Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/6 lok. 31
  • Bampasi ezali etumbu ya Nzambe?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bampasi ezali etumbu ya Nzambe?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Bampasi na yo ezali etumbu ya Nzambe?
    Lamuká!—2009
  • Kobá kotalela bampasi na ndenge ya malamu
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya boyekoli)—2026
  • Tózala na mpiko ntango tokutani na mikakatano
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2012
  • Nayebaka kokanga motema liboso ya mikakatano?
    Mituna oyo bilenge batunaka
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/6 lok. 31

Mituna ya batángi

Bampasi ezali etumbu ya Nzambe?

Ezali na likambo moko ya mpasi oyo ekómelaki yo oyo etindaki yo omituna soki yango ezalaki mokano ya Nzambe? Makambo lokola maladi ya mbalakaka, likama ya nsɔmɔ, to liwa ya mbalakaka ya ndeko moko na libota, ekoki kotinda yo omituna soki Nzambe nde azali kopesa yo etumbu.

Na esika ya kokanisa bongo, okobɔndisama soki oyoki ete Nzambe alingaka ete bato bázala na esengo mpe bámona mpasi te. Yango emonani na likambo oyo asalaki ntango akelaki mobali ná mwasi ya liboso; atyaki bango na “elanga ya Edene,” to paladiso epai bampasi ezalaki te.​—Genese 2:15.

Likambo ya mawa, mobali ná mwasi ya liboso baponaki kopesa Nzambe mokɔngɔ mpe bandimaki na nko nyonso kobungisa bolamu wana nyonso. Yango ememaki mpasi makasi, kaka mpo na bango te, kasi mpe mpo na bana na bango mpe biso lelo oyo. Mpo na nini? Tokoki kokokanisa likambo yango na tata moko oyo aboyi kofuta mbongo ya ndako, mpe mpo na yango, babwaki libota na ye mobimba libándá mpe bakómi na mpasi mpenza. Ndenge moko, bampasi ekɔtá na bomoi ya bato banda Adama ná Eva batombokelaki Nzambe. (Baloma 5:12) Bambula mingi na nsima, Yobo, moto moko ya sembo, amilelaki ete soki bakokaki “komeka kilo ya bapasi” na ye, elingaki koleka “zelo ya ba-ebale na kilo.”​—Yobo 6:2, 3, Bible na lingala ya lelo oyo.

Ntina mosusu ya bampasi na biso ezali ete tomonaka mosika te. Tózwa ndakisa ya moto moko oyo atongi bandako na esika moko oyo ezindaka na mai mpe atɛki yango. Yo oyebi te, osombi ndako moko mpe obandi kofanda wana ná libota na yo. Omoni te ete otye bomoi na yo ná ya libota na yo na likama? Soki likama ebimeli bino bokoloba ete ezali etumbu ya Nzambe? Biblia elobi boye: “Moto ya zoba ayambi maloba nyonso, nde moto ya mayele akotala malamu na nzela ekokende ye.”​—Masese 14:15.

Nzokande, ezali likambo ya esengo koyeba ete atako biso nyonso tokutanaka na bampasi, Nzambe alaki ete mosika te bampasi yango nyonso ekosila. Na ntango yango, bampasi ekokómela biso lisusu te, tokomona mpe te bato bazali konyokwama, tokoyoka mpe nsango na yango lisusu te. Mpisoli ya mawa, mpasi to liwa ‘ekoleka.’ (Emoniseli 21:4) Elaka mosusu ya esengo ezali ete bato bakotonga lisusu bandako mpe kolona bilanga mpo ebebisama na bitumba to makama te. Kutu, “bakosepela kino ntango molai” mpo na mosala ya mabɔkɔ na bango.​—Yisaya 65:21-25.

Wana ozali kozela Nzambe asilisa bampasi nyonso, okoki kosala nini mpo bampasi yango etungisa yo koleka ndelo te? Likambo ya libosoliboso ezali kolanda toli oyo ya Biblia: “Ndimá bososoli na yo moko te,” kasi “talelá [Yehova] na motema na yo mobimba.” (Masese 3:5) Tyá motema epai na ye mpo na kozwa litambwisi mpe kobɔndisama. Tyá likebi na bwanya ya Nzambe oyo ezali na Biblia. Ekosalisa yo ozwaka bikateli ya malamu mpe ekobatela yo na makama oyo moto akoki kokima.​—Masese 22:3.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto