Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 10/00 nk. 3-6
  • Manaka mpo na eteyelo ya mosala ya Teokrasi 2001

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na eteyelo ya mosala ya Teokrasi 2001
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Malako
  • MANAKA
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 10/00 nk. 3-6

Manaka mpo na eteyelo ya mosala ya Teokrasi 2001

Malako

Na mobu 2001, Eteyelo ya mosala ya Teokrasi ekosalema boye:

BABUKU: Biblia, Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli [w],“Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba” [si-LI], mpe Comment raisonner à partir des Écritures [rs].

Eteyelo esengeli kobanda NA NTANGO ETYAMI na loyembo, na libondeli, mpe na kotombela bandeko boyei malamu na bokuse mpenza. Ezali na ntina te kolobela makambo oyo ezali na programɛ. Wana mokɛngɛli na Eteyelo akobanda kobenga ndeko mokomoko oyo azali na mokumba, akolobela lisolo oyo ndeko yango akosala. Yango ekosalema boye:

LISOLO No. 1: Miniti 15. Esengeli kopesama na nkulutu to na mosaleli na misala, mpe mateya na yango ekouta na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli to na buku “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mazali na litomba.” Soki masolo mauti na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, lisolo yango esengeli kosalema lokola lisukulu ya koteya lisangá na boumeli ya miniti 15, mituna ya bozongeli ekozala te; kasi soki lisolo yango euti na buku “Makomami nyonso,” ekosalema lokola lisolo ya miniti 10 kino 12 mpe ekolandana na bozongeli ya miniti 3 kino 5 na lisalisi ya mituna oyo ezali na kati ya buku. Ntina ya masolo yango ezali te bobele ya kolobela makanisi nyonso oyo ezali na lisolo kasi nde ya kobenda likebi mpo na koyeba ndenge ya kosalela toli yango mpe kobimisa polele makambo oyo makozala na ntina mpenza mpo na lisangá. Esengeli kosalela bobele motó ya likambo oyo epesami.

Bandeko mibali oyo bakosala lisukulu oyo, basengeli kokeba ete bátosa ngonga epesami. Bakopesa ye toli na nkuku soki yango emonani malamu to soki molobi ye moko asɛngi yango.

NDIMBOLA YA MIKAPO YA BIBLIA: Miniti 6. Lisolo oyo ekosalema na nkulutu to na mosaleli na misala, akosala yango na kotalela mposa ya lisangá. Ezali na ntina te koluka motó ya likambo mpo na yango. Lisolo yango esengeli te kolobela bobele na mokuse mikapo oyo epesami mpo na kotánga. Molobi akolobela na mokuse makambo minene ya mikapo yango na boumeli ya segɔndi 30 kino 60. Kasi, ntina ya libosoliboso ya lisolo oyo ezali ya kosalisa bayangani báyeba mpo na nini mpe lolenge nini lisolo yango ekoki kosalisa biso nyonso. Nsima ya lisolo oyo, mokɛngɛli na eteyelo akosɛnga banakelasi bákende na bakelasi na bango.

LISOLO No. 2: Miniti 5. Ezali botángi ya Biblia oyo ekosalema na ndeko mobali moko. Botángi yango ekosalema na bakelasi nyonso ya eteyelo na lisangá. Eteni ya kotánga ezalaka mingimingi mokuse mpo na kotikela mwanakelasi ntango ya kolimbola lisolo na ye na maloba mokuse, na ebandeli mpe na nsuka. Na ntina na mokapo oyo azali kotánga, akoki kolobela makambo maleká, ndimbola ya esakweli soki mpe liteya moko ya ntina, to komonisa ndenge ya kosalela mitinda oyo mizali na esika atángi. Esengeli kotánga bavɛrsɛ nyonso oyo epesami mbala moko mpe kolimbola yango na nsima. Ya solo, soki bavɛrsɛ oyo esengeli kotángama elandani te, mwanakelasi akoki koyebisa esika oyo botángi ezali kolandana.

LISOLO No. 3: Miniti 5. Lisolo oyo ekopesama epai na ndeko mwasi. Lisolo oyo ekouta na buku Comment raisonner à partir des Écritures. Lisolo yango ekoki kosalema lokola litatoli ya libaku malamu, bozongeli ya sika, to boyekoli ya Biblia, mpe bato oyo bakosala lisolo yango bakoki kofanda to kotɛlɛma. Mokɛngɛli na eteyelo akotya likebi mingi na ndenge mwanakelasi azali kobimisa makanisi na motó ya likambo oyo bapesi ye mpe na ndenge azali kosalisa molobani na ye akanga ntina ya mikapo oyo ezali na kati ya lisolo yango. Mwanakelasi oyo bapesi mokumba oyo asengeli koyeba kotánga malamu. Mokɛngɛli na eteyelo akoki kopona ndeko moko oyo akozala molobani ya ndeko oyo azali kosala lisolo, nzokande molobani mosusu mpe akoki kobakisama. Esengeli te kotya likebi mingi na kadre ya lisolo, kasi nde likoló na lolenge ya koteya malamu na Biblia.

LISOLO No. 4: Miniti 5. Lisolo oyo ekouta na buku Comment raisonner à partir des Écritures. Lisolo No. 4 ekoki kosalema na ndeko mobali to na ndeko mwasi. Soki lisolo oyo epesami na ndeko mobali, asengeli kosala yango lokola lisukulu. Soki epesami na ndeko mwasi, akosala yango na kolanda toli epesami na lisolo No. 3.

MANAKA MPO NA KOTÁNGA BIBLIA: Moto nyonso na kati ya lisangá alendisami na kolanda programɛ oyo ebongisami mpo na kotánga Biblia pɔsɔ na pɔsɔ. Ezali kosɛnga kotánga lokasa moko na mokolo.

LIYEBISI: Makanisi mosusu mpe malako mosusu mpo na lolenge ya kopesa toli, lolenge ya kotosa ngonga, bozongeli ya kokoma, mpe lolenge ya kobongisa masolo, epesami na Mosala na biso ya Bokonzi ya Novɛmbɛ 1996, lokasa 3.

MANAKA

1 Yanuali botángi ya Biblia: 2 Mikonzi 13-16

Loyembo No. 62

No. 1: Bolimbisi ememi na lobiko (w99 1/1 lok. 30-31)

No. 2: 2 Mikonzi 14:1-14

No. 3: Mpo na nini kosopa zemi epekisami? (rs lok. 39-41 par. 3)

No. 4: Ndenge nini kopesa eyano na moto oyo alobi ete: ‘Makambo ya nzoto na ngai etali ngai moko’ (rs lok. 41 par. 4)

8 Yanuali botángi ya Biblia: 2 Mikonzi 17-20

Loyembo No. 116

No. 1: Toli oyo bandimaka yango noki (w99 15/1 lok. 21-24)

No. 2: 2 Mikonzi 18:1-16

No. 3: Adama na Eva bazalaki mpenza bato ya solo? (rs lok. 25-26 par. 5)

No. 4: Ndenge nini kopesa eyano na moto oyo alobi ete: ‘Lisumu ya Adama ezalaki mokano ya Nzambe, ye nde abongisaki bongo’ (rs lok. 27 par. 1-2)

15 Yanuali botángi ya Biblia: 2 Mikonzi 21-25

Loyembo No. 61

No. 1: 2 Mikonzi​—Litomba na yango (si-LI lok. 74 par. 33-36)

No. 2: 2 Mikonzi 21:1-16

No. 3: Mpo na nini losambo ya bonkɔkɔ ezali na ntina te? (rs lok. 81-83 par. 2)

No. 4: Ntina oyo losambo ya bonkɔkɔ esepelisaka Yehova Nzambe te (rs lok. 83 par. 3–lok. 84 par. 1)

22 Yanuali botángi ya Biblia: 1 Ntango 1-5

Loyembo No. 16

No. 1: Maloba ya ebandeli na 1 Ntango (si-LI lok. 75-76 par. 1-7)

No. 2: 1 Ntango 1:1-27

No. 3: Banani bazali batɛmɛli ya Klisto? (rs lok. 35-36 par. 4)

No. 4: Ndenge nini koyeba bapɛngwi (rs lok. 36-38 par. 2)

29 Yanuali botángi ya Biblia: 1 Ntango 6-10

Loyembo No. 73

No. 1: Ndenge ya komonisa komikitisa ya solosolo (w99 1/2 lok. 6-7)

No. 2: 1 Ntango 9:1-21

No. 3: Ndenge nini tosengeli kotalela bapɛngwi? (rs lok. 38 par. 3–lok. 39 par. 5)

No. 4: Klisto atongaki lingomba na ye likoló ya Petelo te (rs lok. 387-388 par. 4)

5 Febwali botángi ya Biblia: 1 Ntango 11-16

Loyembo No. 65

No. 1: Zalá molendisi ya bandeko (w99 15/2 lok. 26-29)

No. 2: 1 Ntango 11:1-19

No. 3: Fungola oyo Petelo asalelaki ezalaki nini? (rs lok. 388 par. 5–lok. 391 par. 2)

No. 4: “Bakitani ya bantoma” bazali baklisto ya solo te (rs lok. 391 par. 3–lok. 393 par. 6)

12 Febwali botángi ya Biblia: 1 Ntango 17-23

Loyembo No. 122

No. 1: Bólata komikitisa (w99 1/3 lok. 30-31)

No. 2: 1 Ntango 18:1-17

No. 3: Etumba ya Armagedon ekosalema wapi? (rs lok. 182-183 par. 4)

No. 4: Etumba ya Armagedon ekoboma banani mpe biloko nini? (rs lok. 183 par. 5–lok. 184 par. 3)

19 Febwali botángi ya Biblia: 1 Ntango 24-29

Loyembo No. 119

No. 1: 1 Ntango—Litomba na yango (si-LI lok. 78-79 par. 22-25)

No. 2: 1 Ntango 29:1-13

No. 3: Nani akobika na Armagedon? (rs lok. 184 par. 4-9)

No. 4: Armagedon emonisi te ete Nzambe azangi bolingo (rs lok. 185 par. 1-3)

26 Febwali botángi ya Biblia: 2 Ntango 1-5

Loyembo No. 168

No. 1: Maloba ya ebandeli na 2 Ntango (si-LI lok. 79-80 par. 1-6)

No. 2: 2 Ntango 1:1-17

No. 3: Na Armagedon, moto akomitya to na ngámbo ya bato oyo bakobika to na ngámbo ya baoyo bakobomama (rs lok. 185 par. 4-7)

No. 4: Nani azali kotinda mabota na etumba ya Armagedon? (rs lok. 186 par. 1-2)

5 Marsi botángi ya Biblia: 2 Ntango 6-9

Loyembo No. 103

No. 1: Mitungisi elɛmbisa yo te (w99 15/3 lok. 21-23)

No. 2: 2 Ntango 8:1-16

No. 3: Ndenge ya koyeba Babilone oyo elobelami na Emoniseli (rs lok. 42 par. 1-2)

No. 4: Babilone ya ntango ya kala eyebanaki mpo na makambo nini? (rs lok. 42 par. 3–lok. 44 par. 5)

12 Marsi botángi ya Biblia: 2 Ntango 10-15

Loyembo No. 59

No. 1: Nani abongisaka makanisi na yo? (w99 1/4 lok. 20-22)

No. 2: 2 Ntango 10:1-16

No. 3: Nini emonisi ete ata mangomba ya boklisto mpe ezali na kati ya Babilone monene? (rs lok. 45 par. 1–lok. 46 par. 1)

No. 4: Ntina oyo esengeli kobima na Babilone Monene nokinoki (rs lok. 46 par. 2-7)

19 Marsi botángi ya Biblia: 2 Ntango 16-20

Loyembo No. 69

No. 1: Batelá motema na yo mpo ebeba te na makanisi ya losambo ya Baala (w99 1/4 lok. 28-31)

No. 2: 2 Ntango 16:1-14

No. 3: Batisimo ezali nini, mpe mpo na nini bandimi bazwaka batisimo? (rs lok. 47 par. 1-4)

No. 4: Batisimo ya boklisto esalemaka te na kotangisa mwa mai na motó ya moto, ezali mpe mpo na bana mike te (rs lok. 47 par. 5–lok. 48 par. 2)

26 Marsi botángi ya Biblia: 2 Ntango 21-25

Loyembo No. 212

No. 1: Kokakatana te mpo na kopesa matɔndi (w99 15/4 lok. 15-17)

No. 2: 2 Ntango 22:1-12

No. 3: Batisimo ya mai elongolaka masumu te (rs lok. 48 par. 3-6)

No. 4: Nani abatisami na elimo santu? (rs lok. 48 par. 7–lok. 50 par. 1)

2 Aprili botángi ya Biblia: 2 Ntango 26-29

Loyembo No. 49

No. 1: Nzambe asalaka makambo na ndenge oyo “etɛngamá”? (w99 1/5 lok. 28-29)

No. 2: 2 Ntango 28:1-15

No. 3: Batisimo ya mɔ́tɔ ekeseni na batisimo ya elimo santu (rs lok. 50 par. 2-6)

No. 4: Ntina oyo esengeli kotalela Biblia (rs lok. 51-52 par. 5)

9 Aprili botángi ya Biblia: 2 Ntango 30-33

Loyembo No. 1

No. 1: Ndenge nini bato bakoki kopambola Yehova Nzambe? (w99 15/5 lok. 21-24)

No. 2: 2 Ntango 33:1-13

No. 3: Yisaya na Yilimia bapesi bilembeteli ete Biblia epemamaki na Nzambe (rs lok. 53 par. 1–lok. 54 par. 2)

No. 4: Lokola bisakweli ya Yesu ezali kokokisama emonisi ete Biblia epemamaki na Nzambe (rs lok. 54 par. 3-4)

16 Aprili botángi ya Biblia: 2 Ntango 34-36

Loyembo No. 144

No. 1: 2 Ntango—Litomba na yango (si-LI lok. 84 par. 34-36)

No. 2: 2 Ntango 36:1-16

No. 3: Makambo ya siansi oyo Biblia elobeli ezali makambo ya solo (rs lok. 55 par. 1–lok. 57 par. 2)

No. 4: aNdenge ya kosilisa ntembe oyo bato babimisaka mpo na Biblia (rs lok. 57 par. 3–lok. 60 par. 3)

23 Aprili botángi ya Biblia: Ezela 1-6

Loyembo No. 90

No. 1: Maloba ya ebandeli na Ezela mpe litomba na yango (si-LI lok. 85 par. 1-lok. 86 par. 7; lok. 87 par. 14-18)

No. 2: Ezela 4:1-16

No. 3: Mpo na nini baklisto bakumisaka mokolo ya kobotama te? (rs lok. 32-34 par. 2)

No. 4: Mpo na nini baklisto baboyaka kolya makila? (rs lok. 359-360 par. 4)

30 Aprili Bozongeli ya kokoma. botángi ya Biblia: Ezela 7-10

Loyembo No. 203

7 Mai botángi ya Biblia: Nehemia 1-5

Loyembo No. 56

No. 1: Maloba ya ebandeli na Nehemia (si-LI lok. 88 par. 1-5)

No. 2: Nehemia 1:1-11

No. 3: Mpo na nini baklisto baboyaka kozongisama makila? (rs lok. 360 par. 5–lok. 362 par. 1)

No. 4: Ndenge ya koyanola na mituna etali likambo ya kozongisama makila (rs lok. 362 par. 2–lok. 364 par. 2)

14 Mai botángi ya Biblia: Nehemia 6-9

Loyembo No. 155

No. 1: Lisangá ya boklisto​—Esika oyo moto akoki kozwa lisungi oyo ekolendisa ye (w99 15/5 lok. 25-28)

No. 2: Nehemia 9:1-15

No. 3: Kobotama lisusu elimboli nini? (rs lok. 259-260 par. 8)

No. 4: Mpo moto abika esɛngi te ete “abotama lisusu” (rs lok. 261 par. 1–lok. 262 par. 1)

21 Mai botángi ya Biblia: Nehemia 10-13

Loyembo No. 46

No. 1: Nehemia​—Litomba na yango (si-LI lok. 90-91 par. 16-19)

No. 2: Nehemia 12:27-43

No. 3: Ndenge ya koyanola bato soki batuni biso makambo ya kobotama lisusu (rs lok. 262 par. 3–lok. 263 par. 2)

No. 4: Mpo na nini kotubela epai na sango eyokani na Makomami te? (rs lok. 68-69 par. 9)

28 Mai botángi ya Biblia: Esetele 1-4

Loyembo No. 38

No. 1: Maloba ya ebandeli na Esetele (si-LI lok. 91-92 par. 1-6)

No. 2: Esetele 1:1-15

No. 3: Koyambola masumu oyo tosaleli Nzambe mpe tosaleli bato (rs lok. 71 par. 2-8)

No. 4: Mpo na nini esengeli koyebisa bankulutu masumu ya minene? (rs lok. 71 par. 9–lok. 72 par. 4)

4 Yuni botángi ya Biblia: Esetele 5-10

Loyembo No. 37

No. 1: Esetele​—Litomba na yango (si-LI lok. 94 par. 16-18)

No. 2: Esetele 5:1-14

No. 3: Mpo na nini ebongi kondima ete biloko nyonso bizalisamaki? (rs lok. 72-74 par. 2)

No. 4: Tókanga ntina ya lisolo ya Biblia oyo elobeli bozalisi (rs lok. 75 par. 1–lok. 76 par. 5)

11 Yuni botángi ya Biblia: Yobo 1-7

Loyembo No. 84

No. 1: Maloba ya ebandeli na Yobo (si-LI lok. 95-96 par. 1-6)

No. 2: Yobo 1:6-22

No. 3: Mpo na nini kosambela ekulusu eyokani na Makomami te? (rs lok. 80 par. 1–lok. 81 par. 2)

No. 4: Mpo na nini bato bakufaka? (rs lok. 253-254 par. 6)

18 Yuni botángi ya Biblia: Yobo 8-14

Loyembo No. 192

No. 1: Saulo​—Nkolo aponi ye (w99 15/5 lok. 29-31)

No. 2: Yobo 8:1-22

No. 3: Bato oyo bakufá bazali wapi, mpe bazali ndenge nini? (rs lok. 255 par. 1–lok. 256 par. 4)

No. 4: Mpo na nini Batatoli ya Yehova balandaka mimeseno ya bonkɔkɔ te mpo na kolela ebembe? (rs lok. 257 par. 1–lok. 258 par. 2)

25 Yuni botángi ya Biblia: Yobo 15-21

Loyembo No. 81

No. 1: Nzambe azali koumela te na elaka na ye (w99 1/6 lok. 4-7)

No. 2: Yobo 17:1-16

No. 3: Ndenge nini kopesa eyano na mateya ya lokuta na ntina na liwa (rs lok. 258 par. 3–lok. 259 par. 1)

No. 4: Ndɔtɔ oyo euti na Nzambe mpe ndɔtɔ mosusu (rs lok. 333-334 par. 7)

2 Yuli botángi ya Biblia: Yobo 22-29

Loyembo No. 173

No. 1: Osengeli kotalela lisusu makanisi na yo? (w99 15/6 lok. 10-13)

No. 2: Yobo 27:1-23

No. 3: Ntango nini bilangwiseli epekisami mpo na baklisto (rs lok. 112-114 par. 3)

No. 4: Mpo na nini baklisto basengeli komela bangi te (rs lok. 114 par. 4–lok. 115 par. 3)

9 Yuli botángi ya Biblia: Yobo 30-35

Loyembo No. 108

No. 1: Makambo oyo ekoki kondimisa yo bisakweli ya Biblia (w99 15/7 lok. 4-8)

No. 2: Yobo 31:1-22

No. 3: Mpo na nini baklisto basengeli komela likaya te? (rs lok. 116 par. 1–lok. 117 par. 4)

No. 4: Ndenge nini kolonga mimeseno ya mabe? (rs lok. 118 par. 1-4)

16 Yuli botángi ya Biblia: Yobo 36-42

Loyembo No. 160

No. 1: Yobo​—Litomba na yango (si-LI lok. 100 par. 39-43)

No. 2: Yobo 36:1-22

No. 3: Mabota ekopekisa Nzambe kokokisa mokano na ye mpo na mabele soko moko te (rs lok. 403-404 par. 5)

No. 4: Yehova akoboma mabele na mɔ́tɔ? (rs lok. 404 par. 6–lok. 406 par. 1)

23 Yuli botángi ya Biblia: Nzembo 1-10

Loyembo No. 5

No. 1: Maloba ya ebandeli na Nzembo​—Eteni 1 (si-LI lok. 101 par. 1-5)

No. 2: Nzembo 3:1–4:8

No. 3: Basangani ya Yelusaleme ya sika bakozonga awa na mabele te nsima ya kobomama ya bato mabe (rs lok. 406 par. 2–lok. 407 par. 1)

No. 4: Mokano oyo Nzambe azalaki na yango na ebandeli mpo na mabele ebongwaná? (rs lok. 407 par. 2–lok. 408 par. 2)

30 Yuli botángi ya Biblia: Nzembo 11-18

Loyembo No. 48

No. 1: Maloba ya ebandeli na Nzembo​—Eteni 2 (si-LI lok. 102 par. 6-11)

No. 2: Nzembo 11:1–13:6

No. 3: Ndenge nini tokoki kolendisa bato oyo bazali na bokɔnɔ? (rs lok. 119 par. 1-4)

No. 4: Ndenge nini tokoki kolendisa bato oyo bakufeli moto oyo balingaka mingi (rs lok. 119 par. 5–lok. 120 par. 4)

6 Augusto botángi ya Biblia: Nzembo 19-26

Loyembo No. 117

No. 1: Kosolola malamu ezali sɛkɛlɛ mpo libala ezala malamu (w99 15/7 lok. 21-23)

No. 2: Nzembo 20:1–21:13

No. 3: Elendiseli mpo na baoyo bazali konyokwama mpo bazali kosala mokano ya Nzambe (rs lok. 120 par. 5–lok. 121 par. 2)

No. 4: Ndenge nini okoki kolendisa bato oyo balɛmbi mpo basaleli bango makambo na bosembo te? (rs lok. 121 par. 3-6)

13 Augusto botángi ya Biblia: Nzembo 27-34

Loyembo No. 130

No. 1: Filipo​—Mosakoli ya nsango malamu na molende (w99 15/7 lok. 24-25)

No. 2: Nzembo 28:1–29:11

No. 3: Elendiseli nini ebongi mpo na bato oyo bazali konyokwama na mikakatano ya nkita? (rs lok. 121 par. 7–lok. 122 par. 4)

No. 4: Libɔndisi mpo na bato oyo balɛmbi mpo na mabunga basalaka (rs lok. 122 par. 5-8)

20 Augusto botángi ya Biblia: Nzembo 35-39

Loyembo No. 18

No. 1: Kolanda baninga ekoki kozala malamu mpo na yo? (w99 1/8 lok. 22-25)

No. 2: Nzembo 38:1-22

No. 3: Evolisyo​—Mokakatano monene mpo na siansi (rs lok. 144-145 par. 3)

No. 4: Bitika ya banzete na banyama (fossiles) emonisi nini mpo na evolisyo? (rs lok. 145 par. 4–lok. 148 par. 5)

27 Augusto Bozongeli ya kokoma. botángi ya Biblia: Nzembo 40-47

Loyembo No. 91

3 Sɛtɛmbɛ botángi ya Biblia: Nzembo 48-55

Loyembo No. 36

No. 1: Kebá nkanda ebɛtisa yo libaku te (w99 15/8 lok. 8-9)

No. 2: Nzembo 49:1-20

No. 3: bNdenge nini kosolola na bato oyo bandimaka evolisyo (rs lok. 148 par. 6–lok. 151 par. 2)

No. 4: Mpo na nini bato mingi bazangi kondima? (rs lok. 169-170 par. 1)

10 Sɛtɛmbɛ botángi ya Biblia: Nzembo 56-65

Loyembo No. 44

No. 1: Zabolo nde apesaka biso maladi? (w99 1/9 lok. 4-7)

No. 2: Nzembo 59:1-17

No. 3: Ndenge nini moto akoki kokóma na kondima? (rs lok. 170 par. 2-5)

No. 4: Kondima elikya ya mokili ya sika ya sembo emonanaka na misala (rs lok. 171 par. 1-5)

17 Sɛtɛmbɛ botángi ya Biblia: Nzembo 66-71

Loyembo No. 210

No. 1: Poná “oyo” ezali “malamu” (w99 1/9 lok. 30-31)

No. 2: Nzembo 69:1-19

No. 3: Ndenge nini moto akoki koyeba basakoli ya lokuta? (rs lok. 152 par. 1–lok. 153 par. 3)

No. 4: Basakoli ya solo bakokaki ntango nyonso te koyeba ndenge nini mpe ntango nini makambo oyo esakolamaki ekokokisama (rs lok. 153 par. 4-9)

24 Sɛtɛmbɛ botángi ya Biblia: Nzembo 72-77

Loyembo No. 217

No. 1: Mpo na nini osengeli kokokisa bilaka na yo? (w99 15/9 lok. 8-11)

No. 2: Nzembo 73:1-24

No. 3: Bisakweli ya basakoli ya solo esimbaka losambo ya solo (rs lok. 154 par. 1-2)

No. 4: Basakoli ya solo bayebanaka na misala oyo bazali kosala (rs lok. 155 par. 1–lok. 156 par. 2)

1 Ɔkɔtɔbɛ botángi ya Biblia: Nzembo 78-81

Loyembo No. 88

No. 1: Zwá mayele mpe ndimá disipilini (w99 15/9 lok. 12-15)

No. 2: Nzembo 78:1-22

No. 3: Ndenge ya koyanola bato oyo bazali kobenga biso basakoli ya lokuta (rs lok. 156 par. 3–lok. 157 par. 1)

No. 4: Nzambe akanaka te ntango oyo moto mokomoko akokufa (rs lok. 98–99 par. 1)

8 Ɔkɔtɔbɛ botángi ya Biblia: Nzembo 82-89

Loyembo No. 221

No. 1: Timote​—“Mwana na solo kati na kondima” (w99 15/9 lok. 29-31)

No. 2: Nzembo 88:1-18

No. 3: Makambo nyonso oyo esalemaka ezalaka mokano ya Nzambe te (rs lok. 99 par. 2–lok. 100 par. 7)

No. 4: Nzambe ayebaka makambo nyonso liboso te mpe abongisaka makambo nyonso liboso te (rs lok. 101 par. 1-3)

15 Ɔkɔtɔbɛ botángi ya Biblia: Nzembo 90-98

Loyembo No. 134

No. 1: Bazwaki makasi ya koboya misala mabe (w99 1/10 lok. 28-31)

No. 2: Nzembo 90:1-17

No. 3: Nzambe azali na makoki ya koyeba makambo mpe kobongisa yango liboso (rs lok. 102 par. 1-4)

No. 4: Na likambo ya Adama, ntina oyo Nzambe asalelaki te makoki na ye ya koyeba makambo liboso (rs lok. 102 par. 5–lok. 103 par. 2)

22 Ɔkɔtɔbɛ botángi ya Biblia: Nzembo 99-105

Loyembo No. 89

No. 1: Tóyeba komonisa bolingo ezaleli oyo eleki bizaleli nyonso (w99 15/10 lok. 8-11)

No. 2: Nzembo 103:1-22

No. 3: Nzambe akanaki liboso te makambo oyo ekokómela Yakobo, Esau to Yudasi (rs lok. 103 par. 3–lok. 104 par. 1)

No. 4: Ndenge nini makambo ya lisangá ya boklisto etángamá bongo liboso? (rs lok. 104 par. 2-3)

29 Ɔkɔtɔbɛ botángi ya Biblia: Nzembo 106-109

Loyembo No. 214

No. 1: “Yehova apesaka mayele” (w99 15/11 lok. 24-27)

No. 2: Nzembo 107:1-19

No. 3: Makomami elobi nini mpo na astroloji? (rs lok. 105 par. 1–lok. 106 par. 1)

No. 4: Wapi bantina ya solo mpenza oyo etindaka moto andima Nzambe? (rs lok. 106–lok. 107 par. 3)

5 Novɛmbɛ botángi ya Biblia: Nzembo 110-118

Loyembo No. 14

No. 1: Nsuka ya mokili​—Tosengeli kobanga yango to kotyela yango elikya? (w99 1/12 lok. 5-8)

No. 2: Nzembo 112:1–113:9

No. 3: Mabe na bampasi ezali komonisa te ete Nzambe azali te (rs lok. 107 par. 4-6)

No. 4: Nzambe azali mpenza moto ya solo, oyo azali mpe na mayoki (rs lok. 108 par. 1-7)

12 Novɛmbɛ botángi ya Biblia: Nzembo 119

Loyembo No. 35

No. 1: Kotika te ete makoki na yo ekóma bolɛmbu na yo (w99 1/12 lok. 26-29)

No. 2: Nzembo 119:1-24

No. 3: Nzambe azali na ebandeli te (rs lok. 108 par. 8–lok. 109 par. 3)

No. 4: Kosalela nkombo ya Nzambe ezali na ntina mingi mpo na kobika (rs lok. 109 par. 4–lok. 110 par. 1)

19 Novɛmbɛ botángi ya Biblia: Nzembo 120-137

Loyembo No. 175

No. 1: Nzembo​—Litomba na yango—​Eteni 1 (si-LI lok. 104-105 par. 23-27)

No. 2: Nzembo 120:1–122:9

No. 3: Mangomba nyonso ezali malamu? (rs lok. 110 par. 2-5)

No. 4: Na ndenge nini Yesu azali “Nzambe”? (rs lok. 110 par. 6-7)

26 Novɛmbɛ botángi ya Biblia: Nzembo 138-150

Loyembo No. 135

No. 1: Nzembo​—Litomba na yango—​Eteni 2 (si-LI lok. 105-106 par. 28-32)

No. 2: Nzembo 139:1-24

No. 3: cNdenge nini kosolola na moto na likambo ya kondima Nzambe (rs lok. 111 par. 1–lok. 112 par. 1)

No. 4: Ntina oyo bato bazali kokoka te kotya boyangeli ya sembo (rs lok. 172-173 par. 3)

3 Desɛmbɛ botángi ya Biblia: Masese 1-7

Loyembo No. 132

No. 1: Maloba ya ebandeli na Masese​—Eteni 1 (si-LI lok. 106-107 par. 1-5)

No. 2: Masese 4:1-27

No. 3: Ntina oyo milende ya bato mpo na komisikola ekoki kolonga te (rs lok. 173 par. 4–lok. 174 par. 4)

No. 4: Bokonzi ya Nzambe nde ekokokisa bamposa nyonso ya moto (rs lok. 174 par. 5–lok. 175 par. 2)

10 Desɛmbɛ botángi ya Biblia: Masese 8-13

Loyembo No. 51

No. 1: Maloba ya ebandeli na Masese​—Eteni 2 (si-LI lok. 107-108 par. 6-11)

No. 2: Masese 13:1-25

No. 3: Bisakweli ya Biblia ebongi mpenza tótyela yango motema (rs lok. 175 par. 3–lok. 176 par. 3)

No. 4: Kobikisa bato na nzela ya bikamwiseli lelo oyo ezali kosalema na nguya ya elimo ya Nzambe te (rs lok. 177 par. 1-4)

17 Desɛmbɛ botángi ya Biblia: Masese 14-19

Loyembo No. 111

No. 1: Masese​—Litomba na yango—​Eteni 1 (si-LI lok. 109-110 par. 19-28)

No. 2: Masese 16:1-25

No. 3: Ndenge oyo Yesu na bantoma na ye bazalaki kobikisa bato ekeseni na ndenge oyo ezali kosalema lelo (rs lok. 177 par. 5–lok. 178 par. 3)

No. 4: Ndenge ya koyeba baklisto ya solo lelo oyo (rs lok. 178 par. 4–lok. 179 par. 2)

24 Desɛmbɛ botángi ya Biblia: Masese 20-25

Loyembo No. 9

No. 1: Masese​—Litomba na yango—​Eteni 2 (si-LI lok. 110-111 par. 29-38)

No. 2: Masese 20:1-30

No. 3: Ntina oyo baklisto ya ekeke ya liboso bazwaki makabo ya kobikisa bato (rs lok. 179 par. 3–lok. 180 par. 3)

No. 4: Elikya nini tozali na yango ete mokolo mosusu maladi nyonso ekosila? (rs lok. 180 par. 4–lok. 181 par. 1)

31 Desɛmbɛ bozongeli ya kokoma. botángi ya Biblia: Masese 26-31

Loyembo No. 180

[Maloba na nse ya lokasa]

a Soki ntango ezali, bótalela ndenge ya kopesa biyano na makanisi nyonso, maloba ya ntembe, mpe makambo ndenge na ndenge oyo bokoki kokutana na yango na teritware na bino.

b Soki ntango ezali, bótalela ndenge ya kopesa biyano na makanisi nyonso, maloba ya ntembe, mpe makambo ndenge na ndenge oyo bokoki kokutana na yango na teritware na bino.

c Soki ntango ezali, bótalela ndenge ya kopesa biyano na makanisi nyonso, maloba ya ntembe, mpe makambo ndenge na ndenge oyo bokoki kokutana na yango na teritware na bino.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto