Bililingi ya Mokili na ndaká
Lya bilei—Lya limpa
MOKOLO moko, wana Yesu mpe bayekoli na ye bazalaki na ndako moko, “bakokaki ata kolya te” mpo na bibele. (Malako 3:20) Na libaku mosusu Yesu akɔtaki na ndako ya Mofalisai moko mpo na “kolya.” (Luka 14:1) Okanisi ete ezalaki bilei ya motindo nini?
Bayisraele ya ntango na kala mbala mosusu bakokaki kokanisa ete ezalaki limpa, mpamba te maloba ya Liebele mpe ya Greke oyo mabongolami “kolya,” malimboli mpenza “kolya limpa.” Likambo yango lizali mpasi te mpo na kososola, mpamba te limpa ya blé to ya orge ezalaki bilei ya ntina mingi.
Lelo oyo bato mingi batalelaka batata na mabota lokola babateli na bibwele mpe bayekoli na Yesu lokola balɔbi mbisi. Ezali solo ete bamoko basalaki mosala yango, kasi bango nyonso te. Blé ezalaki na ntina monene kati na bomoi ya ebele na bato. Emonani ete ezalaki bongo na bileko mosusu ya bomoi ya Isaka mpe Yakobo, lokola tokoki kosukisa na botangi ya Genese 26:12; 27:37 mpe 37:7. Lisusu, lokola bilanga ezalaki mosala ya bato mingi na Galilai na eleko na Yesu, ekoki kozala ete kati na baoyo bakómaki bantóma, basusu bazalaki baloni ya blé?
Ekoki kozala bongo, mpo ete mosala ya kolona blé eyebanaki mingi na Mokili na ndaká, lokola ebele na mikapo ya Biblia mizali komonisa yango. (Deteronome 8:7-9; 1 Samwele 6:13) Likambo yango lizalaki kosenga nini?
Nsima na bambula oyo ezalaki konɔka na ebandeli ya sanza ya octobre mpe novembre, mabelé malɛmbisamaki, moloni azalaki kotimola mabelé mpe kolona mbóto. Bambula oyo ezalaki konɛka na nsima, ezalaki kokólisa milona na ye, mpe na avril mpe mai, blé oyo eteli ekozwa langi ya mosaka, liboso ete eleko ya moi makasi eya. Mosala ya kobuka blé eyebanaki mingi, na motindo boye ekómaki elembo ya eleko. (Genese 30:14; Basambisi 15:1) Okoki koyebisa soko fɔtɔ́ oyo ezali na lobɔkɔ ya mwasi ekangamaki na eleko nini ya mbula?a Mpe na eleko nini bayekoli na Yesu babukaki mwa mbuma (blé) ya mobesu?—Matai 12:1.
Kobuka blé ezalaki mosala monene mpo na baloni. Babuki mbuma bazalaki kokata matiti ya blé na mabɔkɔ, na likwangola, mpe bazalaki kokanga yango na mipiko, lokola ozali komona awa na nsé. Ekomaka ete matiti masusu ya blé matikala to makwea na nsé, yango elimboli likambo oyo ete Luta akokaki kolokota blé nsima na basali. (Luta 2:2, 7, 23; Malako 4:28, 29) Na nsima, mipiko mizalaki kokende na etutelo, lokola oyo ya Alauna. Nini ezalaki kosalema kuna? Biblia elobeli “bituteli mpe biloko na bangombe.” (2 Samwele 24:18-22; 1 Ntango 21:23) Mipiko ya blé mizalaki kotandama likoló na mabanga ya patatalu to mabelé na papálá. Ngombe ya mobali to nyama mosusu azalaki kolekaleka mpe konyata yango. Nyama yango azalaki mbala mosusu kobenda etuteli moko ya mabaya mpo na kobukabuka matiti mpe kobimisa mbuma.—Yisaya 41:15.
Wana blé esengelaki kopupolama: bazalaki kobwaka yango na likoló na pao to na kanya monene, lokola ozali komona yango awa na likoló. (Matai 3:12) Moloni azalaki mbala mingi kopupola na mpokwa mpo ete mopepe ya mpokwa ekoka komema mposo ya mbuma mpe matiti. Wana mbuma esili koyanganisama mpe koyungolama mpo na kolongola mabanga nyonso, blé ebongaki mpo na kotyama na ebombel—to kosalelama mpo na bilei wana ya ntina, limpa.—Matai 6:11.
Soko ozalaki mwasi ya libala oyo azali kokokisa mokumba yango, olingaki kosalela liboka mpe motute mikolo nyonso mpo na kotuta blé ete ekóma farini, oyo ekozala sengesenge. Ntango mosusu osengelaki kotuta yango na “farini eyungolami malamu,” lokola oyo Sara asalelaki mpo na kolamba “mikate” mpo na baanzelu oyo balataki nzoto na bato, to lokola oyo Bayisraele bazalaki kopesa mpo na mbeka ya mbuma liboso na Jéhovah. (Genese 18:6; Exode 29:2; Levitike 2:1-5; Mituya 28:12) Sara atyaki mwa mai na farini ya blé mpo na kosala pate.
Awa na nsé, okoki komona maboké ya pate mpe limpa moko moke ya papálá, etyami liboso na kotumbama. Mpo na kolamba mikaté wana minene, esengelaki kotya yango likoló na mabangá to na bibende, lokola mwasi oyo azali kosala yango. Bandimbola oyo nyonso ezali kosalisa yo na koyeba oyo Sara asalaki mpo na bapaya na bango baanzelu, mpe oyo libota ya Lota basalaki mwa ntango moke na nsima? Totangi ete: “[Baanzelu] bayaki mpe bakɔtaki na ndako na ye. Mpe ye asalelaki bango elambo mpe alambaki mikaté mizangi mfulu, mpe balyaki.”—Genese 19:3.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Tala Calendrier des Témoins de Jéhovah 1992.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 24]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 24]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 25]
Pictorial Archive (Near Eastern History) Est.
[Eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 25]
Garo Nalbandian