Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • km 11/95 lok. 1
  • Tólanda ndakisa na biso na kozaláká bamemi na pole

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tólanda ndakisa na biso na kozaláká bamemi na pole
  • Mosala na biso ya Bokonzi—1995
  • Masolo mosusu
  • Yaka na ba assemblées ya districte “Bamemi na pole”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Nani azali kolanda pole na mokili?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • “Tiká pole na bino engɛnga”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2011
  • “Tiká ete pole na bino engɛnga liboso ya bato”
    Mosala na biso ya Bokonzi—2001
Makambo mosusu
Mosala na biso ya Bokonzi—1995
km 11/95 lok. 1

Tólanda ndakisa na biso na kozaláká bamemi na pole

1 Wana azalaki koloba na ntina na ye moko, Yesu ayebisaki ete: “Ngai nazali pole na mokili.” Kolandáká ndakisa oyo ye apesaki, bayekoli na ye bakómaki mpe “pole na mokili.” (Mat. 5:14, NW ) Lokola azalaki “pole na mokili,” Yesu akokaki koloba ete baoyo nyonso bazalaki kolanda ye basengelaki kozwa “pole na bomoi.” (Yoa. 8:12, NW ) Yango ekómisi biso bamemi na pole ya elimo, mpe tosengeli kotika nzela na eloko ata moko te ete ezipa to eyindisa pole yango.

2 Lisangá ya Yehova lizali kobongisa biso mpo ete tózala bamemi malamu ya pole. Soki tozali mpenza kolanda batoli mpe litambwisi oyo tozali kozwa, tokozala na likoki ya kongɛngisa bato ya lolenge nyonso likoló na solo ya Bokonzi. (1 Tim. 4:6) Komitambwisa lokola bamemi na pole elimboli te bobele koloba na ntina na solo mbala na mbala oyo libaku limonani, kasi elimboli lisusu komisɛnzɛla ete tózala ntango nyonso na etamboli oyo ebongi na baklisto. Ndakisa na biso azalaki na ekweli te kati na likambo yango. Biso baoyo tozali bayekoli na ye, tosengeli komonisa kati na bomoi na biso ya mokolo na mokolo ete boklisto ezali lolenge ya bomoi na biso. (Ef. 5:9, Tit. 2:7, 8, 10) Tosengeli kokokisa misala malamu liboso na bato banso, mpe yango ekosala ete bazalani na biso bákumisa Nzambe.​—Mat. 5:16.

3 Motatoli moko oyo azalaki kosakola ndako na ndako akutanaki na likambo moko oyo limonanaka mingi te. Mokóló-ndako mpe mwasi na ye bazalaki na bokɔnɔ, kasi esengelaki na bango ete bákende kobombisa mbongo na banki. Batunaki Motatoli wana soki akokaki kokende kotika yango. Motatoli wana andimaki mpe bapesaki ye mbongo koleka badolare 2 000. Na bozongi na ye, atunaki babalani yango ete: “Ndenge nini bokokaki kotyela ngai motema, nzokande boyebaki ngai kutu te?” Bango bayanolaki ete: “Toyebi, mpe moto nyonso ayebi yango, ete Batatoli ya Yehova bazali bato bobele moko oyo tokoki kotyela motema.” Oyo nde bosepeli tozali na yango ya komona ete bokangami na biso ya makasi na mitinda ya bizaleli malamu ya Biblia ezali komemela biso lokumu ya ndenge wana mpo na nkembo ya Nzambe!

4 Molakisi moko ya mwasi alimbwelaki bana-kelasi na ye ntina oyo mwana mwasi moko ya moke ya mbula motoba, oyo azalaki Motatoli ya Yehova, azalaki te koyema bililingi ya Halloween [mpokwa oyo ezalaka liboso ya Eyenga ya Basantu banso]. Alobaki ete azalaki na bosepeli mingi na ntina na mwana-kelasi na ye wana, mpamba te mwana yango abangaki te komonisa ezaleli ekeseni na oyo ya basusu na ntina na bindimeli na ye. Abakisaki ete, na ntango ozali na endimeli makasi na ntina na likambo moko, osengeli kozala na mpiko ya kolongisa likanisi na yo. Bobele na mpokwa wana, molakisi mwasi yango atalelaki bindimeli na ye malamumalamu mpe amonaki ete azalaki na mpiko motindo wana te. Na mokolo molandaki, alobaki ete akosɛnga lisusu na bana-kelasi na ye te ete básangana ata na fɛti nini; kutu, kati na motema na ye, asilaki kotika kondimela bafɛti yango mosusu!

5 Bipai binso, basaleli ya Yehova balendisami ete bángɛngisa pole na bango. Etamboli malamu ya bilenge na eteyelo ezali kokamwisa baninga na bango ya kelasi mpe balakisi na bango. Mikóló oyo bazali Batatoli ya Yehova, oyo etamboli na bango ezali malamu bazali kopesa libaku na bato oyo bafandi zingazinga na bango ete bábimisa maloba malamu na ntina na nsango ya Bokonzi. Litatoli ya libaku malamu, oyo likoki kopesama na bisika bikeseni, lizali kobenda bato ya sembo oyo bazali na mposa ya koyeba makambo mingi na ntina na Nzambe. Kozala mosali na molende mpe moto na kolongobana kati na esika na biso ya mosala ezali mpe lolenge mosusu ya litatoli. Ya solo, ezala tozwami wapi mpe ata tozali kosala nini, tokoki kolamwisa bosepeli ya bazalani na biso mpo na solo.

6 Na kotyáká miso na biso likoló na Ndakisa na biso ya kokoka, biso baoyo tozali bayekoli na ye, tokokoba kokóma bato babongi. Soki tokolanda ntango nyonso ndakisa na ye, tokondimisama ete pole na biso ekongɛngisa bazalani na biso.​—Mat. 5:15; 1 Pet. 2:21.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto