Bopɛto ekumisaka Nzambe
1 Mibeko ya Mose ezalaki na malako moko makasi na likambo etali bopɛto. Yango ezalaki kosala ete bato ya Yisalaele bazala libota moko oyo ekeseni na mabota mosusu, ɛɛ, libota yango esengelaki kotikala pɛto na nzoto mpe na elimo. (Lev. 11:35, 36; 15:1-11; Yis. 52:11) Bopɛto ezalaki kokumisa Nzambe mpe ezalaki kopesa nzela ete libota na bango ezala na kolɔngɔnɔ malamu.
2 Lelo oyo mpe, basaleli ya Yehova bazali bato ya bopɛto. Tolobi bongo nde mpo na bango nyonso, kasi ezali boni mpo na mokomoko na biso? Soki tozali kosala makasi mpo makambo na biso esalama na molongo mpe bopɛto ebatelama, tozali komonisa ete tozalaka na mposa makasi ya kolanda malako ya Yehova.
3 Bongo esika oyo biso tofandaka? Efingisaka nde nsango ya Bokonzi oyo tozali kosakola? Soki tozali te kobongisa esika oyo tofandaka, mpe tokataka peluze te mpe lopango na biso etondá na matiti, bato mosusu bakoki kokanisa ete tokosaka ntango tolobaka ete mabele ekobongwana paladiso, boye te? Soki ndako na biso ezali pɛto te to soki ezali kobimisa nsolo moko ya mabe mpo tobongisaka yango te, tokoki nde koloba ete tozali kopesa ‘ndakisa malamu ya komonisa bopɛto oyo ekozala na mokili ya sika oyo ekotambwisama na Bokonzi ya Nzambe’?—om 129-131.
4 Bongo motuka oyo tosalelaka mpo na mosala ya kosakola (soki tozali na yango)? Ezali mpenza pɛto na kati mpe na libanda, mpo efingisa te mosala oyo tozali kosala? Bongo bilamba na biso, sakosi na biso mpe nsuki na biso? Ezalaka mpenza ya malamu mpe ya pɛto, oyo moto moko te akomona yango bosoto? Mpo na kozala pɛto, tosengeli kosukola nzoto na biso mpe bilamba na biso mbala na mbala.—w89-F 1/6 16-19.
5 Esengeli kosala nini soki ndeko moko azali kotya likebi te mpo na bopɛto ya nzoto na ye to ya ndako na ye mpe likambo yango ekomi kopesa nsɔni na lisangá? Ekoki kozala mpo akomi mobange to azali na mbeba moko na nzoto na ye, yango ekosenga kosalisa ye na bolingo nyonso. Soki tosali bongo ekomonisa boboto oyo tozali na yango mpo na ye. Moto mosusu akoki kozala bosɔtɔ kasi ye moko ayebaka yango te; soki topesi ye toli na boboto nyonso, yango ekoki mbala mosusu kosalisa ye mpo abongisa bizaleli na ye. Baoyo bazali kopesa ndakisa ya malamu te na likambo yango bakokisi masɛngami te mpo na kozwa mikumba na kati ya lisangá. Kasi bankulutu basengeli te koluka ete bandeko basalaka makambo ya bopɛto kaka na ndenge oyo bango balingi.
6 Tobengisaka bato ya sika oyo bazali kosepela na solo ete báya na Ndako ya Bokonzi mpo na kolya bilei ya elimo. Mbala mingi, tokakatanaka te mpo na kobenga bango mpo toyebaka ete Ndako ya Bokonzi ezali pɛto mpe ebongisami malamu. Nzokande, tosengeli kosala makasi mpo yango etikala ntango nyonso pɛto ndenge wana. Tótala pembenipembeni na biso. Bakiti, mabele mpe bifelo ezali pɛto? Tosukolaka twalɛti mikolo nyonso? Soki tomeseni komonamona tapi ya bosoto mpe bifelo oyo elongwalongwa bamposo, nsukansuka tokobanda komona yango lisusu mabe te. Kasi bato oyo bazali koya mpo na mbala ya liboso na Ndako ya Bokonzi, ntango bazali komona yango bosoto bongo, bakoki kokende na likanisi moko ya mabe. Tosengeli kosala nyonso mpo ete Ndako ya Bokonzi ezala ntango nyonso malamu mpe pɛto; mpo na yango, tosengeli kopesa maboko ntango ngala na biso ekoki ya kosukola yango to ya kobongisa bisika oyo ebebaki.
7 Ata soki tobimisi liloba te, tokoki kokumisa Nzambe na ndenge oyo tozali kobongisa nzoto na biso mpe na bopɛto ya esika tofandaka, mpe ya motuka na biso mpe ya Ndako ya Bokonzi. Ndakisa na biso ya malamu na likambo ya bopɛto ekobɛtisa moto moko te libaku, kasi ekomonisa nde ete losambo na biso ezali ya pɛto mpe ya sembo.—1 Kol. 10:31, 32; Yak. 1:27.