Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 4/01 nk. 4-7
  • Mayebisi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mayebisi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2001
Mosala na biso ya Bokonzi—2001
km 4/01 nk. 4-7

Mayebisi

◼ Mikanda tokolakisa na Aprili mpe Mai: Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Tokolakisa mpe buku Boyebi to mwa buku Azali kosɛnga mpo na kobanda koyekola na bato Biblia. Yuni: Mwa buku Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso? to buku Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko. Tokosala makasi mpo na kobanda koyekola Biblia na bato. Yuli: Tokoki kosalela mwa buku ya nkasa 32 kati na mwa babuku oyo elandi: Bokonzi oyo ekosala Paradis; Nini ekomelaka biso soki tokufi?; Ntango moto oyo olingaka akufi. . . ; Nzambe azali komibanzabanza mpo na biso?; Osengeli kondima Trinité?; Quel est le but de la vie ? Comment le découvrir?; mpe Sepela na bomoi ya seko na Mabele! Tokoki mpe kolakisa mwa babuku oyo soki esengeli: Bilimu ya bakufi​—bikoki kosalisa yo to kosala yo mabe? Bizali solo?; Nos problèmes​—Qui nous aidera à les résoudre?; Tokofanda mokolo mosusu kati na mokili mozangi bitumba? mpe Un livre pour tous.

◼ Makarɔ mpo na liyangani ya etúká na mobu 2001, na Kiluba, na Lifalanse, na Lingala, na Lingelesi, na Monokutuba, na Otetela, na Swahili, mpe na Tshiluba ekotindama mbala moko na masangá soki ekomi na ntango malamu. Soki te, bandeko bakozwa yango na esika ya liyangani. Ekozala na ntina te ete masangá esala komande na yango. Liboke mokomoko ekozala na makaro 25 mpe makaro yango ekotindama na kotalela mposa ya lisangá mokomoko.

◼ Na “Programɛ ya Eteyelo ya mosala ya Teokrasi mpo na mobu 2001”, lisolo ya 3 mpe ya 4 ekouta na buku Comment raisonner, na bankasa mpe baparagrafe oyo epesami na programɛ. Mpo na koyeba kotánga baparagrafe na kati ya buku yango, salá boye: talá bisika nyonso oyo molɔngɔ ya liboso ekɔtá mwa moke na kati; wana nde paragrafe.

◼ Banda sikoyo, masangá ekoki kobanda kotinda komande na bango ya Calendrier 2002, ya Annuaire 2002 mpe ya mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo 2002. Calendrier 2002 mpe Annuaire 2002 ekozala na Lifalanse. Nzokande, mwa buku Tótángaka Makomami mokolo na mokolo 2002 ekozala na Lifalanse, na Lingala, na Monokutuba, na Otetela, na Swahili mpe na Tshiluba. Liboso ete mikanda yango eya, nkasa ya kotinda mikanda (bordereaux d’expédition) ekozala na maloba oyo: “Noté pour plus tard.” Mikanda yango nyonso ezali ba articles sur demande spéciale. Bótondisa kaka demande moko ya mikanda (S-14) mpo na mikanda yango, bóbosana te kokoma lokota nini bolingi. Bóbosana mpe te ete demande yango ekosalema mbala moko mpo na libela. (Bótalela lisusu makambo 1.3 oyo ezali na mwa buku S-15a, lokasa 8.)

◼ La Société asengeli kozala ntango nyonso na baadresi mpe banimero ya telefone ya bakɛngɛli-bakambi nyonso mpe ya bakomeli nyonso ya masangá. Soki mokɛngɛli-mokambi to mokomeli moko alongwe na esika oyo azalaki kofanda liboso, mokomeli asengeli kokomela la Société na kosaleláká formilɛrɛ (S-29) mpo na koyebisa yango noki. Yango etaleli mpe mbongwana ya nimero ya telefone ya esika wana.

◼ Bakomeli ya masangá basengeli ntango nyonso kozala na baformilɛrɛ oyo mwa mingi na libombo: Demande d’admission au service de pionnier permanent (S-205), Demande d’admission au service de pionnier auxiliaire (S-205b). Bokoki kosala komande na yango na nzela ya formilɛrɛ Demande de publications (S-14). Bózala na motuya oyo ekoki kosalelama ata koleka mbula mobimba. Talelá nkasa ya lisɛngi mpo na mosala ya mobongisi-nzela ya sanza na sanza mpo na koyeba soki etondisami malamumalamu. Soki bandeko oyo bazali kotondisa lokasa yango bazali koyeba lisusu te dati oyo bazwaki batisimo, bakoki kokoma ata dati moko ya pembeni mpe kobatela dati yango na makanisi.

◼ Kobanda na pɔsɔ ya 30 Yuli 2001, tokobanda koyekola buku La prophétie d’Isaïe, lumière pour tous les humains I (Esakweli ya Yisaya​—Pole mpo na bato nyonso 1) na boyekoli ya mokanda.

◼ Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Mai 2001 ekozala na masolo oyo elobi: “Mpo na nini Nzambe apesi nzela na bampasi?” Lokola masolo yango ezali na ntina mingi, bakobakisela lisangá mokomoko bazulunalo (20 %) koleka ndenge bazwaka liboso.

◼ Soki okosala mobembo na mboka mosusu mpe olingi koyangana na makita, to koyangana na liyangani ya zongazonga, to na liyangani ya etúká kuna, osengeli kotuna makambo oyo etali dati, ngonga, mpe esika oyo yango ekosalema na biro ya filiale oyo etalelaka mosala na mboka yango. Baadrɛsi ya babiro ya filiale etyami na lokasa ya nsuka ya Annuaire ya mbula oyo.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto