Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/00 lok. 2
  • Manaka mpo na likita ya mosala

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Manaka mpo na likita ya mosala
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 13 Marsi
  • Pɔsɔ ebandi na 20 Marsi
  • Pɔsɔ ebandi na 27 Marsi
  • Pɔsɔ ebandi na 3 Aprili
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 3/00 lok. 2

Manaka mpo na likita ya mosala

Pɔsɔ ebandi na 13 Marsi

Loyembo 118

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lobelá makambo etali lisangá oyo mazwami na mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi.

Min. 15: “Tosakolaka nsango malamu.” Maloba ya ebandeli esengeli koleka miniti moko te, mpe na nsima salá lisolo yango na mituna mpe biyano. Pesá bandakisa ya makambo ya esengo oyo euti na Biblia mpe ezali na buku Boyebi, oyo tokoki kosalela ntango tozali kolakisa buku yango na mosala ya kosakola.

Min. 20: “Tokoki kosala ete sanza ya Aprili 2000, ezala sanza oyo eleki basanza nyonso?” (par. 1-11) Ekosalema na mituna mpe biyano. Lobelá motángo moleki monene ya babongisi-nzela basungi oyo lisangá ezwaki. Sɛngá na bandeko mosusu oyo bazali na kati ya bandeko yango oyo basalaki mosala ya mobongisi-nzela mosungi, báyebisa matomba oyo bazwaki lokola basakolaki mingi. Lendisá bandeko nyonso ya lisangá ete básala makasi mpo ete babongisi-nzela basungi bázala lisusu mingi koleka na sanza ya Aprili. Lobelá masɛngami oyo ezali na buku Lisanga, lok. 114-115. Basakoli oyo balingi kosala mosala ya mobongisi-nzela mosungi bakoki kozwa lokasa ya lisɛngi na nsima ya likita.

Loyembo 187 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 20 Marsi

Loyembo 21

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Lapolo ya kɔnti.

Min. 15: “‘Nasengeli kosala nini?’” Motambwisi ya boyekoli ya mokanda azali kosolola lisolo yango elongo na mosaleli moko ya misala to basaleli mibale ya misala. Basakoli mosusu bakokaka kosala misala nyonso ya lisangá te mpo na mikakatano ndenge na ndenge oyo bazali na yango. Lobelá makambo ndenge na ndenge oyo biso nyonso tokoki kosala mpo na kolendisa lisangá mpe kosala ete mosala ya Bokonzi ekende liboso. Mpo na kosukisa, monisá ndenge oyo mosakoli mokomoko akoki “komibongisa mpo na Rapport ya nsuka.”​—Talá buku Lisanga, lok. 109-111.

Min. 20: “Tokoki kosala ete sanza ya Aprili 2000, ezala sanza oyo eleki basanza nyonso?” (par. 12-18) Ekosalema na mituna mpe biyano. Salá mpe elakiseli moko ya mokuse mpo na komonisa ndenge ya kobenga moninga moko na Ekaniseli. Talelá sanza ya Aprili na kati ya Calendrier des Témoins de Jéhovah 2000, mpe lobelá programɛ ya makita ya mosala ya kosakola oyo ebongisami mpo na lisangá na bino. Kundwelá bandeko nyonso ete bámibongisa malamu mpo na kosakola mingi mpenza na boumeli ya sanza oyo, mpo ete mosakoli nyonso ya lisangá asangana na ebongiseli yango. Lendisá bandeko nyonso oyo bazali na makoki ete básala mosala ya mobongisi-nzela mpe bázwa lokasa ya lisɛngi na nsima ya likita.

Loyembo 65 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 27 Marsi

Loyembo 119

Min. 10: Mayebisi ya lisangá. Yebisá basakoli nyonso bápesa lapolo na bango ya mosala ya kosakola ya sanza ya Marsi. Tángá nkombo ya bandeko oyo bakosala lokola babongisi-nzela basungi na sanza ya Aprili. Monisá ete ntango ezali naino mpo ete bandeko oyo bakolinga kosala mosala yango bátondisa lokasa ya lisɛngi. Yebisá programɛ ya makita ya mosala ya kosakola oyo ebongisami mpo na sanza mobimba. Lendisá bandeko nyonso ete básakola na wikende oyo, mpo na kobanda malamu sanza ya Aprili. Na boumeli ya sanza oyo tokolakisa Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli mpe Lamuká! Lobelá lisolo moko mpe likambo moko oyo ebongi oyo ekoki kosalelama malamu mpo na kolakisa bato zulunalo mokomoko. Moto nyonso asengeli kozala na mwa buku Azali kosɛnga mpe kosalela yango mpo na kobanda boyekoli ya Biblia na bato oyo bakosepela.

Min. 13: “Sɛngá lisalisi.” Lisukulu mpe lisolo elongo na bayangani ekosalema na nkulutu moko. Limbolá ndenge oyo na bantango mosusu biso nyonso tozalaka na mposa ya lisalisi. Ya solo, moto nyonso asengeli komema mokumba na ye. (Gal. 6:5) Nzokande, ntango tozali komona ete tokolonga te, tosengeli kokakatana te mpo na koluka lisalisi epai ya bandeko oyo bakɔmeli na kati ya lisangá. Sɛngá na bayangani báyebisa ndenge lisalisi ya bolingo oyo bazwaki epai ya bandeko mosusu elendisaki bango.

Min. 10: Bamposa ya lisangá.

Min. 12: Botaleli ya Annuaire 2000. Lisolo elongo na bayangani mpe bozongeli ya “Totaux pour 1999” oyo ezali na lok. 31. Lobelá mpe “Mokanda oyo euti na Lisangani ya Mikóló-Bakambi,” oyo ezali na lok. 3 tii na lok. 5. Sɛngá na bandeko mosusu báyebisa ndenge oyo bakosalela bilendiseli oyo epesami.

Loyembo 195 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 3 Aprili

Loyembo 72

Min. 10: Mayebisi ya lisangá mpe makambo oyo bandeko bakutanaki na yango na mosala ya kosakola. Poná mwa makambo ya kolendisa kati na makambo oyo bandeko bauti kokutana na yango na mosala ya kosakola na teritware na bino, makambo oyo esengeli kolendisa bandeko mosusu ete básakola.

Min. 17: “Tóyekola Esakweli ya Danyele.” Ekosalema na mituna mpe biyano. Yebisá na mokuse matomba oyo tokozwa na boyekoli ya mokanda ya Danyele, oyo ezali na Biblia. (Talá buku Esakweli ya Danyele, mok. 1, par. 15 kino 17.) Lendisá bandeko nyonso ete báyanganaka na boyekoli ya mokanda pɔsɔ na pɔsɔ.

Min. 18: Mpo na nini koyebisa lisumu oyo moto asali? Lisukulu ya ntina mingi oyo ekosalema na nkulutu moko, ebongisami mpo na bilenge. Mokili ya lelo ezali na makambo mingi oyo ezali kobebisa bilenge: kobeba ya bizaleli malamu, koyikana ya mobulu, komela bangi, mpe kozanga botosi epai ya bakonzi. Bilenge mosusu bazalaka na lolenge mibale ya bomoi, babombaka etamboli na bango ya mabe. Yango ezali solo likama mpo na bolamu ya lisangá mobimba. Basusu basalaka masumu ya minene mpe babombaka yango lokola sɛkɛlɛ. Soki oyebi ete ndeko moko na kati ya lisangá asali likambo moko oyo eyokani te na mibeko ya Nzambe, okosala nini? Talelá etinda oyo ezali na Levitike 5:1. (Talá w97 15/8 lok. 27-30.) Talelá buku Mituna oyo bilenge batunaka na lok. 68 kino 69, mpe limbolá ndenge oyo moto akoki kosala soki akutani na likambo yango.

Loyembo 68 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto