Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w08 1/3 lok. 30
  • Esengo na mosala ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Esengo na mosala ya Nzambe
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Mitó ya makambo mike
  • Bisengo ya lokuta mpe ya ntango mokuse
  • Esengo ya libela
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
w08 1/3 lok. 30

Esengo na mosala ya Nzambe

MAKAMBO oyo Yehova asɛngaka basaleli na ye ezalaka kilo te. (1 Yoane 5:3) Mposa na ye ezali ete básepela na mosala na ye. Libota na ye Yisalaele esengelaki kosepelaka na bafɛti oyo abongisaki mpe na makambo mosusu ya bomoi na bango mpe ya losambo ya Nzambe. (Levitike 23:40; Deteronome 12:7, 12, 18) Basengelaki kozala na esengo ya koloba makambo ya Nzambe. (Nzembo 20:5; 51:14; 59:16) Kozanga esengo na mosala ya Nzambe ezalaki elembo ete likambo moko ezali kotambola malamu te na motema na bango mpe ete bazangi botɔndi mpo na motema-boboto mpe malamu ya Nzambe. Yango wana Nzambe ayebisaki bango likambo oyo esengelaki kokómela bango soki bazangi botosi mpe esengo na mosala na ye; alobaki boye: “Malakeli mabe oyo nyonso ekokwela yo . . . mpo ete otosaki mongongo ya [Yehova] Nzambe na yo na kosala malako na ye mpe mibeko na ye oyo ye alakelaki yo te. Yango ekozala na likoló na yo . . . mpe na likoló ya bana na yo libela. Yo osalelaki [Yehova] Nzambe na yo na esengo mpe kosepela na motema te, na ntina na kotonda na biloko nyonso.”​—Deteronome 28:45-47.

Baklisto mpe basengeli kosalela Nzambe na esengo. Soki te, ekomonisa ete bazangi botɔndi na motema na bango. (Nzembo 100:2) Mosaleli moko ya sembo ya Nzambe alobaki boye: “Esengo ya [Yehova] ezali nguya na bino.” (Nehemia 8:10) Anzelu moko alobaki ete nsango malamu oyo baklisto basakolaka ezali “nsango malamu ya esengo moko monene oyo bato nyonso ya ekólo bakozala na yango.” (Luka 2:10) Nkombo ya Nzambe oyo batatoli na ye bazali komema mpe solo ya Biblia esengeli kopesa bango esengo. Mosakoli Yilimia alobaki boye: “Liloba na yo ezali epai na ngai esengo mpe kosepela ya motema na ngai; zambi nabyangami na nkombo na yo, Ɛ [Yehova], Nzambe ya bibele.”​—Yilimia 15:16.

Bikateli ya sembo ya Yehova oyo ezali kotambwisa lisangá ya boklisto mpe bomoi ya baklisto epesaka esengo, mingimingi na ntango oyo bato ya mokili baboyi bosembo mpe boyengebene. (Nzembo 48:11) Lisusu, elikya kitoko oyo tozali na yango epesaka biso esengo. (Baloma 12:12; Masese 10:28) Lobiko ya baklisto epesaka bango esengo. (Nzembo 13:5) Longolá yango, mosaleli ya Nzambe asepelaka na komona bato oyo asalisi mpo bázwa boyebi ya Yehova mpe bákóma basaleli na ye. (Bafilipi 4:1; 1 Batesaloniki 2:19) Koyangana na makita mpe kosala elongo na basaleli ya Nzambe ezali mpe makambo oyo epesaka esengo mingi.​—Nzembo 106:4, 5; 122:1.

Bisengo ya lokuta mpe ya ntango mokuse

Yesu alobaki ete bato mosusu bakoyoka mateya ya solo mpe bakoyamba yango na esengo, kasi bakokanga ntina na yango te. Bato yango bakokolisa te liloba oyo elonami na mitema na bango; yango wana, bakobungisa noki esengo na bango na ndenge bakobɛta libaku ntango bakokutana na komekama to minyoko. (Matai 13:20, 21) Esengo oyo biloko ya mokili epesaka ezali esengo ya lokuta mpe ya ntango mokuse. Lisusu, moto oyo asepelaka mpo na mpasi ya mozalani na ye, ata soki moto yango ayinaka ye, azali kosala lisumu mpe Yehova akosambisa ye. (Yobo 31:25-30; Masese 17:5; 24:17, 18) Ezali bozoba soki elenge azali kokanisa ete kosepela na bomoi elimboli komipesa na “bamposa oyo ekangani na bolenge.” (2 Timote 2:22; Mosakoli 11:9, 10) Ndenge moko mpe, moto oyo alingaka bisengo akosuka mabe. (Masese 21:17; Mosakoli 7:4) Ezali mpe libunga soki moklisto azali kosepela na komikokanisa na basusu. Na esika ya komikokanisa na basusu, asengeli nde komeka mosala na ye moko ndenge ezali, mpe na yango akozwa ntina ya komikumisa na oyo etali ye moko.​—Bagalatia 6:4.

Esengo ya libela

Yehova alakaki ete akolongola Bayisalaele na boombo na Babilone mpe akozongisa bango na ekólo na bango. Na mobu 537 L.T.B., azongisaki bango na Yelusaleme, mpe basepelaki mingi ntango basilisaki kotya fondasyo ya tempelo. (Yisaya 35:10; 51:11; 65:17-19; Ezela 3:10-13) Kasi, esakweli ya Yisaya ekokokisama na monene ntango “likoló moko ya sika mpe mabelé moko ya sika” ekotyama mpe na nzela na yango, bato nyonso bakozwa esengo ya libela na litambwisi ya “Yelusaleme ya Sika.”​—Yisaya 65:17; Emoniseli 21:1-3.

Lelo oyo, makambo mabe, maladi mpe liwa ezali kopekisa biso tózala na esengo ya libela. Kasi, na boyokani na etinda ya Biblia oyo elobi ete “mokonzi ya mayele akopanza bato mabe,” Yesu Klisto, Mokonzi oyo aponami akoboma banguna nyonso ya Nzambe mpe ya boyengebene. (Masese 20:26; 1 Bakolinti 15:25, 26) Na ndenge yango, makambo nyonso oyo epekisaka biso tózala na esengo ya libela ekolongwa, mpamba te ata “liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te.” (Emoniseli 21:4) Lisekwa ekosilisa mawa nyonso oyo toyokaka mpo na bandeko na biso oyo bakufá. Ata lelo oyo, boyebi yango ebɔndisaka baklisto; yango wana ‘bayokaka mawa te na ndenge bamosusu oyo bazali na elikya te bayokaka.’​—1 Batesaloniki 4:13, 14; Yoane 5:28, 29.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2026 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto