Tósala mosala na bulɛɛ butu na moi
1 Tozali na libaku moko ya motuya mingi koleka: kozala Batatoli ya Yehova. Tozali kati na lisangá ya bapalanganisi ya nsango malamu na mokili mobimba oyo Yehova azali kosalela mpo na kokokisa mosala monene koleka, kosakolama ya Bokonzi oyo esalemáká naino te. (Mko. 13:10) Lokola tozali kobika na eleko moko ya mpasi, tomipesaka mpenza na mosala yango engebene makoki na biso?
2 Toyebi te soki bato boni bakoyoka nsango na biso. Yehova azali kopesa biso endimiseli ete ekozala na “ebele monene” oyo basangani na yango bakokesana na bato mosusu na ‘mosala na bulɛɛ oyo bazali kosala butu na moi.’ (Emon. 7:9, 15) Batatoli koleka milio mitano bazali kosala mingi sikawa kati na mosala ya Nzambe; bazali bobele bayoki oyo bazali komonisa mwa bosepeli te, soko mpe bato oyo basepelaka bobele koyangana na makita te. Ezali bato oyo bazali kokokisa mosala moko, oyo bazali kosakola nsango malamu kati na mokili mobimba.
3 Mokolo na mokolo tozali na mabaku ya kokumisa Yehova, ezala na mosala ya kosakola oyo ebongisami to na lolenge ya libaku malamu. Tómanyola likoló na kopalanganisama ya litatoli oyo ekokaki kosalema soki mokomoko na biso azwi likatami ya koyebisa solo ata bobele na moto moko mokolo na mokolo. Botɔ́ndi na biso epai na Yehova esengeli kopusa biso na koloba na ntina na ye na lolenge ya mɔ́tɔ.—Nz. 92:1, 2.
4 Tósalisa basusu ete básala mosala na bulɛɛ: Yehova azali kokoba kopambola biso na kokolisáká mosala na biso. (Hag. 2:7) Na ndakisa, na Congo-Kinshasa, na boumeli ya mbula ya mosala oyo eleki, mwayene ya boyekoli ya Biblia 217 480 etambwisamaki sanza nyonso. Ntango tozali koyekola na bato, mokano na biso ezali ya kosunga bango ete bákóma bayekoli ya Yesu Klisto. (Mat. 28:19, 20) Mingi kati na bango basili kokola mpe bazali koyangana na makita mbala na mbala. Babandi koyebisa na bayebani na bango “misala na Nzambe minene” oyo basili koyekola. (Mis. 2:11) Tokoki sikawa kobyanga bango ete básangana na mosala ya kosakola?
5 Na boumeli ya sanza ya Apríli, tokosala molende ya solosolo mpo na kobyanga bayekoli ya Biblia oyo bakokisi masɛngami ete básangana na biso kati na mosala ya kosakola. Moto oyo oyekolaka na ye asili komonisa mposa? Soki ezali bongo, akokisi masɛngami ya Makomami? (Talá buku Lisanga, nkasa 98-100.) Ntango moyekoli ya Biblia amonisi mposa ya kosangana na mosala ya kosakola, yebisá mokano na ye epai na mokɛngɛli-mokambi, ye akozwa bibongiseli mpo ete bankulutu mibale bátalela likambo yango. Soki akokisi masɛngami mpo na kokóma mosakoli oyo azwi naino batisimo te, byangá moyekoli yango ete abima na yo elongo na mosala ya kosakola. Mokɛngɛli na mosala mpe batambwisi ya boyekoli ya mokanda bakosɛnzɛla mingimingi ete básunga baoyo bakoki kokokisa masɛngami mpo na kobanda kosakola na sanza ya Apríli.
6 Ekozala malamu ete baboti bátalela soki bana na bango bazali na likoki ya kokóma basakoli oyo bazwi naino batisimo te. (Nz. 148:12, 13) Soki mwana na yo amonisi mposa ya kobima kati na mosala ya Bokonzi mpe soki azali na etamboli malamu, okoki koyebisa yango epai na nkulutu moko oyo azali mosangani ya komite ya mosala. Nsima ya kosolola elongo na yo mpe mwana na yo, bankulutu mibale bakomonisa soki akoki kondimama na molɔngɔ́ ya basakoli. Ezali mpenza likambo ya esengo ete bana bákumisa Nzambe elongo na biso!
7 Bobele Yehova nde abongi ete tósalela ye mosala na bulɛɛ. (Luka 4:8) Tiká ete biso banso tózwa litomba na libaku malamu oyo tozali na yango ya kokumisa ye “mingi”!—Nz. 109:30; 113:3.