Makambo matali bokutani mbala na mbala ya mwasi na mobali mpo na libala—Ndenge nini kopɛngola makámá?
1 Libala, lokola bibongiseli nyonso oyo biuti na Nzambe, ezali na mokano ya kokumisa Mobandisi na yango, Yehova, “Ye oyo mabota nyonso na likoló mpe na nse mazwi nkombo uta na Ye.” (Ef. 3:15) Na mawa nyonso, uta botomboki na Edene, mabala mingi mazali kolónga te. Likambo yango ezali kouta na kozanga eksperiansi, kozanga toli mpe litambwisi libongi. Ntina na yango mosusu ezali kouta na etamboli oyo ekamatamaka na boumeli ya eleko oyo ezali liboso ya libala.
2 Bokutani mbala na mbala ya mwasi na mobali: Ntango bato mibale bazali kokutana mbala na mbala mpo na libala, botosi ya mitindá ya Biblia mpo na likambo yango ekoki kozala na litomba mpo na bomoi na bango na mikolo mizali koya. Mpo ete “moto na mayele akotala malamu na nzela ekokende ye,” moklisto oyo alingi kokumisa Yehova akokeba na bokutani na ye ya mbala na mbala mpo ete bokutani yango ebwaka nsɔni te na lisangá mpe na nkombo ya Yehova. (Mas. 14:15) Baklisto mosusu bazali kokutana mingi mbala na mbala, nzokande bamilengeli te mpo na libala. Emonani ete mingi kati na bango bayebi te soki bokutani ya mwasi na mobali elimboli nini, bokutani oyo ekoki kosalama bobele na ntango oyo bato mibale balingi kobalana.
3 Mingi bazali kopesa bokutani mbala na mbala ya mwasi na mobali bandimbola ndenge na ndenge: ‘Kobima elongo na mwasi soki ozali mobali to kobima elongo na mobali soki ozali mwasi’; ‘koyekola koyebana malamu.’ Kolobáká na ntina na boyokani ya bana mibali na bana basi, búku moko elobi ete: “Boyokani ya bana mibali na bana basi . . . esalamaka mbala mingi na mwa maloba mikuse, na nkomá to na telefone. Myango nyonso wana ya kosolola esalamaka na [bilenge], mpo ete ezali kopesa nzela na boninga ya motema na mosika.” Na kotaleláká ndimbola oyo diksionere moko epesi, ezali “boyokani ya makambo matali bomoi kati na mwasi na mobali,” na bongo baklisto mosusu bazali ya solo kokutana mbala na mbala na nzela ya masoló ya ntango nyonso to na komonisanáká bolingo, polele to na kobombana. Soki omibongisi mpo na libala te, etamboli ya lolenge yango ekoki komema na etamboli ya mbindo. Boninga ya motema ya makasi ekoki kozala na matomba mabe. Na yango, mokolo moko elenge mobali moko amekaki kobɔndisa moninga na ye moko ya mwasi oyo ayebisaki ye makambo na ye. Mwa moke na nsima bakómaki kino kosimbana na nzoto. Lisosoli na bango etungisamaki na likambo yango mpe bazalaki lisusu na esengo te. Basusu bakómaki kino kosangisa nzoto. Ankɛtɛ moko esalamaki na zulunalo Psychology Today emonisi ete “pene na katikati ya bato oyo bango batunaki basilaki kosala boninga oyo esukaki na misala ya nzoto.” Na koleka, “pene na moto moko likoló na bato misato bandimaki ete basangisaki nzoto na moninga moko ya mobali to ya mwasi na sanza eleki.”
4 Tokoloba nini mpo na moto oyo amilengeli mpo na libala mpe akei koluka mobalani mosika, na lisangá mosusu? Nsango ezali kouta na bisika bikeseni kati na teritware emonisi ete bandeko mingi bapesi bana na bango na libala na bato ya mokili oyo bamimonisaki lokola “Batatoli ya Yehova,” to na baoyo babimisami na lisangá. Babuki mbuma mabe na likambo yango. Mpo na nini bakweaki na motambo yango? Bamoko bakanisaki ete lokola libala ezali likambo ya moto ye moko, bankulutu bazalaki na lotómo ya kotalela ata likambo moko te. Nzokande, ntango mikakatano mibimi to baoyo bazali na mikumba bakitisami mikumba na bango, bazali kokende mbango bobele epai na bankulutu yango mpo na mokano ya koluka lisungi. Mpo ete komibatela na makambo oyo makoki komema bokɔnɔ eleki koluka myango ya komibikisa na bokɔnɔ na malamu, mbɛlɛ bakokaki kopɛngola mikakatano na kosalanáká elongo na bankulutu. Yango wana, atako ‘bazali na bokonzi likoló na kondima na bango te, bankulutu bazali basalani elongo mpo na esengo na bango.’—2 Kol. 1:24.
5 Mokumba ya baboti: Baboti ya mwana mwasi bakoki kosala nini na ntango batuni mwana na bango libala? Bakoki koyekola makambo mingi na nzela ya ndakisa oyo elandi. Na lisangá moko, bankulutu bazalaki kokakatana na ntina na etamboli ya moto moko oyo azalaki koloba ete azalaki “moklisto” oyo autaki kobala ndenge mibeko ya Letá ezali kosɛnga na lisangá na bango. Batindaki ndeko moko mpo na koyeba malamu ezaleli ya elimo ya mobalani oyo ya sika. Bolukiluki yango eyaki komonisa ete moto yango azalaki bobele moyekoli ya Biblia. Abomaki mokanda ya bankulutu oyo ezalaki komonisa ete azali mosakoli oyo azwi naino batisimo te, na mokano ya kobala. Atako akamwaki mpe alembaki nzoto, tata ya mwana mwasi akitisamaki mikumba na ye na lisangá atako asɛngaki lisambisi mosusu. Abalisaki mwana na ye na moto ya mokili. (Det. 7:3, 4; 2 Kol. 6:14, 15) Ebongi malamu ete baboti básalana elongo na bankulutu oyo bakoki koyeba mwa makambo mingi na ntina ya elimo ya mobali oyo azali koluka libala to, bakoki kotuna na lisangá oyo ye auti.
6 Ndenge nini kopɛngola makámá: Ezali ya solo ete baboti babongi mpo na kozwa ekateli soki bakopesa nzela to te na mwana na bango ete abanda kokutanaka na ndeko moko mpo na libala. Ebongi malamu báyebaka, soki likoki lizali, bato nyonso oyo bazali ntango nyonso elongo na mwana na bango ya mwasi mpe báyeba mokano nini bazali kokutana mbala na mbala, soki ezali bana mibali. Ekoki kozala ete mwana moko ya mobali azali kokutana mbala na mbala na mwana na bango ya mwasi kozanga ete báyeba yango. Bamoko bazali kosalela maloba oyo ete “moponami na ngai” mpo na kolobela moto oyo bapesani na ye elaka kozanga ete baboti báyeba yango to kozanga ete bápesa makanisi na bango. Uta ntango yango, “babandani to baponami yango” bazali kobyangana mpe kokutana, mbala mingi kozanga moto mosusu (chaperon) na kobangáká ete sɛkɛlɛ́ ekoyebana. Bazali bongo kotyola batoli nyonso oyo ezali kopesama na ntina na makámá oyo makoki kobima. Mpo ete baboti bakozongisa monɔkɔ epai na Yehova, bakokanga miso te likoló na etamboli motindo yango epai na bana na bango. Kasi soki yango esalami, baboti bakozongisa monɔkɔ liboso ya bankulutu, atako libala ezali likambo ya bato mibale to ya mabota mibale. Ezali mpe bongo na baklisto oyo bakopesa nzela na ezaleli motindo yango.
7 Etamboli motindo wana ekoki kozala na matomba mabe likoló na lisangá. Na yango, bokutani mbala na mbala oyo esalami mpo na mokano ya libala te ekoki komema na bizaleli ya mbindo, etamboli mabe mpe na pite. Yango ekozanga te komonana na miso ya bato ya mokili mpe mbuma oyo etamboli yango mabe ekobota ezali bongo, kobwaka nsɔni na nkombo ya Yehova mpe kotya libaku na kopalanganisama ya nsango malamu epai na bato oyo bamonaki likambo yango. (1 Tim. 5:25b; Luka 17:1, 2; Lom. 2:23, 24) Mpo na oyo etali moto ye moko, longola kobeba ya boyokani malamu elongo na Yehova, ezali mpe na likambo oyo ete moto oyo azali komitika na etamboli ya lolenge yango azali kobebisa ntómo na ye mpe ya moto oyo azali kokutana na ye. Biblia elobi ete tosili kobwaka misala ya molili mpe nyonso oyo ezali kosalama na nkuku. (Lom. 13:14; Ef. 5:7, 8, 11, 12) Soki etamboli na biso ezali kokesenisa biso na mokili te, solo ezali lisusu kati na biso te. Na likambo yango, baoyo batyami na elimo ya Nzambe basengeli ntango mosusu koya kopamela biso. Yango ekoki kopɛngolama soki tozali kosalana mpenza elongo na bango.
8 Bobandami mpe libala ezali likambo ya moto ye moko na ntango oyo kimya mpe libateli ya lisangá ebebisami te. Ntango likambo yango likómi libaku mpo na lisangá, likambo oyo ezalaki ya moto ye moko ekotalelama na bankulutu ya lisangá mpo na kobatela kimya ya basangani nyonso ya lisangá.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]
“Emonani ete babalani bakozala na libaku ya kosala libala moko ya malamu mpe ya esengo soki bakobanda bomoi bango mibale na koyebáká mwa malamu mpenza bomoto ya mozindo ya moko mpe ya mosusu.”—Zulunalo ya libala mpe ya libota (Lingelesi)