Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 3/00 lok. 1
  • ‘Nasengeli kosala nini?’

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • ‘Nasengeli kosala nini?’
  • Mosala na biso ya Bokonzi—2000
  • Masolo mosusu
  • Pesá mabɔkɔ na lisangá oyo ozali
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Tiká ete lisangá elendisama
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Aprili​—Sanza oyo tosengeli ‘kosala mingi mpe komipesa mpenza’
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
  • Sepelá na esika na yo na lisangá
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—2000
km 3/00 lok. 1

‘Nasengeli kosala nini?’

1 ‘Nasengeli kosala nini?’ Na ntembe te, bato oyo bazalaki na etuluku ya boyekoli ya Biblia oyo Charles Taze Russell abongisaki na bambula ya 1870 bamitunaki motuna oyo. Wana boyebi na bango ya mokano ya Nzambe ezalaki kokola, bayekoli ya Biblia ya liboso bamitunaki mpenza eloko nini bakoki kosala mpo na kosalisa bato mosusu báyekola mokano ya Nzambe. Bazalaki mpenza na mosala monene ya kosakola na mokili mobimba, boyebi ya Biblia oyo bazalaki koyekola.

2 Likambo ya esengo mpo na biso, balongaki mokakatano yango. Ndenge nini? Mokomoko asalaki oyo akokaki kosala atako emonanaki ete ezali moke. Mpo na yango, lelo oyo Batatoli ya Yehova bayebani na mokili mobimba​—ebongiseli oyo ezali na basakoli ya Bokonzi pene na milio motoba oyo bazali kosala na masangá soko 90 000 na mikili mpe bisanga ya mai monene 234!​—Yis. 60:22.

3 Pesá lisungi na yo na motema mobimba: Ezali likambo ya ntina mingi ete mokomoko na biso asala mosala monene oyo Yesu alobaki ete ekosalema na mikolo oyo ya nsuka. (Mko. 13:10) Ya solo, ezali kaka bandeko moke oyo bazali bankulutu te nde basengeli kosala mosala yango; to esengeli te kotika mokumba yango epai ya babongisi-nzela. Mpo na koloba solo, moklisto nyonso oyo amipesi azali na mokumba monene ya kosala mosala yango. Biso nyonso tokoki komipesa na mosala ya kosakola na mitindo na yango nyonso. (1 Tim. 1:12) Ata soki tozali kosala mingi to te, yango ekozala mpo na bolamu na biso moko mpe mpo na bolamu ya bato mosusu.​—1 Tim. 4:16.

4 Mokomoko na biso akoki mpe kobatela bondeko na biso ya boklisto na mitindo mosusu oyo ebongi. Tokosimba makita ya lisangá soki tozali koyangana pɔsɔ na pɔsɔ mpe tozali kopesa biyano na esengo nyonso. (Nz. 122:1, 8, 9) Tokoki mpe kosala makasi mpo na kozala na bizaleli malamu mpo ete lisangá ezala pɛto. Tokoki kopesa makabo, na kotalela makoki na biso, mpo na kosimba mosala ya kosakola na mokili mobimba. Tokoki kopesa mabɔkɔ mpo na kotya bopɛto na Ndako ya Bokonzi. Moto nyonso akoki kokolisa elimo ya bolingo mpe ya bomoko na kati ya lisangá na kosalisáká bato oyo bazali koya sika na kati ya solo, ezala bilenge to mibange.​—Kols. 3:12, 14.

5 Na yango okoki komituna ete, ‘Nasengeli kosala nini?’ Atako milende na yo ekoki komonana ete ezali moke, soki ozali kosala oyo ekoki na yo, yango ekosala ete lisangá na bino ezala makasi, ezala na esengo mpe ezala na elimo malamu. Na yango, biso nyonso tokosangana mpo na kokumisa nkombo ya Yehova!

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto