Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/95 lok. 2
  • Makita ya Mosala mpo na Novɛmbɛ

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makita ya Mosala mpo na Novɛmbɛ
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Mitó ya makambo mike
  • Pɔsɔ ebandi na 6 Novɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 13 Novɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 20 Novɛmbɛ
  • Pɔsɔ ebandi na 27 Novɛmbɛ
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 11/95 lok. 2

Makita ya Mosala mpo na Novɛmbɛ

Pɔsɔ ebandi na 6 Novɛmbɛ

Loyembo 43

Min. 10: Mayebisi mpe Mayebisi ya Mosala na biso ya Bokonzi.

Min. 15: “Nsango malamu mpo na basɔkɛmi.” Salá lisolo elongo na bayangani. Na nsima, bongisá elakiseli moko to bilakiseli mibale na kolandáká kolakisama oyo epesami.

Min. 20: “Batrakte Nsango ya Bokonzi ezali na ntina mpo na bato banso.” Lisukulu mpe lisolo. Ekosalema na mokɛngɛli na mosala. Lobelá mosala oyo mosili kosalema na ntina etali kokabolama ya batrakte Nsango ya Bokonzi. Yebisá mingi mpenza likambo oyo ete bibongiseli oyo bizwamaki mpo na mosala ya kosakola bisimbami malamu mpe ete basakoli ya sika bazali kosangana na mosala yango mpo na mbala ya liboso. Lobelá kino na meko nini teritware esili sikawa kosalema; soki lisangá mosusu lisɛngi bino ete bósalisa yango, yebisá makambo oyo masengeli kosalema. Lendisá moto moko na moko ete asala milende mpo na kosilisa batrakte Nsango ya Bokonzi oyo ezali na libombo ya mikanda. Lobelá mingi mpenza ntina ya kozwa banɔti ya bosepeli oyo bato bamonisi mpe ntina ya kosala bozongeli ya sika mpo na kobanda boyekoli ya Biblia. Elakiseli moko ekosalema na kolandáká kolakisama oyo epesami.

Loyembo 55 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 13 Novɛmbɛ

Loyembo 61

Min. 15: Mayebisi. “Osɛngaka na bato ete bóyekola Biblia?” Soki ntango ezali, sɛngá na bayangani ete báyebisa masolo ya kolendisa oyo bakutanaki na yango wana bazalaki kokabola batrakte Nsango ya Bokonzi.

Min. 15: Bamposa ya lisangá to lisukulu liuti na lisolo “Lolenge baklisto bakoki koyika mpiko na botyoli ya bato,” oyo libimaki na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Aprili 1995, nkasa 26 kino 29.

Min. 15: “Mpo na nini kokoma bisika oyo bato bazalaki te?” Ekosalema na mituna mpe biyano.

Loyembo 60 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 20 Novɛmbɛ

Loyembo 54

Min. 12: Mayebisi ya lisangá mpe Nsango ya Teokrasi. Lapolo ya kɔnti.

Min. 15: “Tólanda Ndakisa na biso na kozaláká bamemi na pole.” Ekosalema na mituna mpe biyano.

Min. 18: “Elembo oyo ezali kopesa lobiko.” Lisolo elongo na bayangani. Elakiseli moko to bilakiseli mibale oyo bikomonisa lolenge ya kosala bozongeli ya sika.

Loyembo 45 mpe libondeli ya nsuka.

Pɔsɔ ebandi na 27 Novɛmbɛ

Loyembo 66

Min. 10: Mayebisi. Lendisá basakoli ete básala mosala ya mobongisi-nzela mosungi na boumeli ya loi ya Eyenga ya Mbotama. Talelá masɛngami oyo malobelami kati na buku Lisanga mpo na kokokisa mosala ya Nzambe, nkasa 114 mpe 115.

Min. 15: Biyano na mituna na bino. Ekosalema na mituna mpe biyano. Monisá ntina oyo tozali kozwa matomba mingi na makita soki tozali komema na Ndako ya Bokonzi mikanda nyonso oyo mikotalema na makita yango.

Min. 20: Tólakisa buku Création na Desɛmbɛ. Tángá maloba ya bato oyo buku La vie: Comment est-elle apparue? Évolution ou création? ekamwisaki bango mingi. (Talá Linɔngi ya Mosɛnzɛli ya 15 Marsi 1987, lokasa 32; ya 1 Mai 1986, lokasa 31; nyonso na ebimeli ya Lifalanse.) Bendá likebi likoló na bililingi bizwami na lokasa 6, 236 kino 237, 243 mpe 245, mpe monisá lolenge lobongi ya kosalela yango mpo na kobanda masolo. Elakiseli: Mosakoli moko ya makoki azali kolimbola kati na lisolo na ye ete moto na moto asengeli kosala liponi soki alingi kozwa bomoi ya seko; azali kosalela makanisi mpe mikapo oyo mizwami na nkasa 250 mpe 251. Kundwelá basakoli ete bábosana te kokamata babuku yango mpo na mosala ya kosakola na nsuka ya pɔsɔ.

Loyembo 74 mpe libondeli ya nsuka.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto