Bozongeli na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi
Bozongeli ekosalema wana babuku ekangami, na kotalela masolo masalemaki na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi kobanda pɔsɔ ya 1 Yanuali kino pɔsɔ ya 23 Aprili 2001.
[Liyebisi: Na ntango ya bozongeli ya kokoma, salelá kaka Biblia. Mitindami mipesami nsima ya motuna nyonso ezali mpo na kosalisa yo na bolukiluki na yo moko. Nimero ya lokasa mpe ya paragrafe etyami bipai nyonso te mpo na mitindami ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.]
Yanolá Solo to Lokuta na moko na moko na maloba malandi:
1. Atako tosengeli te kotika mayoki na biso ekanga biso miso liboso ya mabunga minene, tokoki komekola ndakisa ya Yosefe ntango moto moko asaleli biso mabe mpe abongoli mpenza motema, tosengeli kolimbisa ye. (Gen. 42:21; 45:4, 5) [w99 1/1 lok. 31 par. 2-3]
2. Longola kotánga milɔngɔ ya mabota, mokanda ya 1 Ntango ezali bobele kozongela makambo oyo ezali na mikanda ya Samwele mpe ya Mikonzi. [si-LI lok. 75 par. 1]
3. Biblia ezali kolobela bobele “motɛmɛli na Klisto” moko oyo akobima na mikolo oyo ezali koya. [rs lok. 35]
4. Yesu amonisaki komikitisa ntango andimaki mokumba ya koya awa na mabele mpe kokóma moto mpamba, na nse ya baanzelu. (Filp. 2:5-8; Ebe. 2:7) [w99 1/2 lok. 6 par. 3]
5. Misala ya arkeoloji ezali kolobela kokɔta ya Mokonzi Sisaka na Yuda mpe ndenge abɔtɔlaki “biloko ya motuya na ndako ya Yehova mpe biloko ya motuya na ndako ya mokonzi.” (2 Nta. 12:9) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w88-F 1/2 lok. 26 par. 4.]
6. Baklisto ya ekeke ya liboso bazalaki kopesa bana mike batisimo te. [rs lok. 47-48]
7. Ntango moto moko azali kosalela Nzambe, asengeli te kozala na makanisi ya kozwa mbano. [w99 15/4 lok. 16 par. 1]
8. Ntango azali kolobela “misala” ya Yehova na Nzembo 103:2, Davidi azali kokanisa biloko nyonso oyo Yehova asalá. [w99 15/5 lok. 21 par. 5-6]
9. Batempelo oyo Salomo, Zelubabele na Elode batongaki, mpe mongombo oyo Mose atongaki, nyonso ezalaki elilingi ya eloko moko. [si-LI lok. 87 par. 16]
10. Milɔngɔ ya mabota oyo ezali na 1 Ntango, ezalaki na litomba moko te mpo na baklisto ya liboso. [si-LI lok. 78 par. 23]
Yanolá na mituna oyo milandi:
11. Mpo na nini Yehova apesaki etumbu makasi na ndako ya Ahaba? (1 Mik. 16:31; 2 Mik. 9:7, 26) [si-LI lok. 74 par. 34]
12. Ndenge yango emonisami na Matai 24:45-51, ndenge nini tokoki koyeba bapɛngwi? [rs lok. 38]
13. Likambo oyo ekomelaki Uziya mokonzi ya Yuda ezali koteya biso nini na oyo etali ndenge ya kotalela makoki na biso? (2 Nta. 26:15-21) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w99 1/12 lok. 26 par. 1-2.]
14. Na esika ya kobandisa molulu ya kosukola bato makolo, liteya nini ya ntina Yesu apesaki ntango asukolaki makolo ya bayekoli na ye? (Yoa. 13:4, 5) [w99 1/3 lok. 31 par. 1]
15. Mpo na nini lisolo oyo ezali na 1 Ntango 14:8-17 ezalaki na ntina mingi na mikolo ya Yisaya, mpe mpo na nini esengeli kozala na ntina mingi mpo na mangomba ya boklisto lelo oyo? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w91 1/6 lok. 21 par. 2-3.]
16. Makambo nini esalaki ete Bayisalaele bábendama na lingomba ya Baala? [w99 1/4 lok. 29 par. 3-6]
17. Liteya nini ya ntina tosengeli kozwa na mosala oyo Hizikiya asalaki mpo na kobatela mpe koyeisa mai mingi na Yelusaleme? (2 Nta. 32:3, 4) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w96 15/8 lok. 6 par. 1-2.]
18. Ndenge nini ndakisa ya Yosiya ekoki kolendisa bilenge lelo oyo mpo básalela Nzambe mpe bátɛmɛla losambo ya lokuta? (2 Nta. 34:3, 8, 33) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w90 1/8 lok. 5 par. 2.]
19. Ezali Bayuda nyonso oyo batikalaki na Babilone nde bazalaki sembo te? mpe liteya nini ya ntina tokoki kozwa na likambo yango? (Ezl. 1:3-6) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w86-F 15/1 lok. 8 par. 4, 7.]
20. Na lisolo oyo ezali na 1 Ntango 5:13, 14, nini emonisi ete Yehova azalaki koyoka mpe kosepela na nzembo ya makumisi oyo basaleli na ye bazalaki koyemba? [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w94 1/5 lok. 10 par. 7.]
Bakisá liloba lizangi na bisika bitikali mpamba kati na milɔngɔ milandi:
21. Moto oyo azali kopesa moninga na ye moklisto toli, asengeli komindimisa ete makambo oyo azali koloba euti na ․․․․․․․․ ya Nzambe, kasi na ․․․․․․․․ to na ․․․․․․․․ ya bato te. (Kols. 2:8) [w99 15/1 lok. 22 par. 1]
22. Na etumba ya ․․․․․․․․, moto moko te akoloba ete ye ․․․․․․․․. (Mat. 12:30; 2 Tes. 1:8) [rs lok. 185]
23. Lokola nzube ekoki kopekisa milona kokola malamu mpe kobota mbuma, ndenge moko mpe ․․․․․․․․ oyo eleki ndelo mpe mposa ya ․․․․․․․․ ekoki kopekisa moto ete akola te na elimo. (Mat. 13:19, 22) [w99 15/3 lok. 22 par. 5]
24. ‘Kobatisama mpo na kozala bakufi,’ ndenge Paulo amonisaki yango na 1 Bakolinti 15:29, elimboli komipesa mobimba na bomoi ya ․․․․․․․․ lokola Klisto mpe na nsima ․․․․․․․․ na nzoto ya elimo lokola ye. [rs lok. 49]
25. Mpo moklisto ya solo alonga na likambo oyo Salomo akweaki na yango, asengeli koboya kosambela Nzambe na ․․․․․․․․ to na ․․․․․․․․ mpe asengeli kotosa maloba ya ․․․․․․․․ ya ‘kolinga Yehova Nzambe na ye na motema na ye mobimba.’ (Mat. 22:37; 1 Nta. 28:9) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w86-F 1/6 lok. 19 par. 17-18.]
Poná eyano ya malamu na maloba oyo malandi:
26. Lisolo oyo ezali na 2 Mikonzi 17:5, 6 emonisi ndenge oyo (Tigala-pilasala; Salamanasala V; Esala-hadona) abundisaki mabota zomi ya Yisalaele oyo ezalaki na nɔrdi mpe azingelaki Samalia na boumeli ya mbula misato, oyo na nsuka ekweaki na mabɔkɔ ya Baasulia na (740; 607; 537) L.T.B. [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá w88-F 15/2 lok. 27 par. 1.]
27. Ntango ezali kolobela makambo oyo esalemaki na Yelusaleme nsima ya komemama ya Bayuda na Babilone, 2 Mikonzi mokapo 25 ezali kopesa likanisi ete (Danyele; Ezekiele; Yilimia) nde akomaki mokanda yango mpe lisusu emonisi ete mokanda yango esukaki kokomama pene na (580; 537; 455) L.T.B. (2 Mik. 25:27) [Botángi ya Biblia pɔsɔ na pɔsɔ; talá si-LI lok. 64 par. 3.]
28. Exode 4:11 emonisi ete ezali Yehova Nzambe nde ‘azalisaka moto baba, mokufi-matoi, mpe mokufi-miso’ elingi koloba ete (soki bato bazali konyokwama na mbeba ndenge na ndenge ezali foti na ye; ye moto aponaka bato mpo na kozwa mikumba ndenge na ndenge; atiki nzela ete mbeba na nzoto emonana epai ya bato). [w99 1/5 lok. 28 par. 2]
29. Mbula 70 oyo elobelami na 2 Ntango 36:17-23 esukaki na (537; 607; 677) L.T.B. [si-LI lok. 84 par. 35]
30. Bilambo bobele mibale mpo na kokanisa mokolo ya mbotama oyo elobelami na Biblia (emonisi ete ezali malamu, ete ezali malamu te; ezali kolobela likambo ya elambo ya mbotama te). (Gen. 40:20-22; Mat. 14:6-10) [rs lok. 32]
Yokanisá mikapo milandi na maloba oyo mazali awa na nse:
Ex. 21:22, 23; Mas. 25:11; Lom. 12:2; 2 Pet. 3:15, 16; Emon. 16:13, 14
31. Biso moko nde tosengeli kolinga kosala milende ya kobongola makanisi na biso mpe kotondisa yango na solo ya Nzambe. [w99 1/4 lok. 22 par. 2]
32. Ntango tozali kopesa toli, kopona maloba ya malamu ezali na ntina. [w99 15/1 lok. 23 par. 1]
33. Yehova amonisaki ete moto oyo akosalela mwana oyo abotami naino te mabe, akomema ngambo. [rs lok. 40]
34. Satana nde azali kotinda bikólo ya mokili mobimba na likambo moko oyo ekomema bango na etumba ya Nzambe. [rs lok. 186]
35. Kobongola Makomami mobulumobulu mpo na kosepelisa makanisi na biso moko ekoki komema na libebi ya seko. [rs lok. 58]