Ezali na moto oyo tokoki kotyela motema?
NSIMA ya kokweisama ya Mur de Berlin na 1989, makambo mingi oyo ebombaná eyebanaki. Na ndakisa, Lydiaa ayebaki ete ntango Basosialiste bazalaki koyangela Allemagne ya Ɛsti, Stasi, elingi koloba basirete ya ekólo yango, bazalaki kolandela makambo oyo azalaki kosala mpe bazalaki kobomba yango na dosye moko. Lydia akamwaki mingi na koyoka likambo yango; kasi likambo oyo ekamwisaki ye koleka ezali ete moto oyo azalaki koyebisa basirete makambo na ye ezalaki nde mobali na ye. Moto oyo ye azalaki kotyela motema mobimba nde azalaki kotɛka ye.
Lisolo moko ebimaki na zulunalo moko ya Londres (The Times) elobaki boye: Robert azalaki mobange moko oyo azalaki kopesa monganga na ye “limemya mpe lokumu mingi mpe azalaki mpenza kotyela ye motema.” Monganga yango ayebanaki lokola moto ya “boboto, oyo amityaka mpenza na esika ya basusu.” Kasi, Robert akufaki liwa ya mbalakaka. Ezali te ete akangamaki motema to bɔɔngɔ etikaki kosala. Minganga mosusu ná bakonzi ya Leta balobaki ete monganga oyo azalaki kosalisa Robert akendaki na ndako na ye mpe atɔbɔlaki ye ntonga ya mabe, kozanga ete ayebisa ye to bandeko na ye. Emonani mpenza ete Robert abomamaki na moto oyo ye azalaki kotyela motema mobimba.
Bato oyo Lydia ná Robert bazalaki kotyela motema, kaka bato yango nde basalaki bango mabe mpenza. Mabe mosusu ezalaka mpenza monene te. Kasi, esalemaka mingi ete moto oyo totyelaka motema, kaka moto yango nde akosala biso mabe. Lapolo moko (Allensbacher Jahrbuch der Demoskopie 1998-2002) ya ebongiseli moko monene oyo esalaka ankɛti na Allemagne emonisaki ete bato mingi oyo batunaki (86 %) balobaki ete bato oyo bango bazalaki kotyela motema basalaki bango mabe. Mbala mosusu yo mpe osí okutaná na likambo ya ndenge wana. Yango wana, tokoki kokamwa te na likambo oyo zulunalo moko ya Suisse (Neue Zürcher Zeitung) elobaki na 2002 ete “banda bambula mingi, na mikili ya Mpoto mpe ya Amerika, bato bazali lisusu kotyelana motema te.”
Eyaka malɛmbɛmalɛmbɛ, kasi ekoki kosila kaka na mbala moko
Kotyela bato motema elimboli nini? Kotyela bato mosusu motema elimboli kondima ete bazali bato ya bosembo, bato babukaka lokuta te mpe ete bakoki te kosala likambo moko na nko mpo na koyokisa yo mpasi. Mpo na kotyela moto motema esɛngaka ntango, kasi kolongola yango esɛngaka ata miniti te. Lokola bato mingi bazali komona ete kaka bato oyo batyelaka motema nde basalaka bango mabe, tokoki kokamwa te komona ete bato balingi lisusu kotyelana motema te. Ankɛtɛ moko esalemaki na Allemagne na 2002 emonisi ete “soki tozwi bilenge misato, kaka moko nde atyelaka bato mosusu motema.”
Tokoki komituna boye: ‘Tokoki mpenza kotyela moto moko motema? Ezali na ntina tótyela moto moko motema ntango toyebi ete akoki mpe kosala biso mabe?’
[Maloba na nse ya lokasa]
a Topesi bango bankombo mosusu.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 3]
Bato mingi oyo batunaki (86 %) na ankɛtɛ moko balobaki ete basalaki bango mabe kaka na bato oyo batyelaki motema