Tosakolaka nsango malamu
1 Oyo nde libaku malamu tozali na yango ya kozala bamemi ya “nsango malamu ya makambo malamu!” (Lom. 10:15, NW ) Tozali na nsango ya kolendisa mpo na koyebisa bato oyo bomoi na bango etondi na yikiyiki mpe bazali lisusu na elikya te. Ndenge nini tokoki kosalisa bango báyeba ete tozali kosakola “nsango malamu ya makambo malamu mpenza”?—Yis. 52:7, NW.
2 Bongisá maloba ya kolendisa: Ntango tozali na mosala ya kosakola, masolo na biso ekobimisa matomba malamu soki tozali kolobela mingi makambo ya kolendisa. Yango wana, ntango tozali kobongisa ndenge oyo tokosolola na bato mpe ndenge oyo tokolakisa bango mokanda, tosengeli koluka kobenda likebi na bango likoló na makambo ya kosepelisa ya nsango oyo tozali na yango. Soki tozali kosakola, na kondima mpe na esengo, elikya tozali na yango oyo euti na Biblia, tokoki kolikya kozwa matomba malamu.—Mas. 25:11.
3 Atako toyokaka mawa ntango bato bazali koyebisa biso ndenge bazali konyokwama na bampasi ya mokili oyo, tosengeli komonisa bango ete Bokonzi ya Nzambe nde ekosilisa mpenza mikakatano ya bato. Ata ntango tozali kosolola na bango mpo na mokolo “ya kobukanisa” ya Yehova, tosengeli komonisa bango ete yango ezali mpenza ‘nsango malamu mpo na basɔkɛmi.’ (Yis. 61:1, 2) Tokoki kolendisa bato oyo tozali kopesa bango litatoli ete, nsukansuka, makambo nyonso oyo Yehova azali kosala ekomema bolamu oyo eleki bolamu nyonso mpe ekosuka kaka malamu.
4 Sakolá solo na esengo mpenza: Ntango bato bazali komona na bilongi na biso ete tozali na esengo mpe mingongo na biso ezali kolɛnga te, tokobenda likebi na bango ete báyoka biso. Soki bilongi na biso ezali na esengo, bato oyo tozali kosolola na bango bakomona ete tozali ‘kosepela na elikya.’ (Lom. 12:12) Na yango, bakoki kondima noki koyoka nsango malamu. Na ntembe te, tozali na ntina malamu ya komonisa ntango nyonso elimo ya malamu, ya esengo na mitindo nyonso ya mosala na biso ya kosakola.
5 Lokola tozali baministre ya nsango malamu, tozali te bobele kokebisa bato na nsango na biso. Mosala na biso ya kosakola ezali kopesa elikya ya solo ya bomoi ya malamu lelo oyo mpe na mikolo mizali koya. (1 Tim. 4:8) Ntango tozali kosolola na moto mokomoko, elikya oyo ezali na makanisi na biso ekomonana na makambo oyo tozali koloba mpe ekosalisa bato ete bándima nsango malamu. Lokola tozali kotya likebi mpenza na makambo oyo tozali koloba mpe na ndenge oyo tozali koloba yango, tiká ete tóbenda bato ya mitema sembo báyamba nsango malamu ya esengo oyo tosakolaka!