mingi.” Tángá Nzembo 72:12-14. Na nsima, yokanisá makambo oyo bozali kolobela na likanisi moko oyo ezali na mwa buku Azali kosɛnga to buku Boyebi, mpo na kolakisa ye mokanda yango.

Min. 15: Bamposa ya lisangá.

Min. 18: “Olyaka mpenza malamu na elimo?”a Sɛngá na bayangani bápesa makanisi mosusu oyo euti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Aprili 1997, nk. 28-31, mpo na kolimbola ntina oyo tosengeli kosala makasi mpo na kolya ntango nyonso malamu na elimo mpe ndenge oyo tosengeli kosala yango.

Loyembo 181 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 5 Novɛmbɛ

Loyembo 167

Min. 10: Mayebisi ya lisangá.

Min. 18: Ndenge oyo libota esengeli komibongisa mpo na makita. Tata azali kosolola na libota na ye mpo na ndenge oyo bango nyonso bakoki komibongisa mpo na kopesa biyano na makita. Basaleli makanisi oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 1999 nk. 19-20, paragrafe 9, babongisi biyano oyo bakopesa na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. (1) Moto mokomoko aponi motuna moko to mituna mibale oyo akopesa eyano na yango. (2) Nsima ya kotalela baparagrafe ya mituna yango, babongisi ndenge bakopesa biyano na maloba na bango moko. (3) Baponi mikapo ya ntina, mpe balobeli ndenge oyo mikapo yango eyokani na lisolo oyo ekotalelama mpe babongisi ndenge oyo bakosalela yango na lisolo yango. Bango nyonso bazali na mposa mpenza ya kopesa biyano na makita.

Min. 17: “Mokano na yango ezali nini?”b Monisá mpo na nini tosengeli kosalisa bayekoli bámona ntina ya koyangana na makita ya lisangá. Talá mokapo 17 ya buku Boyebi, paragrafe 6-8, mpo na kobongisa elakiseli moko oyo ekomonisa ndenge ya kosala yango.

Loyembo 186 mpe libondeli ya nsuka.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

b Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto