Manaka mpo na likita ya mosala
Pɔsɔ ebandi na 9 Ɔkɔtɔbɛ
Min. 8: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo etali lisangá oyo ezali na Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi.
Min. 12: “Tyá likebi na misala ya kokamwa ya Nzambe.” Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano. Lobelá mwa bililingi oyo ezali na buku yango ya sika, oyo ezali kosala ete tósepela mpenza na esakweli ya Yisaya.
Min. 25: “Mbula nkóto ya sika—Mikolo oyo ezali koya ebombeli yo makambo nini?” Ekosalema na mokɛngɛli na mosala ya kosakola, akosala ete bandeko básepela mpenza na lisolo yango. Nsima ya kotánga mayebisi oyo euti na la Société, oyo ezali na mokanda oyo etindamaki epai na bankulutu, na dati ya 3 Yuli 2000, pesá bayangani nyonso Nsango ya Bokonzi No. 36 mokomoko. Na nsima, salá lisolo yango na mituna mpe biyano. Lobelá bibongiseli oyo lisangá na bino ezwi mpo na kokabola yango na teritware na bino mobimba. Talelá ndenge ya kosalisa bato oyo bayei sika mpe bana ete bámibongisa mpo na kokóma basakoli oyo bazwi naino batisimo te. Salá mwa elakiseli moko ya mokuse. Monisá ntina oyo moto mokomoko asengeli kosala kampanye yango.
Loyembo 53 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 16 Ɔkɔtɔbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti. Yebisá basakoli nyonso ete na wikende tokokabola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! elongo na Nsango ya Bokonzi No. 36.
Min. 15: “Bisaleli oyo ezali koteya mpe kolendisa.” (Bobele paragrafe 1 mpe 2.) Lisukulu. Lobelá na mokuse ndenge la Société abandaki kosala bakasɛti video. (Talá buku Prédicateurs, lok. 600-601.) Lendisá moto nyonso ete atala kasɛti video, Les Témoins de Jéhovah—Un nom, une Organisation (Batatoli ya Yehova—Nkombo mpe ebongiseli na bango), mpo na komibongisa mpo na lisolo oyo ekosalema na Likita ya Mosala ya pɔsɔ ya 30 Ɔkɔtɔbɛ. Baoyo bazali na kasɛti video yango bakoki kodefisa bandeko mosusu to bakoki kotala yango elongo.
Min. 20: Biso nyonso tokoki kozala na elimo ya mobongisi-nzela. Lisolo kati na motambwisi moko ya boyekoli ya mokanda mpe mosungi na ye, euti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Ɔkɔtɔbɛ 1997, lok. 22-23. Bazali komonisa ete ekozala malamu mpenza soki lisangá ekozala na babongisi-nzela mingi mpe bazali kolobela ndenge oyo basakoli nyonso bakoki kosalisana mpo ete babongisi-nzela bázala mingi na lisangá. Bataleli ndenge oyo bakoki kolendisa baoyo bazali kosala mosala ya mobongisi-nzela ete bákoba kati na mosala yango mpe ndenge oyo basakoli nyonso ya lisangá bakoki komonisa molende mpo na mosala ya kosakola.
Loyembo 131 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 23 Ɔkɔtɔbɛ
Min. 10: Mayebisi ya lisangá.
Min. 15: “Mobulu na kati ya libota ekosila.” Lisukulu. (Talá Lamuká! ya 8 Febwali 1993, lok. 10-14, na Lifalanse.) Ekosalema na nkulutu moko oyo azali kopesa ndakisa malamu lokola tata ya libota. Akolobela mingi mpenza ndenge oyo esengeli kotalela bana mpe molongani na kati ya libota. Akomonisa ete ‘kobɛta mwasi na yo to konyokola bana eyokani ata moke te na Makomami. Mibeko ya mikili mingi epekisi likambo yango, mpe mobeko ya Nzambe epekisi yango.’ Misala nyonso oyo mobali oyo azali moklisto azali kosala ekozala lisusu na ntina moko te na miso ya Nzambe soki azali kobɛta mwasi na ye. Molobi akomonisa ete moto oyo “abɛtaka bato” abongi te kozwa mikumba na kati ya lisangá ya boklisto. (1 Tim. 3:3; 1 Kol. 13:1-3) Ndenge moko mpe, “moklisto oyo azali ntango nyonso kosilika makasi mpe azali kotika ezaleli yango te akoki kobimisama na lisangá.” Lendisá bato ya mabota ete báboya ezaleli nyonso oyo ekoki konyokola bato ya mabota na bango ezala na ndenge nini, mpe bámoniselanaka limemya mpe bolingo oyo ebongi na baklisto.
Min. 20: Bongisáká makita malamu. Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani. Matomba oyo tozwaka na makita etalelaka mingimingi mpenza ndenge oyo tozali kobongisa makita yango. Lobelá makanisi oyo tokoki kosalela oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Marsi 1998 lok. 15-16, par. 8-11. Sɛngá na bayangani ete bápesa makanisi oyo ezali komonisa ndenge bamonisaka mposa mpe bazwaka ntango mpo na komibongisa malamu.
Loyembo 211 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 30 Ɔkɔtɔbɛ
Min. 8: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Ɔkɔtɔbɛ.
Min. 12: Makambo oyo bandeko bakutanaki na yango ntango bazali kokabola Nsango ya Bokonzi No. 36. Sɛngá na basakoli ndenge na ndenge báyebisa matomba malamu oyo bazwaki ntango bakabolaki Nsango ya Bokonzi No. 36. Sɛngá na babongisi-nzela ya sanza na sanza mpe babongisi-nzela basungi báyebisa ndenge basepelaki mpo ete basalaki mingi na mosala ya kosakola na boumeli ya kampanye mpe libaku malamu oyo bazwi ya kosakola elongo na basakoli ndenge na ndenge.
Min. 25: Les Témoins de Jéhovah—Un nom, une organisation (Batatoli ya Yehova—Nkombo mpe ebongiseli na bango). Lisolo elongo na bayangani. Talelá mituna oyo ezali na lokasa 3 na lisolo “Bisaleli oyo ezali koteya mpe kolendisa.” Pesá makanisi mpo na ndenge ya kosalela kasɛti video yango malamu mpo na kosalisa bato ya sika ete bámesana malamu na ebongiseli ya Nzambe. Lobelá mpe likambo moko to makambo mibale oyo bato balobaki mpo na kasɛti video yango.—Talá Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 1992 lok. 30-31.
Loyembo 15 mpe libondeli ya nsuka.
Pɔsɔ ebandi na 6 Novɛmbɛ
Min. 15: Mayebisi ya lisangá. Lobelá ndenge mosala ya kokabola Nsango ya Bokonzi No. 36 ezali kotambola. Yebisá ndenge oyo mosala esalemi na teritware mpe ndenge bokosala mpo na kosilisa teritware na bino mobimba kino na mokolo ya 17 Novɛmbɛ.
Min. 20: Makambo nini biso tondimaka? Ndeko mobali moko akei kotala moto moko oyo atunaki motuna, “Makambo nini oyo Batatoli ya Yehova bateyaka oyo esalaka ete bákesana na bato ya mangomba mosusu?” Lobelá makambo oyo ezali na etanda na lokasa 6 ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Ɔkɔtɔbɛ 1998. Limbolá ndenge oyo mangomba mosusu batyaka likebi te to baboyaka kotosa mateya ya ntina oyo ezali na Biblia mpe balandaka mateya ya bato.
Min. 10: Loyembo—Eteni ya ntina mingi na losambo na biso. Motambwisi moko ya boyekoli ya mokanda azali kosolola na basakoli mibale mpo na lolenge oyo bayembaka na makita ya lisangá. Amonaki ete bayembaka mpenza na mongongo makasi te. Asololi na bango makambo oyo ezali na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Novɛmbɛ 1999 lok. 22-24. Bataleli maloba ya loyembo moko kati na oyo ebongisami mpo na koyemba na pɔsɔ yango na boyekoli ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ndenge yango emonisami na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yuli 1999 lok. 20 par. 12. Soki tokotalela ete loyembo ezali na ntina mingi, yango ekosala ete tóyembaka na esengo mpo na kokumisa Yehova.
Loyembo 223 mpe libondeli ya nsuka.