Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 8/97 nk. 5-6
  • Bozongeli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bozongeli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1997
Mosala na biso ya Bokonzi—1997
km 8/97 nk. 5-6

Bozongeli na Eteyelo ya mosala ya Teokrasi

Bozongeli wana babúku ezali ya kokangama, na kotalela masoló masalamaki na Eteyelo ya Mosala ya Teokrasi kobanda pɔ́sɔ ya 5 Máí kino pɔ́sɔ ya 18 Augústo 1997. Salelá lokasa mosusu mpo na kokoma biyano na mituna oyo okoki koyanola na yango na boumeli ya ntango oyo epesami.

[Liyebisi: Na ntango ya bozongeli ya kokoma, salelá bobele Biblia mpo na koyanola na mituna nyonso miye mipesami. Mitindami mipesami nsima ya motuna nyonso mizali mpo na kosalisa yo na bolukiluki na yo moko. Nimero ya lokasa mpe ya paragrafe etyami bipai binso te mpo na mitindami ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli.]

Yanolá Solo to Lokuta na moko na moko na maloba malandi:

1. Ezéchias amekolaki tata na ye Ahaza, na kolendisáká losambo ya banzambe ya lokuta kati na Yuda. [ad lok. 513]

2. Bilembo ya mikolo na nsuka bilobelami bobele na Matai 24, Malako 13, mpe Luka 21. [kl lok. 102 etanda]

3. Motuna ya Yoane Mobatisi oyo ezwami na Luka 7:19 emonisi ete azangaki kondima. [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w87-LI 1/8 lok. 12.]

4. Na Elekeli ya nsuka oyo Yesu asalaki elongo na bayekoli na ye, bobele Petelo nde alobaki na ye ete: “Nakoangana yo soko moke te.” [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ]

5. Elembeteli moko te ya Biblia emonisi ete ntoma Petelo abalaki. [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ]

6. Bokonzi oyo Yesu asakolaki ezali na esika ya mibale kati na boyangeli ya Nzambe na molɔ́ngɔ́ mobimba. [kl lok. 91 par. 4]

7. Hérode Antipas azalaki mokonzi oyo apesaki nzela ete Yoane Mobatisi akatama nkingo. [ad 664]

8. Wana Yesu alobaki na Bafalisai ete Bokonzi ya Nzambe ezalaki katikati na bango, azalaki koloba mpo na ye moko lokola Mokonzi na mikolo mizalaki koya. (Luka 17:21) [kl lok. 91 par. 6]

9. Ezali na ndimbola moko te ya malonga oyo emonisi ntina mpo na yango mokanda ya Luka ezali na maloba ndenge na ndenge koleka oyo ya Baevanzile misato esangisami. [si lok. 176 par. 2]

10. Mosangani moko te kati na Lisangani ya Mikóló-Bakambi azalaki na likoki ya kotala bamboka oyo ezwami na Mpótó ya Ɛ́sti wana mosala na biso epekisamaki na eteni wana ya mabelé. [jv lok. 506 par. 1]

Yanolá na mituna milandi:

11. Filime nini oyo la Société abimisaki na 1954 epesaki bato mingi na mokili likoki ya komona bonene ya lisangá ya Yehova? [jv lok. 480 par. 3]

12. Na nzela nini basakoli mosusu bazali kolónga mokakatano ya kozanga kokuta bato na ndako mpe kosolola na bango kati na mosala ya kosakola? [․․․․․․․․jv lok. 516 par. 2-4]

13. Mpo na nini Yehova atindaki Elie ete “apakola Hazaël mpo ete azala mokonzi na Sulia”? (1 Mik. 19:15) [ad 643]

14. Yesu alingaki koloba nini na maloba oyo: “Bózala na mongwa kati na bino; mpe bózalana na kimya bamoko na bamosusu”? (Malako 9:50, NW) [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w85-F 15/5 lok. 21 par. 12.]

15. Liteya nini ya ntina tosengeli kozwa na kotaleláká mayoki ya Yesu likoló na likabo ya mwasi mobóla mokufeli-mobali? (Malako 12:42-44) [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w88-LI 1/7 lok. 22 par. 7-lok. 23 par. 1.]

16. Ndenge nini bizaleli mosusu ya Petelo emonisami na ekomeli ya Malako, mpe ndenge nini tokoki kolimbola yango? [si lok. 172 par. 5-6]

17. Kotaleláká bokeseni oyo ezali kati na Matai 6:9, 10 mpe Luka 11:2-4, mpo na nini tokoki koloba ete libondeli oyo Yesu apesaki lokola ndakisa esengeli te kozongelama liloba moko nsima na mosusu? [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; tála w90 15/5 lok. 16 par. 6.]

18. Lolenge nini ezaleli na biso ya kotya motema kati na Biblia ezali kolendisama ntango tozali kotánga mikapo lokola oyo ya Luka 3:1, 2? [si lok. 177 par. 7]

19. Mikapo nini kati na Nzembo mpe na Baebele mimonisi ete Yesu abandaki koyangela mbala moko te wana emataki ye na likoló? [kl lok. 96 par. 15]

20. Lokola toyebi ete Yesu azangaki soko moke te kondima epai na Nzambe, mpo na nini angangaki na mongongo makasi ete: “Nzambe na ngai! Nzambe na ngai! mpo na nini otiki ngai?” (Malako 15:34) [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w87-F 15/6 lok. 31.]

Bakisá liloba lizangi na bisika bitikali mpamba kati na milɔngɔ́ milandi:

21. Engebene mibeko ya Bayuda, libala ya Hérode na Hérodiade ․․․․․․․․ mpe ezalaki ya ․․․․․․․․. [ad 667]

22. Mose asɛngaki epai ya sɛmɛki na ye ․․․․․․․․ azala lokola ․․․․․․․․ mpo na libota ya Yisalaele na boumeli ya mobembo na bango longwa na Ngomba Sinai kino ․․․․․․․․ . [ad 674]

23. ․․․․․․․․ , Mokonzi ya Tulo, asalisaki Salomo mpo na kotonga tempelo ya Yelusaleme na kopesáká ye ․․․․․․․․ mpe ․․․․․․․․ [ad 672]

24. Harold King mpe Stanley Jones batindamaki na mboka․․․․․․․․ na 1947, yango esalaki ete mboka yango ezala moko kati na bamboka ya liboso ya Orient epai kuna bayekoli ya Gileadi batindamaki. [jv lok. 489 par. 2]

25. Sibia mpe Light ezalaki bankombo ya ․․․․․․․․ oyo bamisionere basalelaki mpo na kosakola na bisanga Antilles. [jv lok. 463 par. 1]

Poná biyano ya malamu kati na maloba oyo malandi:

26. Komonáká bosenga mpo na mosala ya misionere, (Eteyelo ya mosala ya Teokrasi; ya Mosala ya Bokonzi; ya Gileadi) efungwamaki na (1939; 1943; 1946). [jv lok. 458 par. 2]

27. (Alexandre; Diotrèphe; Hyménée), mopɛngwi moko na ekeke ya liboso, ateyaki ete lisekwa ezalaki bobele na elilingi mpe ete lisekwa ya bakufi mpo na mikolo mizali koya ekozala te. [ad 688]

28. Etindá mpo na koboma bana mibali oyo bakokisaki naino mbula mibale te mwa ntango moke nsima ya kobotama ya Yesu, epesamaki na (Hérode Agrippa I; Hérode Antipas; Hérode le Grand). [ad 663]

29. Kosɛka oyo Yisamaele asɛkaki Yisaka, oyo elobelami na Genese 21:8, 9 ebandisaki eleko moko ya mbula (400; 430; 450) ya bolɔ́zi ya Bayuda, oyo esukaki na kosikolama na bango uta na (Asulia; Babilone; Ezipito) na (537; 740; 1513) L.T.B. [ad 724]

30. Lokola yango emonisami na (Matai 10; Matai 24; Luka 21), Yesu apesaki malako ya sikisiki na ntina na mosala ya kosakola epai na baoyo apesaki bango mosala. [si lok. 170 par. 31]

Yokanisá mikapo milandi na maloba oyo mazali awa na nsé:

Mko. 7:20-23; 13:10; Luka 8:31; Mis. 12:20-23; 17:11

31. Tosengeli kosɛnzɛla mpo na koyeba likanisi nyonso ya mbindo to bopusi ya mabe oyo ekoki kokɔta na makanisi na biso mpe motema na biso mpe tosengeli kolongola yango liboso ete ezwa misisa. [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w89-LI 1/11 lok. 14 par. 16.]

32. Bilimu mabe bakozala elongo na Satana kati na ezalela ya kozanga nguya na boumeli ya “mbula nkóto.” (Emon. 20:3) [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ]

33. Elimo ya etingya ezali na ntina mingi mpo na kopesa nzela na mosala ya kosakola na mokili mobimba ete ekokisama na ntango epesami. [Botángi ya Biblia pɔ́sɔ na pɔ́sɔ; talá w95 1/10 lok. 27.]

34. Batatoli ya Yehova balakisaki bato mingi kotánga mpe kokoma, kopesáká bongo bango libaku ya koyekola Biblia bango moko. [jv lok. 466 par. 2-3]

35. Bato basengeli kokeba na ezaleli ya komikumisa mpamba te Nzambe asepelaka na lolɛndɔ te, motindo moko lokola bato mingi mpe basepelaka na yango te. [ad 665; talá mpe w94 1/9 lok. 21.]

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto