Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w12 1/8 nk. 21-23
  • Bato nyonso ya malamu bakendaka na likoló?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bato nyonso ya malamu bakendaka na likoló?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Baoyo bakokende na likoló bakosala nini kuna?
  • Bakoyangela banani?
  • Mabele ekokoma Paradiso
  • “Moto mabe akozala lisusu te”
  • Na mesa ya kapitɛni
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Ezali na moto oyo tokoki kotyela motema?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Ndenge ya kosilisa bilembo oyo bitumba etikaka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Likoló ezali ndenge nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
w12 1/8 nk. 21-23

Lisolo na moninga moko ya kartye​—Bato nyonso ya malamu bakendaka na likoló?

BATATOLI YA YEHOVA basepelaka kosolola masolo ya Biblia na baninga na bango ya kartye. Ozali nde na motuna moko ya Biblia oyo olukaka kozwa eyano? Olingi koyeba mateya to makambo mosusu ya Lingomba ya Batatoli ya Yehova? Soki ezali bongo, kokakatana te kotuna bango mokolo oyo okokutana na Motatoli ya Yehova. Akosepela kosolola makambo yango na yo.

Ndakisa oyo elandi emonisi ndenge oyo Motatoli ya Yehova moko akoki kosolola na moto. Tósala lokola Motatoli moko na nkombo Marcus akei kotala mobali moko nkombo na ye Robert.

Baoyo bakokende na likoló bakosala nini kuna?

Marcus: Ntango okanisaka mpo na avenire, omonaka ete makambo ekobonga, ekobeba to ekotikala kaka boye?

Robert: Namonaka ete makambo ekobonga. Nazalaka na mposa ya kokende na likoló mpo na kozala elongo na Nkolo.

Marcus: Ezali mpenza elikya moko kitoko. Biblia elobelaka mingi ndenge likoló ezalaka mpe libaku ya kokende kuna. Oyebi soki makambo nini bato oyo bakokende kuna bakosala?

Robert: Tokozala elongo ná Nzambe mpe tokokumisa ye libela na libela.

Marcus: Yango ezali mpenza elikya moko kitoko. Likambo ya esengo, Biblia elobeli kaka te libaku kitoko oyo bato oyo bakokende na likoló bakozwa kasi mpe mokumba ya ntina oyo bakokokisa.

Robert: Mokumba yango ezali nini?

Marcus: Mokumba yango elobelami na Emoniseli 5:10. Vɛrsɛ yango elobi boye: “[Yesu] okómisi bango bokonzi mpe banganga-nzambe mpo na Nzambe na biso, mpe bakoyangela mabele.” Robert, omoni mokumba oyo bato oyo bakokende na likoló bakozala na yango?

Robert: Vɛrsɛ yango elobi ete bakozala bakonzi mpe bakoyangela mabele.

Marcus: Yango ezali likanisi moko kitoko, boye te?

Bakoyangela banani?

Marcus: Sikoyo, omoni te ete lokola bato oyo bakokende na likoló bakoyangela lokola bakonzi, esengeli mpe kozala na bato oyo bango bakoyangela? Kutu, ntina ya guvɛrnema ezali nini soki bato oyo guvɛrnema yango ekoyangela bazali te?

Robert: Namoni likambo olingi koloba.

Marcus: Na yango, ebongi tómituna motuna oyo: Bakoyangela banani?

Robert: Nakanisi ete tokoyangela bato oyo bakufi naino te mpe bakei naino likoló te.

Marcus: Yango ekoki kozala bongo soki bato nyonso ya malamu bakendaka na likoló. Kasi, ezali na likambo mosusu oyo esengeli tótalela. Ekoki kozala ete bato mosusu ya malamu bakokende na likoló te?

Robert: Namoná naino te mokristo moko oyo andimaka likanisi wana.

Marcus: Natuni motuna wana mpo na likanisi oyo ezali na Nzembo 37:29. Okosepela kotánga vɛrsɛ yango?

Robert: Ɛɛ. Elobi boye: “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”

Marcus: Mersi. Omoni esika oyo bato mingi ya malamu bakofanda?

Robert: Vɛrsɛ yango elobi ete bakofanda na mabele.

Marcus: Ezali mpenza bongo, bakofanda wana kaka te mpo na ntango mokuse. Simbá ete vɛrsɛ yango elobi: “Bakofanda wana seko.”

Robert: Ntango mosusu, elingi koloba kaka ete bato malamu bakozala ntango nyonso awa na mabele. Ntango tokufaka mpe tokendaka na likoló, bato malamu mosusu oyo babotamaka, bazwaka esika na biso.

Marcus: Bato mingi mpe bakoki kolimbola vɛrsɛ yango bongo. Kasi, vɛrsɛ yango ekoki kolimbola makambo mibale na mbala moko? Ntango mosusu elobi nde ete bato malamu bakofanda seko na mabele?

Robert: Nandimi mpenza te likanisi na yo.

Mabele ekokoma Paradiso

Marcus: Kasi, tótalela oyo vɛrsɛ mosusu ya Biblia elobi mpo na bomoi awa na mabele na mikolo ezali koya. Tótánga Emoniseli 21:4. Mpo na baoyo bakozala na bomoi na ntango wana, vɛrsɛ yango elobi boye: “[Nzambe] akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.” Ezali mpenza elikya kitoko, boye te?

Robert: Ɛɛ. Kasi, nakanisi ete ezali kolobela ndenge oyo bomoi ekozala na likoló.

Marcus: Toboyi te, baoyo bakokende na likoló bakozwa mpe mapamboli ya ndenge wana. Kasi, talá vɛrsɛ yango lisusu. Elobi nini mpo na liwa?

Robert: Elobi ete “liwa ekozala lisusu te.”

Marcus: Ezali mpenza bongo. Boye, okondima ete mpo eloko moko ezala lisusu te, esengelaki ezala naino liboso na esika yango.

Robert: Ezali bongo.

Marcus: Kasi, liwa ezalaka te na likoló, boye te? Ezali kaka awa na mabele nde bato bakufaka.

Robert: Hmm. Nasengeli kotalela naino likambo yango.

Marcus: Robert, omoni, Biblia eteyaka ete bato mosusu ya malamu bakokende na likoló kasi bato mingi mosusu ya malamu mpe bakofanda awa na mabele seko. Kutu, na ntembe te, oyoká maloba oyo: “Esengo na bato ya ezaleli ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabele.”​—Matai 5:5.

Robert: Ya solo, nayokaka ndenge batángaka vɛrsɛ yango mbala mingi na ndako-nzambe.

Marcus: Soki bato ya ezaleli ya boboto bakozwa mabele, yango emonisi te ete bato bakofanda awa na mabele? Baoyo bakofanda na mabele bakozwa mapamboli oyo elobelami na Emoniseli. Bakomona ndenge mokili ekobongwana mpenza mpo Nzambe akolongola makambo nyonso ya mabe, ata mpe liwa.

Robert: Sikoyo namoni oyo olingi koloba, kasi, nandimi te ete kaka vɛrsɛ moko to mibale ya Biblia nde ekoki kondimisa likanisi na yo.

Marcus: Nalobi bongo te. Kutu, ezali na bavɛrsɛ mingi oyo elobeli ndenge bomoi ekozala awa na mabele na mikolo oyo ezali koya. Soki ozali na mwa ntango, nakoki kolakisa yo vɛrsɛ mosusu oyo nalingaka mingi.

Robert: Ɛɛ, nazali na mwa miniti.

“Moto mabe akozala lisusu te”

Marcus: Liboso, totángaki Nzembo 37 vɛrsɛ 29. Tózongela naino vɛrsɛ yango. Tótánga sikoyo vɛrsɛ 10 mpe 11. Okosepela kotánga bavɛrsɛ yango?

Robert: Ɛɛ. “Mpe etikali kaka mwa ntango moke, moto mabe akozala lisusu te; mpe okotya mpenza likebi na esika na ye, akozala te. Kasi bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.”

Marcus: Mersi. Talá vɛrsɛ 11, “bato ya komikitisa” to bato malamu bakofanda wapi?

Robert: Vɛrsɛ yango elobi ete “bakozwa mabele.” Kasi, namoni ete vɛrsɛ oyo ezali kokokisama sikoyo mpo lelo oyo bato ya malamu bazali na mabele.

Marcus: Olobi solo. Kasi, simbá ete vɛrsɛ yango elobi mpe ete bato malamu bakosepela na “kimya mingi.” Lelo oyo, mokili ezali mpenza na kimya te, boye te?

Robert: Ɛɛ, kimya ezali te.

Marcus: Bongo, ndenge nini elaka oyo ekokokisama? Tózwa naino ndakisa oyo: Kanisá ete ozali na ndako moko monene ya etaje. Bato mosusu oyo bafutelaka na ndako na yo bazali bato malamu mpe babatelaka apartema na bango, bazalaka mpe na boyokani malamu ná basusu. Ozali na esengo ya kotikela bango báfutela apartema yango. Kasi, bato mosusu oyo bazali kofutela na ndako yango bazali mabe; bazali kobebisa yango mpe konyokola bato oyo bafandi esika moko na bango. Sikoyo, soki bato yango baboyi kobongisa bizaleli na bango, okosala nini?

Robert: Nakolongola bango.

Marcus: Yango nde likambo oyo Nzambe akosala bato mabe lelo oyo. Talá lisusu vɛrsɛ 10. Elobi boye: “Moto mabe akozala lisusu te.” Na maloba mosusu, Nzambe “akolongola” bato oyo banyokolaka basusu. Na nsima, bato malamu bakofanda na kimya awa na mabele. Namoni ete liteya oyo elobi ete bato malamu bakozala na bomoi ya seko na mabele ekeseni mpenza na oyo bateyaki yo liboso.

Robert: Ya solo, nayoká naino liteya oyo te na lingomba na ngai.

Marcus: Mpe ndenge olobaki yango liboso, vɛrsɛ moko to mibale ekoki te mpo na kolobela likambo yango. Tosengeli kotalela oyo Biblia elobi na mobimba na yango mpo na avenire ya bato malamu. Na kotalela bavɛrsɛ oyo touti kotánga, okanisi ete bato malamu mosusu bakokende na likoló mpe mingi mosusu bakofanda awa na mabele libela na libela?

Robert: Nandimi mpenza te. Kasi, nasengeli kondima ete yango nde balobeli na bavɛrsɛ oyo outi kotánga. Nakokanisa lisusu mingi mpo na likambo yango.

Marcus: Ntango okotalela lisusu likambo yango, ntango mosusu mituna mosusu ekoyela yo na makanisi. Na ndakisa, ezali boni mpo na bato malamu oyo bazalaki na bomoi liboso na biso? Bango nyonso bakendá likoló? Soki te, bazali wapi?

Robert: Mituna wana ezali mpenza na ntina.

Marcus: Mbala mosusu, nakoki kosalela yo makambo mibale. Ya liboso, nakokomela yo naino mwa bavɛrsɛ oyo eyokani na lisolo yango.a Ya mibale, nakosepela kozonga lisusu mpo tólobela bavɛrsɛ yango soki ozwi libaku ya kotánga yango mpe okanisi na bavɛrsɛ yango na mozindo. Omoni boni?

Robert: Ɛɛ, namoni ete ekozala malamu. Mersi.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Talá Yobo 14:13-15; Yoane 3:13; mpe Misala 2:34.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto