Tózala bayambi na bato kati na makita
1 Yesu klisto, ndakisa na biso, azalaki moyambi na bato. Na boboto nyonso, asalaki libyangi oyo: “Boya liboso na ngai, bino nyonso bozali kolɛmba na mosala mpe kokumba bozito mpe nakopemisa bino.” (Mat. 11:28) Ee, Yesu Klisto azalaki liziba ya elendiseli mpo na baoyo nyonso bazalaki koya epai na ye. Ata bato oyo bayebanaki ete bazali basumuki babendamaki epai na ye. Lisolo lizwami na Malako 2:15 liyebisi ete: “Akomi kofanda na ndako na ye mpe bakongoli na mpako mingi mpe bato na masumu bazalaki na mɛsa esika moko na Yesu mpe bayekoli na ye, zambi bato bazalaki mingi wana mpe babili ye.”—Talá lisusu Luka 7:36-38.
2 Na Baloma 15:7 tozali kokuta toli oyo: “Yango wana banyangelana pelamoko Klisto asili konyangela bino mpo na nkembo na Nzambe.” Na ndakisa ya Yesu, tozali koyamba kati na lisangá baoyo nyonso bazali koluka solo, ezala ata ekólo na bango ezali nini, lingomba na bango, etɛlɛmelo na bango na bomoi to nivo ya koyekola na bango, tozali kokumisa Nzambe. Tozali kopesa epai na baoyo tozali koyamba likanisi ya sikisiki na ntina na Yehova Nzambe.
3 Na ndakisa ya Klisto, tolingi koyamba na esengo nyonso bato oyo bazali koya mpo na mbala ya liboso na Ndako ya Bokonzi mpe bapaya oyo bazali baleki-nzela. Esilá kokómela yo na kotuna epai na mosakoli ete: “Moto wana azali nani? Azali motatoli? Ekozala malamu ete obɛlɛma pene na ye mpe oluka koyeba ye, boye te? Yango ezali mpasi te soki tomikundoli ete likambo ya ntina koleka ezali ya komonisa bosepeli epai na bazalani na biso.—Mis. 20:35.
4 Lolenge ya komonisa bosepeli epai na bato ya sika: Yebisá nkombo na yo, na nsima tuná mwa mituna ya bolingo epai na moto ayei sika: Ofandaka wapi? Osilá koya na Ndako ya Bokonzi? Oyaki ndenge nini? Na komonisáká bosepeli motindo wana epai na bato ya sika, bandeko mibali mpe bandeko basi bamonaki kati na bayangani na Ndako ya Bokonzi, bato oyo babandaki naino koyekola Biblia te, mpe bakokaki kofungola boyekoli ya Biblia elongo na bango.
5 Soki tozali kopesa epai na bato ya sika libaku ya koloba, bakomiyoka ete bayambami malamu mpe bakomona ete tozali mpenza kosepela na bango. Tokoki kolimbwela bango ntina ya makita na biso makeseni mpe lolenge yango esalemaka. Lobelá lolenge oyo mikanda na biso minyatami mpe lolenge oyo tosalaka mosala na biso mpo na Nzambe. Bosepeli na biso ya solo ekoki kobenda bango ete básambela Nzambe, na kolobáká ete: “Nzambe azali mpenza kati na bino.”—1 Kol. 14:25, NW.
6 Mpo na ezaleli ya nsɔninsɔni, basusu bazalaka na nkaká ya kobɛlɛma epai na moto oyo ayei sika mpo na kosolola na ye. Nzokande, tóbosana te ete tosengeli komekola Klisto na kosaláká liziba ya elendiseli mpo na basusu. Soki tolingi mpenza komekola Klisto, Yehova akopesa biso lisungi ya elimo na ye. Nzokande, “Nzambe apesaki biso [elimo] na kobangabanga te kasi [elimo] na nguya mpe na bolingo mpe na [makanisi malamu, NW]” Ee, elimo ya Nzambe ekoki kotondisa biso na mpiko mpe na bolingo mpo na kozwa likanisi ya kobɛlɛma epai na moto moko ya sika.—2 Tim. 1:7.
7 Na bongo, tómekola Klisto na kozaláká na ezaleli ya koyamba bato ya sika oyo bazali koya na makita. Tósalisa bango na komiyoka ete bazali epai na bango katikati na biso. Kosaláká bongo, tokokumisa Yehova oyo, na nzela ya Mwana na ye, azali koyamba baoyo nyonso bazali koya kosambela ye kati na “ngomba [na ye] na bulɛɛ.”—Yis. 56:6, 7.