Bomoi na ntango ya kala—Moloni-bilanga
“[Yesu] alobaki na bayekoli na ye ete: ‘Ya solo, mbuma ya kobuka ezali mingi, kasi basali bazali moke. Yango wana, bósɛnga Nkolo ya mosala ya kobuka mbuma atinda basali na mosala na ye ya kobuka mbuma.’”—MATAI 9:37, 38.
MPO na kopesa mateya ya ntina, mbala mingi Yesu azalaki kolobela mayele oyo baloni-bilanga basalelaka mpe biloko oyo basalaka na yango mosala. (Matai 11:28-30; Marko 4:3-9; Luka 13:6-9) Mpo na nini? Mpamba te azalaki kofanda na mboka oyo bato mingi bazalaki kosala bilanga. Bato mingi oyo bazalaki koyoka ye bazalaki kolanda mimeseno ya kala oyo etali mosala ya bilanga. Bazalaki kokanga ntina ya bandakisa yango mpo eyokanaki na misala oyo bazalaki kosala mokolo na mokolo. Yesu ayebaki makambo oyo bazalaki kokutana na yango, yango wana mateya na ye ezalaki kosimba mitema na bango.—Matai 7:28.
Tokomona ete bandakisa ya Yesu mpe masolo mosusu ya Biblia ezali na ntina mingi soki toluki koyeba mwa moke makambo oyo etali baloni-bilanga na siɛklɛ ya liboso: biloko oyo bazalaki kolona, biloko oyo bazalaki kosala na yango bilanga, mpe mikakatano oyo bazalaki kokutana na yango.
Meká komona na makanisi ndenge oyo moloni-bilanga azalaki kosala mosala na ye. Tángá bavɛrsɛ oyo ezali awa, mpe talá mateya nini okoki kozwa.
Ntango ya kolona
Moloni-bilanga atɛlɛmi na porte ya ndako ye, atye lobɔkɔ na elongi mpo na kobatela miso na kongɛnga ya moi mpe azali kobenda mopɛpɛ ya kitoko na zolo. Mai ya mbula elɛmbisi mabele oyo ekómaki makasi mpo na moi. Sikoyo ekómi ntango ya kobalola mabele mpo na kolona. Amemi na lipeka na ye etimweli oyo esalemi na nzete mpe akei bilanga.
Ntango akómi kuna, atye ngɔmbɛ mibale esika moko, akangisi bango na ekanganeli, mpe abandi kobɛta bango lingenda mpo básala mosala. Etimweli ya ebende ebandi kopanza mabele oyo ekómá lokola mabanga. Ezali kobalola mabele te, kasi ezali nde konikanika yango mpo epanzana, mpo na kosala mikala (1). Moloni-bilanga azali kobalola mabɔkɔ epai na epai, mpe azali kosala nyonso mpo mikala ezala semba: azali kotala nsima te, noki te etimweli ekokenda epai mosusu. (Luka 9:62) Asengeli kaka kosuka na eteni na ye ya mabele, mpe kosalela mabele yango malamu.
Sikoyo, lokola basali mikala na elanga, ekómi ntango ya kolona. Na lobɔkɔ moko, moloni-bilanga asimbi libenga oyo ezali na mboto ya ɔrje, mpe na lobɔkɔ mosusu, azali kobimisa mboto mpe kobwaka yango epai na epai (2). Lokola mwa banzela oyo ekaboli mikala na elanga na ye ezali mikemike, azali kobwaka mboto na ekɛngɛ mpo ekwea na “mabele ya malamu.”—Luka 8:5, 8.
Nsima ya kolona, ekómi sikoyo ntango ya kozipa mboto. Moloni-bilanga akangisi bitape ya nzete ya nzubɛ na bangɔmbɛ na ye, oyo ebandi kobenda yango na kati ya bilanga. Ebele ya bandɛkɛ babandi koya mpo na kododa mboto yango, liboso ete mabele ezipa yango. Na nsima, moloni-bilanga asaleli eloko moko lokola kongo (3) mpo na kolɛmbisa mabele mpe kolongola matiti to bansinga oyo ekoki kopekisa mboto ekola malamu.—Matai 13:7.
Ntango ya kobuka
Basanza eleki. Mbula enoki mbala na mbala. Sikoyo mitó ya ɔrjɛ ezali koningana na mopɛpɛ, mpe bilanga ezali komonana mpɛmbɛ.—Yoane 4:35.
Eleko ya kobuka mbuma ezalaka ntango ya mosala makasi mpo na moloni-bilanga mpe libota na ye. Na lobɔkɔ ya mwasi, mobuki-mbuma asimbi milona oyo alingi kobuka, mpe na lobɔkɔ ya mobali asimbi likwangola (4). Bato mosusu bazali koyanganisa mbuma, kokangisa yango maboke (5), na nsima batye yango likoló ya mpunda to na pusu (6) oyo ekomema yango na mboka, na esika ya kotutatuta mbuma.
Moi ezali kongɛnga makasi mpe ezali komonana lokola libungutulu ya mpɛmbɛ na katikati ya mapata ya bulé. Libota mobimba ekei kopema mwa moke na malili ya nse ya nzete ya figi. Bazali kosɛka, kobɛta masolo, mpe kolya elongo biloko ya mikemike lokola mampa, mbuma ekauká, mbuma ya olive, mbuma ya figi oyo ekauká, mpe mbuma ya vinyo. Ntango basilisi kolya, mokomoko azali komɛla mai nokinoki.—Kolimbola Mibeko 8:7.
Na elanga moko ya pembeni, babola mpe bato oyo bazangá mabele bazali kolɔkɔta bambuma oyo etikalaka (7).—Kolimbola Mibeko 24:19-21.
Na nsima, na esika ya kotutatuta mbuma na mboka, moloni-bilanga atandi maboke ya milona likoló ya esika moko oyo etombwaná. Bangɔmbɛ bazali kobenda epai na epai eloko ya kotutela oyo ezali kilo (8). (Kolimbola Mibeko 25:4) Na nse ya eloko yango ya kotutela, bakangisá mabanga oyo basɛbisá mpe bibende, mpo na kokatakata milona.
Moloni-bilanga azali kozela ete mopɛpɛ ya mpokwa eya. (Ruta 3:2) Na mpokwa, ntango molili ebandi kokɔta, akɔtisi kanya moko ya libaya, to ‘pau ya kopupola mbuma’ (9) na nse ya maboke yango ya milona mpo na kobwaka yango likoló. (Matai 3:12) Mbuma ezali kokwea na nse, kasi mposo ezali kokende na mopɛpɛ. Mbala na mbala, azali kotombola kanya yango tii ntango akosilisa kopupola mbuma nyonso.
Ntango moi ebandi kobima, mwasi ya moloni-bilanga ná bana na ye ya basi babandi mosala ya kopupola (10). Bazali koningisa kiyungulu oyo etondi na mbuma mpe matiti. Ntango mbuma ya ɔrje ezali kokɔta na bikɔlɔ, matiti ezali kokwea pembeni. Bilanga eboti mbuma mingi. Basali batye mbuma mosusu oyo etikali na kati ya bilokó (11). Oyo etikali, bazalaki kosopa yango na kati ya libulu ya kobomba biloko.
Likoló ya esika ya kotutatuta mbuma, moloni-bilanga asemboli mokɔngɔ, anyɔlisi nzoto, azali kotalatala bilanga oyo ezali zingazinga ya mboka. Azali kotala na esengo eteni ya mabele oyo ebongisami malamu, oyo etondi na milona, mpe ezali komonisa ete asali mosala makasi mikolo ebele. Azali kotala basali oyo bazali kobongisa nzete ya vinyo, ya olive, ya grenade, mpe ya figi. Na elanga oyo ezali pembeni, moloni-bilanga mosusu oyo azali mpe kosala mikala na ye, azali kopɛpa ye mbote. Bilanga yango ekobimisa kɔkɔmbrɛ, lantiye, madesu ya minene mpe ya mike, mpe matungulu. Moloni-bilanga apemi mwa moke, mpe atomboli miso likoló, asali libondeli ya mokuse mpo na kopesa Nzambe matɔndi mpo na likabo kitoko oyo apesi ye.—Nzembo 65:9-11.
[Bililingi na nkasa 28-30]
(Talá mokanda)